< نحمیا 9 >

و در روز بیست و چهارم این ماه، بنی‌اسرائیل روزه‌دار و پلاس دربر و خاک برسر جمع شدند. ۱ 1
Kaka na sanza wana, na mokolo ya tuku mibale na minei, bana ya Isalaele basanganaki mpo na kokila bilei; balataki basaki mpe bamipakolaki putulu na mito.
و ذریت اسرائیل خویشتن رااز جمیع غربا جدا نموده، ایستادند و به گناهان خود و تقصیرهای پدران خویش اعتراف کردند. ۲ 2
Bato nyonso oyo babotama na molongo ya bana ya Isalaele bakabwanaki na bapaya nyonso; batelemaki mpo na kotubela masumu na bango mpe bambeba ya batata na bango.
و در جای خود ایستاده، یک ربع روز کتاب تورات یهوه خدای خود را خواندند و ربع دیگراعتراف نموده، یهوه خدای خود را عبادت نمودند. ۳ 3
Batelemaki na esika oyo bazalaki, mpe buku ya Mobeko ya Yawe, Nzambe na bango, etangamaki ngonga misato; mpe ngonga misato mosusu, bafukamaki liboso ya Yawe, Nzambe na bango, mpo na kotubela masumu na bango.
و یشوع و بانی و قدمیئیل و شبنیا و بنی و شربیا و بانی و کنانی بر زینه لاویان ایستادند و به آواز بلند، نزد یهوه خدای خویش استغاثه نمودند. ۴ 4
Jozue, Buni, Kadimieli, Shebania, Bani, Sherebia mpe Kenani bamataki na etemelo ya kolobela oyo basalaki mpo na Balevi mpe babelelaki Yawe, Nzambe na bango na mongongo makasi.
آنگاه لاویان، یعنی یشوع و قدمیئیل وبانی و حشبنیا و شربیا و هودیا و شبنیا و فتحیاگفتند: «برخیزید و یهوه خدای خود را از ازل تا به ابد متبارک بخوانید. و اسم جلیل تو که از تمام برکات و تسبیحات اعلی تر است متبارک باد. ۵ 5
Bongo Balevi oyo: Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki: — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko: « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.
توبه تنهایی یهوه هستی. تو فلک و فلک الافلاک وتمامی جنود آنها را و زمین را و هر‌چه بر آن است و دریاها را و هر‌چه در آنها است، ساخته‌ای و توهمه اینها را حیات می‌بخشی و جنود آسمان تورا سجده می‌کنند. ۶ 6
Ezali Yo, bobele Yo, nde ozali Yawe! Okela Likolo, Likolo oyo eleki Likolo mpe mampinga nyonso ya Likolo; okela lisusu mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango; opesaka bomoi na bikelamu nyonso, mpe mampinga ya Likolo egumbamaka liboso na Yo.
تو‌ای یهوه آن خدا هستی که ابرام را برگزیدی و او را از اور کلدانیان بیرون آوردی واسم او را به ابراهیم تبدیل نمودی. ۷ 7
Ezali Yo, Yawe Nzambe, nde oponaki Abrami mpe obimisaki ye longwa na Uri, mokili ya Chalide, mpe opesaki ye kombo Abrayami.
ودل او را به حضور خود امین یافته، با وی عهدبستی که زمین کنعانیان و حتیان و اموریان وفرزیان و یبوسیان و جرجاشیان را به او ارزانی داشته، به ذریت او بدهی و وعده خود را وفا نمودی، زیرا که عادل هستی. ۸ 8
Omonaki ete motema na ye ezali na boyengebene epai na Yo mpe osalaki boyokani elongo na ye mpo na kopesa na bakitani na ye mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Perizi, ya bato ya Yebusi mpe ya bato ya Girigazi. Okokisaki elaka na Yo, pamba te ozali Sembo.
و مصیبت پدران ما را در مصر دیدی و فریاد ایشان را نزد بحر قلزم شنیدی. ۹ 9
Omonaki minyoko ya bakoko na biso kati na Ejipito mpe oyokaki koganga na bango pembeni ya ebale monene ya Barozo.
و آیات و معجزات بر فرعون و جمیع بندگانش و تمامی قوم زمینش ظاهر ساختی، چونکه می‌دانستی که بر ایشان ستم می‌نمودندپس به جهت خود اسمی پیدا کردی، چنانکه امروز شده است. ۱۰ 10
Osalaki bilembo minene mpe bikamwa mpo na kotelemela Faraon, bakalaka na ye nyonso mpe bato nyonso ya mokili na ye; pamba te oyebaki kanza ya mitema ya bato ya Ejipito mpe ndenge banyokolaki bakoko na biso. Boye osalaki ete sango ya Kombo na Yo ekende mosika ndenge ezali kino na mokolo ya lelo.
و دریا را به حضور ایشان منشق ساختی تا از میان دریا به خشکی عبورنمودند و تعاقب کنندگان ایشان را به عمقهای دریا مثل سنگ در آب عمیق انداختی. ۱۱ 11
Okabolaki ebale monene liboso na bango, mpe batambolaki kati na ebale yango lokola na mabele ya kokawuka. Kasi ozindisaki lokola libanga monene kati na mozindo ya mayi makasi, bato oyo bazalaki kolanda bango.
وایشان را در روز، به ستون ابر و در شب، به ستون آتش رهبری نمودی تا راه را که در آن باید رفت، برای ایشان روشن سازی. ۱۲ 12
Otambolisaki bango, na moyi, na nzela ya likonzi ya mapata, mpe, na butu, na nzela ya likonzi ya moto mpo na kongengisa nzela oyo basengelaki kotambola.
و بر کوه سینا نازل شده، با ایشان از آسمان تکلم نموده و احکام راست و شرایع حق و اوامر و فرایض نیکو را به ایشان دادی. ۱۳ 13
Okitaki na ngomba Sinai, olobaki na bango wuta na likolo mpe opesaki bango malako, mibeko ya solo mpe ya alima, mitindo mpe bikateli malamu.
و سبت مقدس خود را به ایشان شناسانیدی و اوامر و فرایض و شرایع به واسطه بنده خویش موسی به ایشان امر فرمودی. ۱۴ 14
Olakisaki bango Saba na Yo ya bule mpe opesaki bango mitindo, bikateli mpe mibeko na nzela ya Moyize, mosali na Yo.
و نان از آسمان برای گرسنگی ایشان دادی و آب ازصخره برای تشنگی ایشان جاری ساختی و به ایشان وعده دادی که به زمینی که دست خود رابرافراشتی که آن را به ایشان بدهی داخل شده، آن را به تصرف آورند. ۱۵ 15
Tango bazalaki na nzala, opesaki bango bilei wuta na likolo; mpe tango bazalaki na posa ya mayi, obimiselaki bango mayi wuta na libanga. Olobaki na bango ete bakende kobotola mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa bango.
«لیکن ایشان و پدران ما متکبرانه رفتارنموده، گردن خویش را سخت ساختند و اوامر تورا اطاعت ننمودند. ۱۶ 16
Kasi bango, bakoko na biso, bakomaki lolendo mpe mito makasi, batosaki mibeko na Yo te.
و از شنیدن ابا نمودند واعمال عجیبه‌ای را که در میان ایشان نمودی بیادنیاوردند، بلکه گردن خویش را سخت ساختند و فتنه انگیخته، سرداری تعیین نمودند تا (به زمین )بندگی خود مراجعت کنند. اما تو خدای غفار وکریم و رحیم و دیرغضب و کثیراحسان بوده، ایشان را ترک نکردی. ۱۷ 17
Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te,
بلکه چون گوساله ریخته شده‌ای برای خود ساختند و گفتند: (ای اسرائیل )! این خدای تو است که تو را از مصربیرون آورد. و اهانت عظیمی نمودند. ۱۸ 18
ezala tango bamisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende oyo banyangwisa na moto mpe balobaki: ‹ Tala Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito! › mpe tango balobaki maloba ya nkele mpo na kotelemela Yo.
آنگاه تونیز برحسب رحمت عظیم خود، ایشان را دربیابان ترک ننمودی، و ستون ابر در روز که ایشان را در راه رهبری می‌نمود از ایشان دور نشد و نه ستون آتش در شب که راه را که در آن باید بروندبرای ایشان روشن می‌ساخت. ۱۹ 19
Mpo na mawa monene na Yo, otikalaki kosundola bango te na esobe: likonzi ya mapata etikaki bango te, ekobaki kotambolisa bango na nzela na bango, na moyi; mpe na butu, likonzi ya moto etikaki te kongengisa nzela oyo basengelaki kolanda.
و روح نیکوی خود را به جهت تعلیم ایشان دادی و من خویش را از دهان ایشان باز نداشتی و آب برای تشنگی ایشان، به ایشان عطا فرمودی. ۲۰ 20
Opesaki bango Molimo malamu na Yo mpo na kopesa bango bososoli. Opimelaki bango te mana na Yo, oyo bazalaki kolia, mpe opesaki bango mayi ya komela tango bazalaki na posa ya mayi.
و ایشان را دربیابان چهل سال پرورش دادی که به هیچ‌چیزمحتاج نشدند. لباس ایشان مندرس نگردید وپایهای ایشان ورم نکرد. ۲۱ 21
Mibu tuku minei, okokisaki posa na bango nyonso kati na esobe; bazangaki eloko moko te, bilamba na bango etikalaki kokufa te, mpe makolo na bango etikalaki kovimba te.
و ممالک و قومها به ایشان ارزانی داشته، آنها را تا حدود تقسیم نمودی و زمین سیحون و زمین پادشاه حشبون وزمین عوج پادشاه باشان را به تصرف آوردند. ۲۲ 22
Okabaki mikili mpe bikolo na maboko na bango mpo ete bazwa bituka na bango kino na bandelo na yango. Babotolaki mokili ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.
وپسران ایشان را مثل ستارگان آسمان افزوده، ایشان را به زمینی که به پدران ایشان وعده داده بودی که داخل شده، آن را به تصرف آورند، درآوردی. ۲۳ 23
Okomisaki bana na bango ya mibali ebele lokola minzoto ya likolo mpe omemaki bango kino kati na mokili oyo opeselaki bakoko na bango mitindo ete bakende kobotola yango.
«پس، پسران ایشان داخل شده، زمین را به تصرف آوردند و کنعانیان را که سکنه زمین بودند، به حضور ایشان مغلوب ساختی و آنها را با پادشاهان آنها و قومهای زمین، به‌دست ایشان تسلیم نمودی، تا موافق اراده خود با آنها رفتارنمایند. ۲۴ 24
Bana na bango ya mibali bakotaki mpe babotolaki mokili yango. Otiaki na se ya bokonzi na bango, bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna; okabaki bato ya Kanana elongo na bakonzi na bango na maboko ya bana ya Isalaele mpo ete basala bato ya Kanana ndenge balingi.
پس شهرهای حصاردار و زمینهای برومند گرفتند و خانه های پر از نفایس وچشمه های کنده شده و تاکستانها و باغات زیتون و درختان میوه دار بیشمار به تصرف آوردند وخورده و سیر شده و فربه گشته، از نعمتهای عظیم تو متلذذ گردیدند. ۲۵ 25
Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso.
و بر تو فتنه انگیخته و تمردنموده، شریعت تو را پشت سر خود انداختند وانبیای تو را که برای ایشان شهادت می‌آوردند تابسوی تو بازگشت نمایند، کشتند و اهانت عظیمی به عمل آوردند. ۲۶ 26
Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.
آنگاه تو ایشان را به‌دست دشمنانشان تسلیم نمودی تا ایشان را به تنگ آورند و در حین تنگی خویش، نزد تواستغاثه نمودند و ایشان را از آسمان اجابت نمودی و برحسب رحمتهای عظیم خود، نجات دهندگان به ایشان دادی که ایشان را ازدست دشمنانشان رهانیدند. ۲۷ 27
Boye okabaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo banyokolaki bango. Kasi tango bakomaki na pasi makasi, babelelaki Yo; mpe Yo, wuta na likolo, oyokaki bango; bongo na mawa monene na Yo, otindelaki bango bakangoli oyo bakangolaki bango na maboko ya banguna na bango.
«اما چون استراحت یافتند، بار دیگر به حضور تو شرارت ورزیدند و ایشان را به‌دست دشمنانشان واگذاشتی که بر ایشان تسلط نمودند. و چون باز نزد تو استغاثه نمودند، ایشان را ازآسمان اجابت نمودی و برحسب رحمتهای عظیمت، بارهای بسیار ایشان را رهایی دادی. ۲۸ 28
Kasi tango kaka bakomaki na kimia, bazongelaki lisusu kosala mabe na miso na Yo! Mpe Yo, osundolaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo bakomaki kokonza bango. Kasi tango babelelaki Yo lisusu, oyokaki bango wuta na likolo mpe, na mawa monene na Yo, okangolaki bango mbala mingi.
و برای ایشان شهادت فرستادی تا ایشان را به شریعت خود برگردانی، اما ایشان متکبرانه رفتارنموده، اوامر تو را اطاعت نکردند و به احکام توکه هر‌که آنها را بجا آورد از آنها زنده میماند، خطاورزیدند و دوشهای خود را معاند و گردنهای خویش را سخت نموده، اطاعت نکردند. ۲۹ 29
Okebisaki bango mpo ete bazongela Mibeko na Yo; kasi, na lolendo na bango, baboyaki kotosa mitindo na Yo. Basalaki masumu, babukaki mibeko na Yo, oyo nzokande esalaka ete moto oyo akotia yango na misala azala na bomoi. Kasi na lolendo mpe na botomboki na bango, bapesaki Yo mokongo, bakomaki mito makasi mpe baboyaki koyoka.
«معهذا سالهای بسیار با ایشان مدارانمودی و به روح خویش به واسطه انبیای خودبرای ایشان شهادت فرستادی، اما گوش نگرفتند. لهذا ایشان را به‌دست قوم های کشورهاتسلیم نمودی. ۳۰ 30
Ozalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya.
اما برحسب رحمتهای عظیمت، ایشان را بالکل فانی نساختی و ترک ننمودی، زیراخدای کریم و رحیم هستی. ۳۱ 31
Kasi na mawa monene na Yo, osilisaki bango te na koboma mpe osundolaki bango te; pamba te ozali Nzambe otonda na mawa mpe na ngolu.
و الان‌ای خدای ما، ای خدای عظیم و جبار و مهیب که عهد ورحمت را نگاه می‌داری، زنهار تمامی این مصیبتی که بر ما و بر پادشاهان و سروران و کاهنان و انبیا و پدران ما و بر تمامی قوم تو از ایام پادشاهان اشور تا امروز مستولی شده است، درنظر تو قلیل ننماید. ۳۲ 32
Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.
و تو در تمامی این چیزهایی که بر ما وارد شده است عادل هستی، زیرا که تو به راستی عمل نموده‌ای، اما ما شرارت ورزیده‌ایم. ۳۳ 33
Kati na makambo nyonso oyo ekweyelaki biso, ozalaki sembo; mpe osalaki na boyengebene, wana biso totambolaki mabe.
و پادشاهان و سروران و کاهنان وپدران ما به شریعت تو عمل ننمودند و به اوامر وشهادات تو که به ایشان امر فرمودی، گوش ندادند. ۳۴ 34
Bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso mpe batata na biso batiaki Mibeko na Yo na mosala te, batosaki te mitindo mpe makebisi na Yo, oyo ozalaki kopesa bango.
و در مملکت خودشان و در احسان عظیمی که به ایشان نمودی و در زمین وسیع وبرومند که پیش روی ایشان نهادی تو را عبادت ننمودند و از اعمال شنیع خویش بازگشت نکردند. ۳۵ 35
Ezala wana bazalaki kati na mokili na bango, wana bazalaki kosepela mpo na bolamu oyo ozalaki kotalisa bango kati na mokili monene oyo mabele na yango ebotaka malamu, basalelaki Yo te mpe batikaki te banzela mabe na bango.
«اینک ما امروز غلامان هستیم و در زمینی که به پدران ما دادی تا میوه و نفایس آن رابخوریم، اینک در آن غلامان هستیم. ۳۶ 36
Kasi tala, tozali lelo bawumbu! Tozali penza bawumbu kati na mokili oyo opesaki na bakoko na biso mpo ete balia mbuma na yango mpe biloko mosusu ya kitoko oyo ebimaka kuna!
و آن، محصول فراوان خود را برای پادشاهانی که به‌سبب گناهان ما، بر ما مسلط ساخته‌ای می‌آورد و ایشان بر جسدهای ما و چهارپایان ما برحسب اراده خود حکمرانی می‌کنند و ما در شدت تنگی گرفتار هستیم. ۳۷ 37
Mpo na masumu na biso, ebele ya mbuma na yango ekeyi na maboko ya bakonzi oyo otiaki na makasi mpo ete banyokola biso. Bazali kokonza banzoto na biso mpe bibwele na biso ndenge balingi. Tokomi na pasi makasi. »
و به‌سبب همه این امور، ما عهدمحکم بسته، آن را نوشتیم و سروران و لاویان وکاهنان ما آن را مهر کردند.» ۳۸ 38
Mpo na makambo oyo nyonso, tozali kozwa mokano oyo tozali kokoma na mokanda; mpe bakambi na biso, Balevi na biso mpe Banganga-Nzambe na biso bakotia mikoloto na bango na mokanda yango.

< نحمیا 9 >