< Jozuego 12 >

1 A ci są królowie ziemi, które pobili synowie Izraelscy, i posiedli ziemię ich za Jordanem ku wschodowi słońca, od potoku Arnon aż do góry Hermon, i wszystkę równinę ku wschodowi słońca:
Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba:
2 Sehon, król Amorejski, który mieszkał w Hesebon, a panował od Aroer, które leży nad brzegiem potoku Arnon, i od połowy tegoż potoku i połowy Galaadu aż do potoku Jabok, gdzie są granice synów Ammonowych,
Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni. Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni.
3 A od równin aż do morza Cynerot na wschód słońca, i aż do morza pustyni, do morza słonego na wschód, idąc ku Betsemot, i od południa pod górę Fazga.
Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude.
4 I granice Oga, króla Basańskiego, który był pozostał z Refaimów, a mieszkał w Astarot i w Edrej.
Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
5 Który też panował na górze Hermon, i w Selecha, i we wszystkiem Basan, aż do granic Gessurytów, i Mahachatytów, i nad połową Galaad ku granicy Sehona, króla Hesebońskiego.
Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni.
6 Mojżesz, sługa Pański, i synowie Izraelscy, pobili je; i podał tę ziemię Mojżesz, sługa Pański, w dziedzictwo Rubenitom, i Gadytom, i połowie pokolenia Manasesowego.
Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
7 Ci też są królowie ziemi, które pobił Jozue, i synowie Izraelscy za Jordanem na zachód słońca, od Baalgad na polu Libańskiem, i aż do Halak, która idzie ku Seir, którą podał Jozue pokoleniom Izraelskim w dziedzictwo według działu ich.
Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango
8 Na górach, i na równinach, i w polach, i w niżynach, i na puszczy, i na południe ziemi Hetejczyka, Amorejczyka, i Chananejczyka, Ferezejczyka, Hewejczyka, i Jebuzejczyka.
kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. Tala bakonzi yango:
9 Król Jerycha jeden; król Haj, które jest w bok Betel, jeden.
mokonzi ya Jeriko moko mokonzi ya Ayi, pembeni ya Beteli moko
10 Król Jeruzalem jeden; król Hebron jeden.
mokonzi ya Yelusalemi moko mokonzi ya Ebron moko
11 Król Jerymot jeden; król Lachys jeden.
mokonzi ya Yarimuti moko mokonzi ya Lakishi moko
12 Król Heglon jeden; król Gazer jeden.
mokonzi ya Egiloni moko mokonzi ya Gezeri moko
13 Król Dabir jeden; król Gader jeden.
mokonzi ya Debiri moko mokonzi ya Gederi moko
14 Król Horma jeden; król Hered jeden.
mokonzi ya Orima moko mokonzi ya Aradi moko
15 Król Lebni jeden; król Adullam jeden.
mokonzi ya Libina moko mokonzi ya Adulami moko
16 Król Maceda jeden; król Betel jeden.
mokonzi ya Makeda moko mokonzi ya Beteli moko
17 Król Taffua jeden; król Hefer jeden.
mokonzi ya Tapua moko mokonzi ya Eferi moko
18 Król Afek jeden; król Saron jeden.
mokonzi ya Afeki moko mokonzi ya Lasharoni moko
19 Król Madon jeden; król Hasor jeden.
mokonzi ya Madoni moko mokonzi ya Atsori moko
20 Król Symron Meron jeden; król Aksaf jeden.
mokonzi ya Shimironi-Meroni moko mokonzi ya Akishafi moko
21 Król Tenach jeden; król Mageddo jeden.
mokonzi ya Taanaki moko mokonzi ya Megido moko
22 Król Kades jeden; król Jachanam z Karmelu jeden.
mokonzi ya Kedeshi moko mokonzi ya Yokineami kati na Karimeli moko
23 Król Dor z krainy Dor jeden; król Goim w Galgal jeden;
mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dori moko mokonzi ya Goyimi, kati na Giligali moko
24 Król Torsa jeden. Wszystkich królów trzydzieści i jeden.
mokonzi ya Tiritsa moko. Bango nyonso bazalaki bakonzi tuku misato na moko.

< Jozuego 12 >