< مزامیر 127 >

سرود درجات از سلیمان اگر خداوند خانه را بنا نکند، بنایانش زحمت بی‌فایده می‌کشند. اگر خداوند شهر را پاسبانی نکند، پاسبانان بی‌فایده پاسبانی می‌کنند. ۱ 1
Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Soki Yawe atongi ndako te, batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba; soki Yawe akengeli engumba te, bakengeli bazali kosala na pamba.
بی‌فایده است که شماصبح زود برمی خیزید و شب دیر می‌خوابید و نان مشقت را می‌خورید. همچنان محبوبان خویش را خواب می‌بخشد. ۲ 2
Ezali na pamba nde, bino mpe, bolamukaka na tongo makasi, bolalaka noki te mpe bosalaka makasi mpo na kozwa bilei; pamba te Nzambe apesaka bilei yango kaka na balingami na Ye, wana bazali nanu kolala pongi.
اینک پسران میراث ازجانب خداوند می‌باشند و ثمره رحم، اجرتی ازاوست. ۳ 3
Bana bazali libula kowuta na Yawe, mpe kobota bana ezali lifuti.
مثل تیرها در دست مرد زور آور، همچنان هستند پسران جوانی. ۴ 4
Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba, ndenge wana mpe bana oyo moto aboti na bolenge na ye bazali.
خوشابحال کسی‌که ترکش خود را از ایشان پر کرده است. خجل نخواهند شد بلکه با دشمنان، در دروازه سخن خواهند راند. ۵ 5
Esengo na moto oyo atondisi makonga kati na ebombelo na ye ya makonga! Akokufa soni ata moke te tango akosamba elongo na banguna na ye na ekuke ya engumba.

< مزامیر 127 >