< Иов 37 >

1 И от сего трепещет сердце мое и подвиглось с места своего.
Mpo na yango, motema na ngai ezali kolenga mpe ezali kobeta makasi lokola nde elingi kobima na esika na yango.
2 Слушайте, слушайте голос Его и гром, исходящий из уст Его.
Yoka! Yoka makelele ya mongongo na Ye, makelele oyo ezali kobima na monoko na Ye.
3 Под всем небом раскат его, и блистание его - до краев земли.
Azali kotinda yango na mokili mobimba, mpe kake na Ye kino na suka ya mokili.
4 За ним гремит глас; гремит Он гласом величества Своего и не останавливает его, когда голос Его услышан.
Sima na yango, konguluma na Ye ekoyokana, akoganga makasi na mongongo ya bokonzi na Ye; akokanga mikalikali ya monoko na Ye te, wana mongongo na Ye ezali koyokana.
5 Дивно гремит Бог гласом Своим, делает дела великие, для нас непостижимые.
Na nzela ya mongongo na Ye ya makasi, Nzambe asalaka bikamwa, asalaka makambo minene, makambo minene oyo mayele na biso ekoki kososola te.
6 Ибо снегу Он говорит: будь на земле; равно мелкий дождь и большой дождь в Его власти.
Alobaka na mvula ya pembe: ‹ Sopana na mabele. › Alobaka bongo lisusu na mvula ya makasi: ‹ Sopana. ›
7 Он полагает печать на руку каждого человека, чтобы все люди знали дело Его.
Boye, atiaka kashe na loboko ya moto nyonso mpo ete moto nyonso ayeba misala na Ye. Atondisaka bato nyonso na somo ya nguya na Ye.
8 Тогда зверь уходит в убежище и остается в своих логовищах.
Banyama ezongaka na bandako na yango mpe evandaka kati na libulu na yango.
9 От юга приходит буря, от севера - стужа.
Mopepe makasi ewutaka na ngambo ya sude, malili mpe mipepe, na ngambo ya nor.
10 От дуновения Божия происходит лед, и поверхность воды сжимается.
Na mopepe oyo ebimaka na monoko ya Nzambe, mayi ebongwanaka libanga mpe bitima ya mayi ekondaka.
11 Также влагою Он наполняет тучи, и облака сыплют свет Его,
Atondisaka mapata na mayi, mpe pole na Ye epanzaka mapata ya mvula.
12 и они направляются по намерениям Его, чтоб исполнить то, что Он повелит им на лице обитаемой земли.
Na makasi na Ye, mapata ebalukaka na bangambo nyonso mpo na kokokisa nyonso oyo Ye atindaka yango kosala kati na mokili.
13 Он повелевает им идти или для наказания, или в благоволение, или для помилования.
Ezalaka mpo na kopesa etumbu na mokili to mpo na kopambola yango.
14 Внимай сему, Иов; стой и разумевай чудные дела Божии.
Yoka, Yobo! Telema mpe sosola bikamwa ya Nzambe.
15 Знаешь ли, как Бог располагает ими и повелевает свету блистать из облака Своего?
Oyebi ndenge nini Nzambe akambaka mapata, mpe ndenge nini angengisaka mikalikali na Ye na mapata?
16 Разумеешь ли равновесие облаков, чудное дело Совершеннейшего в знании?
Oyebi ndenge nini mapata evandaka malamu? Ezali bikamwa ya Ye-Oyo-Akoka-Na-Boyebi-Nyonso.
17 Как нагревается твоя одежда, когда Он успокаивает землю от юга?
Bilamba na yo ezali na moto, nzokande mabele ezali konyokwama na mopepe ya midi.
18 Ты ли с Ним распростер небеса, твердые, как литое зеркало?
Boni, okoki solo kosunga Nzambe mpo na kotanda likolo elongo na Ye, likolo oyo ezali makasi lokola talatala ya ebende banyangwisa na moto?
19 Научи нас, что сказать Ему? Мы в этой тьме ничего не можем сообразить.
Yebisa biso makambo oyo tosengeli koloba na Ye; tokoki koloba likambo moko te mpo na molili na biso.
20 Будет ли возвещено Ему, что я говорю? Сказал ли кто, что сказанное доносится Ему?
Boni, basengeli koyebisa Ye ete nalingi koloba? Basengeli koyebisa Ye mpo ete ayeba yango?
21 Теперь не видно яркого света в облаках, но пронесется ветер и расчистит их.
Na pwasa, moto moko te azali komona lisusu pole; ebombami kati na mapata. Kasi soki mopepe eleki, elongoli yango nyonso.
22 Светлая погода приходит от севера, и окрест Бога страшное великолепие.
Kongenga lokola wolo ezali koya wuta na ngambo ya nor. Nzambe avandi kati na nkembo ya somo.
23 Вседержитель! мы не постигаем Его. Он велик силою, судом и полнотою правосудия. Он никого не угнетает.
Azali Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tokoki te kokoma esika Ye azali; azali monene na nguya mpe na solo; azali Mokonzi ya sembo, akoki konyokola te moto oyo azali sembo.
24 Посему да благоговеют пред Ним люди, и да трепещут пред Ним все мудрые сердцем!
Yango wana bato basengeli kokumisa Ye, kasi Ye atiaka miso na Ye te likolo ya bato oyo bakanisaka ete bazali bato ya bwanya. »

< Иов 37 >