< مزامیر 101 >

مزمور داود رحمت و انصاف را خواهم سرایید. نزد تو‌ای خداوند، تسبیح خواهم خواند. ۱ 1
Nzembo ya Davidi. Nakoyemba bolingo mpe bosembo; nakoyembela nde Yo, Yawe.
در طریق کامل به خردمندی رفتارخواهم نمود. نزد من کی خواهی آمد؟ در خانه خود با دل سلیم سالک خواهم شد. ۲ 2
Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.
چیزی بد راپیش نظر خود نخواهم گذاشت. کار کج روان رامکروه می‌دارم، به من نخواهد چسبید. ۳ 3
Nakotala eloko moko te ya mabe; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.
دل کج ازمن دور خواهد شد. شخص شریر را نخواهم شناخت. ۴ 4
Mosika na ngai, motema ya kilikili; naboyi kosala mabe.
کسی را که در خفیه به همسایه خودغیبت‌گوید، هلاک خواهم کرد. کسی را که چشم بلند و دل متکبر دارد تحمل نخواهم کرد. ۵ 5
Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.
چشمانم بر امنای زمین است تا بامن ساکن شوند. کسی‌که به طریق کامل سالک باشد خادم من خواهد بود. ۶ 6
Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili mpo ete bavanda pembeni na ngai; moto na etamboli ezanga pamela nde akozala mosali na ngai.
حیله گر در خانه من ساکن نخواهدشد. دروغ گو پیش نظر من نخواهد ماند. ۷ 7
Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te; liboso na ngai, mokosi akotelema te.
همه شریران زمین را صبحگاهان هلاک خواهم کرد. تاجمیع بدکاران را از شهر خداوند منقطع سازم. ۸ 8
Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe kati na mokili bavanda kimia; nakolongola na engumba ya Yawe bato nyonso ya mabe.

< مزامیر 101 >