< Књига пророка Исаије 41 >

1 Умукните преда мном, острва; и народи нека се поткрепе, нека приступе, и тада нека кажу: Хајдемо да се судимо.
« Bino bisanga, bovanda kimia liboso na Ngai! Tika ete bato ya bikolo bayeisa sika makasi na bango, tika ete bapusana mpe baloba: ‹ Tokende elongo mpo na kosamba! ›
2 Ко је подигао правду с истока? Ко је дозвао да иде за њим устопце? Ко јој је покорио народе и дао јој власт над царевима и учинио те су као прах мачу њеном и као развејана плева луку њеном?
Nani abimisaki wuta na este moto oyo bosembo ezali kobenga na makolo na yango, oyo elonga elandaka matambe na Ye? Nani akabaki bikolo na maboko na Ye mpe atiaki bakonzi na se ya bokonzi na Ye? Mopanga na Ye ekomisaki bango putulu, mpe tolotolo na Ye ekomisaki bango lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ememaka.
3 Погна их, прође мирно путем, којим не беше ходао ногама својим.
Azali kolanda bango mpe koleka na kimia na nzela oyo matambe na Ye eleka nanu te.
4 Ко је урадио и учинио то? И зове нараштаје од искона? Ја, Господ, први и последњи, ја исти.
Nani asalaki mpe akokisaki makambo oyo? Nani abengaka bileko wuta na ebandeli? Ngai Yawe, nazali Ebandeli ya nyonso, mpe nakozala mpe kaka ndenge moko elongo na bato ya suka. »
5 Видеше острва и уплашише се, крајеви земаљски задрхташе, приближише се и дођоше.
Bisanga emoni yango mpe ekomi kobanga, basuka ya mabele ezali kolenga. Bazali kopusana, bazali koya pene;
6 Један другом помагаше, и брату свом говораше: Буди храбар.
moto na moto azali kosunga moninga na ye mpe koloba na ndeko na ye: « Sala makasi! »
7 Дрводеља храбраше златара: који клепље храбраше оног који кује на наковњу, говорећи: Добро је за спајање. И притврђиваше клинцима да се не помиче.
Mosali bikeko azali kolendisa monyangwisi bibende na moto, mosemboli bibende na marto azali kopesa makasi na mosali oyo apesaka yango elilingi ya suka; alobi mpo na bisika epai wapi basangisaka bibende: « Ezali malamu; » mpe alendisi nzambe ya ekeko na basete mpo ete eningana te.
8 Али ти, Израиљу, слуго мој; Јакове, кога изабрах, семе Аврама пријатеља мог;
« Kasi yo, Isalaele, mosali na Ngai, Jakobi oyo naponaki, bino bakitani ya Abrayami, molingami na Ngai,
9 Ти, кога узех с крајева земаљских, и између изабраних њених дозвах те, и рекох ти: Ти си мој слуга, ја те изабрах, и не одбацих тебе;
yo oyo nazwaki wuta na basuka ya mabele, oyo nabengaki wuta na basuka na yango, yo oyo epai ya nani nalobaki: ‹ Ozali mosali na Ngai, › naponaki yo mpe nabwakaki yo te.
10 Не бој се, јер сам ја с тобом; не плаши се, јер сам ја Бог твој; укрепићу те и помоћи ћу ти, и подупрећу те десницом правде своје.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
11 Гле, постидеће се и посрамиће сви који се љуте на тебе; биће као ништа и изгинуће противници твоји.
Bato nyonso oyo bazali kotombokela yo bakokufa solo soni mpe bakosambwa; bato oyo bazali kotelemela yo bakokoma lokola biloko pamba mpe bakokufa.
12 Потражићеш супарнике своје, али их нећеш наћи, биће као ништа, и који војују на те, нестаће их.
Ata oluki bayini na yo, okomona bango te; bato oyo bazali kobundisa yo bakokoma biloko pamba.
13 Јер ја Господ Бог твој држим те за десницу, и кажем ти: Не бој се, ја ћу ти помагати.
Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo, nasimbi makasi loboko na yo ya mobali mpe nazali koloba na yo: ‹ Kobanga te, nakosunga yo. ›
14 Не бој се, црвићу Јаковљев, народићу Израиљев, ја ћу ти помагати, говори Господ и Избавитељ твој, Светац Израиљев.
Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te, Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te, pamba te Ngai moko nakosunga yo, » elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele.
15 Гле, учинићу те да будеш као справа за вршење нова са зупцима: врећи ћеш горе и сатрћеш их, и брда ћеш обратити у плеву.
« Tala, nakomisi yo lokola libaya ya sika ya kotutela ble, oyo batia minu bapelisa makasi, lokola mbeli ya sika, mbeli ya minu makasi; okopanza bangomba milayi, okokomisa yango putulu; okokomisa bangomba ya mikuse lokola matiti ya kokawuka,
16 Вијаћеш их, и ветар ће их однети и вихор ће их расути, а ти ћеш се веселити у Господу и хвалићеш се Свецем Израиљевим.
okoyungola yango, mpe mopepe ekomema yango, mopepe makasi ekopanza yango. Kasi yo, okosepela kati na Yawe, okozwa lokumu kati na Mosantu ya Isalaele.
17 Сиромахе и убоге, који траже воде а ње нема, којима се језик осушио од жеђи, њих ћу услишити ја Господ, ја Бог Израиљев нећу их оставити.
Mobola mpe moto akelela bazali koluka mayi, kasi na pamba: mayi ezali te; balolemo na bango ekawuki na posa ya mayi. Kasi Ngai Yawe, nakoyanola bango; Ngai, Nzambe ya Isalaele, nakobwaka bango te.
18 Отворићу реке на висовима, и изворе усред долина, пустињу ћу обратити у језеро водено, и суву земљу у изворе водене.
Nakosala ete bibale etiola na likolo ya bangomba, mpe bitima na kati-kati ya mabwaku; nakobongola esobe liziba ya mayi, mpe mabele ya kokawuka mabele oyo ebimisaka mayi;
19 Посадићу у пустињи кедар, ситим, мирту и маслину; посадићу у пустој земљи јелу, брест и шимшир,
nakolona kati na esobe: banzete ya sedele, ya akasia, ya mirite mpe banzete ya olive; nakotia banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwi esika moko kati na mabele ya kokawuka,
20 Да виде и познају и да промисле и разумеју да је то урадила рука Господња, и Светац Израиљев да је то створио.
mpo ete bato bamona mpe bayeba, batala mpe basosola elongo ete loboko na Yawe nde esali makambo wana, ete Mosantu ya Isalaele nde akeli yango. »
21 Изнесите парбу своју, вели Господ, покажите разлоге своје, вели цар Јаковљев.
« Botalisa likambo na bino, » elobi Yawe, « boluka komilongisa, » elobi Mokonzi ya Jakobi.
22 Нека дођу и нека нам објаве шта ће бити; објавите нам шта је прво било, да промислимо и познамо шта ће бити иза тога; или кажите нам шта ће бити унапредак.
« Boya na banzambe na bino ya bikeko mpo ete eyebisa biso makambo oyo ekoya. Boyebisa biso masakoli na bino ya liboso, ezalaki nini, mpo ete toyekola yango malamu mpe toyeba ndenge nini esukelaki. To boyebisa biso makambo oyo ekoya;
23 Кажите шта ће бити после, и познаћемо да сте богови; или учините шта добро или зло, и дивићемо се и гледати сви.
boyebisa biso makambo oyo ekoya na sima, mpo ete toyeba soki bozali solo banzambe; bosala nanu ata eloko moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete toyoka soni mpe totondisama na kobanga.
24 Гле, ви нисте ништа, и дело ваше није ништа; који вас избира, гад је.
Tala, bozali kaka pamba, mpe misala na bino ezali bobele se pamba; moto oyo aponi bino asali penza likambo ya nkele.
25 Подигох једног са севера, и доћи ће; од истока сунчаног призваће име моје, ступаће по главарима као по калу и као што лончар гази блато.
Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya, moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai. Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto, lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki.
26 Ко је објавио од искона, да бисмо знали, или од старина, да бисмо рекли: Истина је? Али нема никога да би објавио, нити има кога да је напред казао, нити има кога да би чуо речи ваше.
Nani alobaki yango wuta na ebandeli mpo ete biso tokoka koyeba, to wuta kala penza mpo ete tokoka koloba: ‹ Ezali sembo? › Te, moto moko te alobaki yango, moko te asalaki ete likambo yango eyokana, moko te ayokaki maloba na bino.
27 Ја први Сиону кажем: Ето, ето тога. У Јерусалиму ћу дати ко ће јављати добре гласове.
Nazalaki Moto ya liboso ya koloba na Siona: ‹ Tala, tala bango oyo! › Mpe na Yelusalemi: ‹ Napesi momemi Sango Malamu! ›
28 Јер погледам, али нема никога, нема међу њима ниједнога ко би саветовао; питам их, али не одговарају ни речи.
Natalaki, kasi moto moko te azalaki, moko te kati na bango mpo na kopesa toli, moko te mpo na kopesa eyano soki natuni bango motuna.
29 Гле, сви су таштина, ништа су дела њихова; ливени су ликови њихови ветар и ништавило.
Tala, bango nyonso bazali banzambe ya lokuta! Misala na bango ezali se pamba, bililingi na bango ezali se mopepe mpe biloko ya pamba. »

< Књига пророка Исаије 41 >