< مزامیر 59 >

برای سالار مغنیان بر لاتهلک. مکتوم داود وقتی که شاول فرستاد که خانه را کشیک بکشند تا او را بکشند ای خدایم مرا از دشمنانم برهان! مرا ازمقاومت کنندگانم برافراز! ۱ 1
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te! » tango Saulo atindaki bato kozingela ndako ya Davidi mpo na koboma ye. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe na ngai, kangola ngai wuta na maboko ya banguna na ngai; batela ngai liboso ya banyokoli na ngai.
مرا ازگناهکاران خلاصی ده! و از مردمان خون ریزرهایی بخش! ۲ 2
Kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe, mpe bikisa ngai liboso ya basopi makila ya bato.
زیرا اینک برای جانم کمین می‌سازند و زورآوران به ضد من جمع شده‌اند، بدون تقصیر من‌ای خداوند و بدون گناه من. ۳ 3
Yawe, bazali koluka koboma ngai; bato na nguya basaleli ngai likita, nzokande nasali mabe te, nasali na ngai mpe masumu te.
بی قصور من می‌شتابند و خود را آماده می‌کنند. پس برای ملاقات من بیدار شو و ببین. ۴ 4
Nasali mabe ata moko te; kasi bango bazali kopota mbangu, bazali komibongisa. Lamuka mpo na koya kokutana na ngai, mpe tala.
اما تو‌ای یهوه، خدای صبایوت، خدای اسرائیل! بیدارشده، همه امت‌ها را مکافات برسان و بر غداران بدکار شفقت مفرما، سلاه. ۵ 5
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, Nzambe ya Isalaele, telema mpo na kopesa bikolo nyonso etumbu; koyokela bato nyonso oyo basalaka mabe mawa te.
شامگاهان برمی گردند و مثل سگ بانگ می‌کنند و در شهردور می‌زنند. ۶ 6
Bazongaka na pokwa, bagangaka lokola bambwa mpe batambolaka zingazinga ya engumba.
از دهان خود بدی را فرومی ریزند. در لبهای ایشان شمشیرهاست. زیرا می‌گویند: «کیست که بشنود؟» ۷ 7
Na nzela ya minoko na bango, babimisaka na bibebu na bango maloba oyo ezokisaka lokola mipanga; bamilobelaka: « Nani azali koyoka biso? »
و اما تو‌ای خداوند، بر ایشان خواهی خندید و تمامی امت‌ها را استهزا خواهی نمود. ۸ 8
Kasi Yo, Yawe, osekaka bango, otiolaka bikolo nyonso.
‌ای قوت من بسوی تو انتظار خواهم کشید زیراخدا قلعه بلند من است. ۹ 9
Nzambe, ozali makasi na ngai, nakotalela Yo; ozali ebombamelo na ngai,
خدای رحمت من پیش روی من خواهد رفت. خدا مرا بردشمنانم نگران خواهد ساخت. ۱۰ 10
Nzambe na ngai, oyo nalingaka. Nzambe ayaka kino liboso na ngai, atikaka ngai kotala banguna na ngai.
ایشان را به قتل مرسان. ۱۱ 11
Nkolo, nguba na biso, koboma bango te, noki te bato na ngai bakobosana. Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga, mpe mema bango kino na se.
به‌سبب گناه زبان و سخنان لبهای خود، در تکبر خویش گرفتار شوند. و به عوض لعنت و دروغی که می‌گویند، ۱۲ 12
Mpo na masumu ya minoko na bango, mpo na maloba ya bibebu na bango, tika ete bakangama na motambo ya lolendo na bango. Mpo na bilakeli mabe mpe lokuta na bango,
ایشان را فانی کن در غضب فانی کن تا نیست گردند و بدانند که خدادر یعقوب تا اقصای زمین سلطنت می‌کند. سلاه. ۱۳ 13
bebisa bango na kanda na Yo, bebisa bango kino bazala lisusu te. Bongo bakoyeba ete Nzambe azali kokonza kati na Jakobi kino na suka ya mokili.
و شامگاهان برگردیده، مثل سگ بانگ زنند ودر شهر گردش کنند. ۱۴ 14
Bazongaka na pokwa, bagangaka lokola bambwa mpe batambolaka zingazinga ya engumba.
و برای خوراک پراکنده شوند و سیر نشده، شب را بسر برند. ۱۵ 15
Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei; soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.
و اما من قوت تو را خواهم سرایید و بامدادان از رحمت تو ترنم خواهم نمود. زیرا قلعه بلند من هستی ودر روز تنگی ملجای منی. ۱۶ 16
Kasi ngai nakoyembela makasi na Yo, nakobetela bolingo na Yo milolo, na tongo, pamba te ozali ebombamelo na ngai, mpe ekimelo na ngai na tango ya pasi.
‌ای قوت من برای تو سرود می‌خوانم، زیرا خدا قلعه بلند من است وخدای رحمت من. ۱۷ 17
Ozali makasi na ngai, nakoyemba mpo na lokumu na Yo; ozali ebombamelo na ngai, oh Nzambe; Nzambe na ngai, oyo nalingaka.

< مزامیر 59 >