< اعداد 28 >

و خداوند موسی را خطاب کرده، گفت: ۱ 1
Yawe alobaki na Moyize:
«بنی‌اسرائیل را امر فرموده، به ایشان بگو: مراقب باشید تا هدیه طعام مرا از قربانی های آتشین عطر خوشبوی من در موسمش نزد من بگذرانید. ۲ 2
« Pesa mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Bosala keba ete bomema liboso na Ngai, na mikolo oyo ekatama, makabo na Ngai, makabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Ngai. ›
و ایشان را بگو قربانی آتشین را که نزدخداوند بگذرانید، این است: دو بره نرینه یک ساله بی‌عیب، هر روز بجهت قربانی سوختنی دائمی. ۳ 3
Loba na bango: ‹ Tala likabo bazikisa na moto oyo bosengeli kobonza epai na Yawe: bana meme mibale ya mobu moko mpe ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na libela.
یک بره را در صبح قربانی کن و بره دیگررا در عصر قربانی کن. ۴ 4
Bokobonza mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa;
و یک عشر ایفه آرد نرم مخلوط شده با یک ربع هین روغن زلال برای هدیه آردی. ۵ 5
elongo na likabo ya bakilo misato ya farine basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive.
این است قربانی سوختنی دائمی که در کوه سینا بجهت عطر خوشبو و قربانی آتشین خداوند معین شد. ۶ 6
Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, oyo ebandisamaki na ngomba Sinai; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
و هدیه ریختنی آن یک ربع هین بجهت هر بره‌ای باشد، این هدیه ریختنی مسکرات را برای خداوند در قدس بریز. ۷ 7
Bokobakisa lisusu likabo ya masanga: balitele mibale ya masanga ya vino ya sika mpo na mwana meme moko na moko. Bokobonzela Yawe masanga yango na Esika ya bule.
و بره دیگر را در عصر قربانی کن، مثل هدیه آردی صبح و مثل هدیه ریختنی آن بگذران تاقربانی آتشین و عطر خوشبو برای خداوند باشد. ۸ 8
Bokobonza mwana meme mosusu na pokwa, elongo na lolenge moko ya makabo ya mbuma mpe mbeka ya masanga oyo bobonzaki na tongo; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
«و در روز سبت دو بره یک ساله بی‌عیب، ودو عشر ایفه آرد نرم سرشته شده با روغن، بجهت هدیه آردی با هدیه ریختنی آن. ۹ 9
Na mokolo ya Saba, bokobonza mbeka ya bana meme mibale, ya mobu moko oyo ezanga mbeba, elongo na likabo ya masanga mpe bakilo motoba ya farine oyo basangisa na mafuta, lokola makabo ya mbuma.
این است قربانی سوختنی هر روز سبت سوای قربانی سوختنی دائمی با هدیه ریختنی آن. ۱۰ 10
Oyo ezali mbeka ya kotumba mpo na mikolo nyonso ya Saba, bakisa mbeka ya kotumba ya tango nyonso mpe mbeka na yango ya masanga.
«و در اول ماههای خود قربانی سوختنی برای خداوند بگذرانید، دو گاو جوان و یک قوچ و هفت بره نرینه یک ساله بی‌عیب. ۱۱ 11
Na ebandeli nyonso ya sanza, bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba: bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme ya mobu moko sambo. Yango nyonso esengeli kozala na mbeba te.
و سه عشرایفه آرد نرم سرشته شده با روغن بجهت هدیه آردی برای هر گاو، و دو عشر آرد نرم سرشته شده با روغن، بجهت هدیه آردی برای هر قوچ. ۱۲ 12
Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta;
و یک عشر آرد نرم سرشته شده با روغن، بجهت هدیه آردی برای هر بره، تا قربانی سوختنی، عطر خوشبو و هدیه آتشین برای خداوند باشد. ۱۳ 13
mpo na mwana meme moko na moko, bokobonza yango elongo na likabo ya bakilo misato ya farine basangisa na mafuta. Ezali mbeka ya kotumba, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
و هدایای ریختنی آنها نصف هین شراب برای هر گاو، و ثلث هین برای هر قوچ، و ربع هین برای هر بره باشد. این است قربانی سوختنی هر ماه از ماههای سال. ۱۴ 14
Mbeka ya masanga oyo bosengeli kobonza ekozala: balitele minei ya masanga ya vino mpo na ngombe moko na moko, balitele misato ya masanga ya vino mpo na meme moko na moko ya mobali mpe balitele mibale ya masanga ya vino mpo na mwana meme moko na moko ya mobali.
و یک بز نربجهت قربانی گناه سوای قربانی سوختنی دائمی، با هدیه ریختنی آن برای خداوند قربانی بشود. ۱۵ 15
Kobakisa na mbeka ya kotumba ya libela elongo na mbeka na yango ya masanga, bokobonza lisusu epai na Yawe ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.
«و در روز چهاردهم ماه اول، فصح خداوند است. ۱۶ 16
Mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso ekozala Pasika mpo na lokumu ya Yawe.
و در روز پانزدهم این ماه، عید است که هفت روز نان فطیر خورده شود. ۱۷ 17
Mokolo ya zomi na mitano ya sanza yango kaka ekozala mokolo ya feti monene. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire.
در روز اول، محفل مقدس است که هیچ کار خدمت در آن نکنید. ۱۸ 18
Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.
و بجهت هدیه آتشین و قربانی سوختنی برای خداوند، دو گاو جوان و یک قوچ و هفت بره نرینه یک ساله قربانی کنید، اینها برای شما بی‌عیب باشد. ۱۹ 19
Bokobonzela Yawe, lokola likabo bazikisa na moto, lokola mbeka ya kotumba: bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali, bana mibali ya meme sambo ya mobu moko; nyonso esengeli kozanga mbeba.
و بجهت هدیه آردی آنهاسه عشر آرد نرم سرشته شده با روغن برای هرگاو، و دو عشر برای هر قوچ بگذرانید. ۲۰ 20
Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme moko na moko ya mobali, bakobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta;
و یک عشر برای هر بره، از آن هفت بره بگذران. ۲۱ 21
mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato.
ویک بز نر بجهت قربانی گناه تا برای شما کفاره شود. ۲۲ 22
Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.
اینها را سوای قربانی سوختنی صبح که قربانی سوختنی دائمی است، بگذرانید. ۲۳ 23
Bokobonza mbeka oyo nyonso, bakisa mpe mbeka ya kotumba ya libela ya tongo.
به اینطور هر روز از آن هفت روز، طعام هدیه آتشین، عطر خوشبو برای خداوند بگذرانید، واین سوای قربانی سوختنی دائمی گذرانیده شود، با هدیه ریختنی آن. ۲۴ 24
Bokobanda kobonza yango mikolo nyonso, na mikolo nyonso sambo, lokola bilei bazikisa na moto; mpe solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Ekobanda kobakisama na mbeka ya kotumba ya libela mpe na mbeka na yango ya masanga.
و در روز هفتم، برای شمامحفل مقدس باشد. هیچ کار خدمت در آن نکنید. ۲۵ 25
Na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule; bongo na mokolo yango, bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.
«و در روز نوبرها چون هدیه آردی تازه درعید هفته های خود برای خداوند بگذرانید، محفل مقدس برای شما باشد و هیچ کار خدمت در آن مکنید. ۲۶ 26
Na mokolo ya bambuma ya liboso, tango bokobonzela Yawe makabo ya mbuma ya sika, na tango ya feti ya baposo, bokozala na mayangani ya bule mpe bokosala mosala moko te oyo basalaka mokolo na mokolo.
و بجهت قربانی سوختنی برای عطر خوشبوی خداوند دو گاو جوان و یک قوچ و هفت بره نرینه یک ساله قربانی کنید. ۲۷ 27
Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe: bangombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana meme sambo ya mibali ya mobu moko.
و هدیه آردی آنها سه عشر آرد نرم سرشته شده با روغن برای هر گاو، و دو عشر برای هر قوچ. ۲۸ 28
Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta; mpo na meme moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta;
و یک عشر برای هر بره، از آن هفت بره. ۲۹ 29
mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato.
و یک بز نر تا برای شما کفاره شود. ۳۰ 30
Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino.
اینها را با هدیه آردی آنها و هدایای ریختنی آنها سوای قربانی سوختنی دائمی بگذرانید و برای شما بی‌عیب باشد. ۳۱ 31
Bokobonza mbeka yango na mbeka na yango ya masanga, bakisa mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma. Bosala keba ete ezala banyama oyo ezanga mbeba. › »

< اعداد 28 >