< مزامیر 19 >

برای سالار مغنیان. مزمور داود آسمان جلال خدا را بیان می‌کند وفلک از عمل دستهایش خبر می‌دهد. ۱ 1
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe, mapata elobaka misala na Ye.
روز سخن می‌راند تا روز و شب معرفت را اعلان می‌کند تا شب. ۲ 2
Mokolo moko na moko eyebisaka yango epai ya mokolo oyo elandaka, mpe butu moko na moko eyebisaka yango epai ya butu oyo elandaka.
سخن نیست و کلامی نی و آوازآنها شنیده نمی شود. ۳ 3
Ezali na nzela ya lisolo te, na nzela mpe ya maloba te oyo mingongo na yango eyokanaka te.
قانون آنها در تمام جهان بیرون رفت و بیان آنها تا اقصای ربع مسکون. ۴ 4
Nzokande, sango na yango eyokanaka na mokili mobimba, maloba na yango ekomaka kino na suka ya mokili. Na likolo, Nzambe atie ndako ya kapo mpo na moyi.
خیمه‌ای برای آفتاب در آنها قرار داد؛ و او مثل داماد از حجله خود بیرون می‌آید و مثل پهلوان ازدویدن در میدان شادی می‌کند. ۵ 5
Moyi yango ebimaka na tongo ndenge elenge mobali oyo abali sika abimaka na shambre na ye, mpe ndenge elombe atambolaka na elikya ya kolonga na momekano.
خروجش ازکرانه آسمان است و مدارش تا به کرانه دیگر؛ وهیچ‌چیز از حرارتش مستور نیست. ۶ 6
Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo, mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu; eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.
شریعت خداوند کامل است و جان رابرمی گرداند؛ شهادات خداوند امین است و جاهل را حکیم می‌گرداند. ۷ 7
Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka, epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi. Maloba na Ye nyonso ezali ya solo, ebongi na kotiela yango elikya, mpe epesaka bwanya epai ya zoba.
فرایض خداوند راست است و دل را شاد می‌سازد. امر خداوند پاک است و چشم را روشن می‌کند. ۸ 8
Mitindo ya Yawe ezali alima, esepelisaka motema; malako na Ye ezali peto, epesaka bososoli.
ترس خداوند طاهراست و ثابت تا ابدالاباد. احکام خداوند حق وتمام عدل است. ۹ 9
Kotosa Yawe ezali peto, ewumelaka libela na libela. Mitindo ya Yawe ezali ya solo, nyonso ezali penza sembo.
از طلا مرغوب تر و از زرخالص بسیار. از شهد شیرینتر و از قطرات شانه عسل. ۱۰ 10
Ezali na motuya koleka wolo, koleka wolo ebele ya peto, wolo oyo basangisa na eloko mosusu te; eleki mafuta ya nzoyi na elengi, mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.
بنده تو نیز از آنها متنبه می‌شود، و درحفظ آنها ثواب عظیمی است. ۱۱ 11
Epesaka mosali na Yo mayele; moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.
کیست که سهوهای خود را بداند؟ مرا ازخطایای مخفی‌ام طاهر ساز. ۱۲ 12
Nani akoki kososola mabunga na ye oyo asali na nko te? Limbisa masumu na ngai, oyo nayebi te!
بنده ات را نیز ازاعمال متکبرانه باز دار تا بر من مسلط نشود؛ آنگاه بی‌عیب و از گناه عظیم مبرا خواهم بود. ۱۳ 13
Batela lisusu mosali na Yo mpo ete nasala mabe na nko te. Na bongo, nakozala moto ya kokoka mpe nakosala bambeba minene te.
سخنان زبانم و تفکر دلم منظور نظر تو باشد، ای خداوند که صخره من و نجات‌دهنده من هستی! ۱۴ 14
Yawe, Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai, tika ete maloba mpe makanisi ya motema na ngai esepelisa Yo!

< مزامیر 19 >