< مزامیر 11 >

برای سالار مغنیان. مزمور داود بر خداوند توکل می‌دارم. چرا به‌جانم می گویید: «مثل مرغ به کوه خودبگریزید. ۱ 1
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo. Ndenge nini bokoka koloba na ngai: « Kimela na ngomba na bino lokola ndeke? »
زیرا اینک شریران کمان را می‌کشند وتیر را به زه نهاده‌اند، تا بر راست دلان در تاریکی بیندازند. ۲ 2
Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango, batiaka bambanzi na bango na singa mpo na kobamba yango longwa na molili bato oyo bazali na mitema sembo.
زیرا که ارکان منهدم می‌شوند و مردعادل چه کند؟» ۳ 3
Soki miboko ebukani, moto ya sembo akoki kosala nini?
خداوند در هیکل قدس خود است و کرسی خداوند در آسمان. چشمان او می‌نگرد، پلکهای وی بنی آدم را می‌آزماید. ۴ 4
Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango.
خداوند مرد عادل راامتحان می‌کند؛ و اما از شریر و ظلم دوست، جان او نفرت می‌دارد. ۵ 5
Yawe atalaka mozindo ya moto ya sembo, kasi ayinaka makasi moto mabe elongo na moto oyo asepelaka na mobulu.
بر شریر دامها و آتش وکبریت خواهد بارانید، و باد سموم حصه پیاله ایشان خواهد بود. ۶ 6
Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.
زیرا خداوند عادل است وعدالت را دوست می‌دارد، و راستان روی او راخواهند دید. ۷ 7
Pamba te Yawe azali sembo, alingaka bosembo. Bato ya sembo bakomona elongi na Ye.

< مزامیر 11 >