< 2 Књига Самуилова 8 >

1 После тога разби Давид Филистеје, и покори их, и узе Давид Метег-Аму из руку филистејских.
Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki Metegi-Ama na maboko ya bato ya Filisitia.
2 Разби и Моавце, и измери их ужем поваљавши их по земљи, и измери их два ужа да се погубе а једно уже да се оставе у животу. И Моавци посташе слуге Давидове, и плаћаху му данак.
Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi mpe alalisaki bango na mabele, na etando oyo ezalaki na molayi ya basinga misato, oyo bamekelaka molayi. Abomaki ndambo mibale kati na bandambo misato ya bato nyonso oyo balalaki na etando mpe atikaki na bomoi ndambo moko ya bato. Boye, bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi.
3 Давид разби и Адад-Езера сина Реововог цара совског, изашав да рашири власт своју до реке Ефрата.
Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba, tango Adadezeri akendeki kolendisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate.
4 И зароби их Давид хиљаду и седам стотина коњаника и двадесет хиљада пешака, и подреза Давид жиле свим коњима колским, само остави за сто кола.
Davidi akangaki basoda nkoto moko na nkama sambo oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda, mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.
5 И беху дошли Сирци из Дамаска у помоћ Адад-Езеру цару совском, и Давид поби двадесет и две хиљаде Сираца.
Tango bato ya Siri oyo bazalaki kovanda na engumba Damasi bayaki kosunga Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, Davidi abomaki kati na bango bato nkoto tuku mibale.
6 И намести Давид војску у Сирији што је под Дамаском, и Сирци посташе слуге Давидове плаћајући му данак. И Господ чуваше Давида куда год иђаше.
Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
7 И Давид узе златне штитове које имаху слуге Адад-Езерове, и донесе их у Јерусалим.
Davidi abotolaki banguba ya wolo oyo bakonzi ya basoda ya Adadezeri bazalaki na yango mpe amemaki yango na Yelusalemi.
8 И из Ветаха и из Виротаја, градова Адад-Езерових, однесе цар Давид силну бронзу.
Na Beta mpe na Berotayi, bingumba ya Adadezeri, mokonzi Davidi azwaki bronze ebele.
9 А кад чу Тоја, цар ематски, да је Давид побио сву војску Адад-Езерову,
Tango Toyi, mokonzi ya Amati, ayokaki ete Davidi alongi mampinga nyonso ya Adadezeri,
10 Посла Тоја Јорама сина свог к цару Давиду да га поздрави и да му честита што је војевао на Адад-Езера и убио га, јер Тоја имаше рат с Адад-Езером; и донесе Јорам закладе златне и сребрне и бронзане.
atindaki Yorami, mwana na ye ya mobali, kopesa mokonzi Davidi mbote mpe longonya mpo ete abundisaki mpe alongaki Adadezeri oyo azalaki monguna ya Toyi. Yorami amemelaki Davidi biloko ya palata, ya wolo mpe ya bronze.
11 Па и то цар Давид посвети Господу са сребром и златом што беше посветио од свих народа које покори,
Mokonzi Davidi abulisaki biloko yango lokola likabo epai na Yawe ndenge asalaki na palata mpe na wolo oyo ewutaki na bikolo nyonso oyo abotolaki,
12 Од Сираца и од Моаваца и од синова Амонових и од Филистеја и од Амалика, и од плена Адад-Езера сина Реововог, цара совског.
na Arami, na Moabi, na Amoni, na Filisitia mpe na Amaleki. Abulisaki mpe bomengo ya bitumba oyo abotolaki epai ya Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba.
13 И Давид стече име кад се врати побивши Сирце, осамнаест хиљада у сланој долини.
Davidi akomaki moto ya lokumu tango awutaki koboma bato ya Siri nkoto zomi na mwambe, kati na Lubwaku ya Mungwa.
14 И намести војску по Идумеји, по свој Идумеји намести војску, и сви Едомци посташе слуге Давидове. И Господ чуваше Давида куда год иђаше.
Atiaki bayangeli kati na Edomi; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
15 Тако царова Давид над свим Израиљем, судећи и дајући правду свему народу свом.
Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima.
16 И Јоав син Серујин беше над војском; а Јосафат син Ахилудов паметар;
Joabi, mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya liboso ya mampinga; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda;
17 А Садок син Ихитовов и Ахимелех син Авијатаров свештеници; а Сераја писар;
Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe; Tseraya azalaki mokomi mikanda;
18 А Венаја син Јодајев беше над Херетејима и Фелетејима; а синови Давидови кнезови.
Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki Banganga-Nzambe.

< 2 Књига Самуилова 8 >