< داوران 20 >

و جمیع بنی‌اسرائیل بیرون آمدند وجماعت مثل شخص واحد از دان تابئرشبع با اهل زمین جلعاد نزد خداوند در مصفه جمع شدند. ۱ 1
Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.
و سروران تمام قوم و جمیع اسباطاسرائیل یعنی چهارصد هزار مرد شمشیر زن پیاده در جماعت قوم خدا حاضر بودند. ۲ 2
Bakambi ya bato nyonso, ya mabota nyonso ya Isalaele bazalaki kati na lisanga ya bato ya Nzambe: ezalaki na basoda nkoto nkama minei oyo batambolaka na makolo mpe bayebi kobunda na mopanga.
وبنی بنیامین شنیدند که بنی‌اسرائیل در مصفه برآمده‌اند. و بنی‌اسرائیل گفتند: «بگویید که این عمل زشت چگونه شده است.» ۳ 3
Bana ya libota ya Benjame bayokaki ete bana ya Isalaele mosusu bakendeki kuna na Mitsipa. Bongo bana ya Isalaele balobaki: — Yebisa biso ndenge nini kufa ya somo boye esalemaki.
آن مرد لاوی که شوهر زن مقتوله بود، در جواب گفت: «من با کنیزخود به جبعه که از آن بنیامین باشد، آمدیم تا شب را بسر بریم. ۴ 4
Molevi, mobali ya mwasi oyo babomaki, alobaki: — Ngai mpe makangu na ngai, toyaki na Gibea, na mokili ya Benjame mpo na kolekisa butu.
و اهل جبعه بر من برخاسته، خانه رادر شب، گرد من احاطه کردند، و مرا خواستندبکشند و کنیز مرا ذلیل نمودند که بمرد. ۵ 5
Na kati-kati ya butu, bavandi ya Gibea batombokelaki ngai mpe bazingelaki ndako mpo ete baboma ngai; basangisaki nzoto na makasi na makangu na ngai, mpe akufaki.
و کنیز خود را گرفته، او را قطعه قطعه کردم و او را درتمامی ولایت ملک اسرائیل فرستادم، زیرا که کارقبیح و زشت در اسرائیل نمودند. ۶ 6
Nakamataki makangu na ngai, nakataki ye na biteni mpe natindaki eteni moko na moko kati na etuka oyo bapesaki na bana ya Isalaele, pamba te bato ya libota ya Benjame basalaki likambo ya somo mpe ya soni.
هان جمیع شما، ای بنی‌اسرائیل حکم و مشورت خود رااینجا بیاورید.» ۷ 7
Sik’oyo, bino nyonso bana ya Isalaele, boloba mpe bokata likambo oyo.
آنگاه تمام قوم مثل شخص واحد برخاسته، گفتند: «هیچ کدام از ما به خیمه خود نخواهیم رفت، و هیچ کدام از ما به خانه خود بر نخواهیم گشت. ۸ 8
Bato nyonso batelemaki lokola moto moko mpe balobaki: « Moto moko te kati na biso akozonga na ndako na ye ya kapo to na ndako na ye.
و حال کاری که به جبعه خواهیم کرد این است که به حسب قرعه بر آن برآییم. ۹ 9
Tala sik’oyo likambo oyo tokosala bato ya Gibea: Tokokende kobundisa bango kolanda ndenge zeke oyo tokobeta ekotalisa.
و ده نفراز صد و صد از هزار و هزار از ده هزار از تمامی اسباط اسرائیل بگیریم تا آذوقه برای قوم بیاورند، و تا چون به جبعه بنیامینی برسند با ایشان موافق همه قباحتی که در اسرائیل نموده‌اند، رفتارنمایند.» ۱۰ 10
Tokozwa bato zomi kati na bato nkama moko ya mabota nyonso ya Isalaele, tokozwa bato nkama moko kati na bato nkoto moko mpe bato nkoto moko kati na bato nkoto zomi, mpo na kopesa biloko ya kolia epai ya mampinga. Bongo tango mampinga ekokoma na Gibea, na mokili ya Benjame, bakobundisa bato ya Gibea mpo na makambo nyonso ya somo oyo basalaki kati na Isalaele. »
پس جمیع مردان اسرائیل بر شهر جمع شده، مثل شخص واحد متحد شدند. ۱۱ 11
Boye, mibali nyonso ya Isalaele basanganaki esika moko mpe bayokanaki lokola moto moko mpo na kobundisa engumba Gibea.
و اسباطاسرائیل اشخاصی چند در تمامی سبط بنیامین فرستاده، گفتند: «این چه شرارتی است که در میان شما واقع شده است؟ ۱۲ 12
Bato ya bikolo ya Isalaele batindaki mibali kati na mabota nyonso ya Benjame mpe balobaki: « Ndenge nini bosali lisumu ya somo boye kati na bino?
پس الان آن مردان بنی بلیعال را که در جبعه هستند، تسلیم نمایید تاآنها را به قتل رسانیم، و بدی را از اسرائیل دورکنیم.» اما بنیامینیان نخواستند که سخن برادران خود بنی‌اسرائیل را بشنوند. ۱۳ 13
Sik’oyo, botindela biso bato mabe wana ya Gibea mpo ete toboma bango mpe tolongola mabe kati na Isalaele. » Kasi bato ya Benjame baboyaki koyokela baninga na bango, bana ya Isalaele.
و بنی بنیامین ازشهرهای خود به جبعه جمع شدند تا بیرون رفته، با بنی‌اسرائیل جنگ نمایند. ۱۴ 14
Wuta na bingumba na bango nyonso ya mike, bato ya libota ya Benjame basanganaki esika moko, na Gibea, mpo na kobundisa bana ya Isalaele.
و از بنی بنیامین درآن روز بیست و ششهزار مرد شمشیرزن ازشهرها سان دیده شد، غیر از ساکنان جبعه که هفتصد نفر برگزیده، سان دیده شد. ۱۵ 15
Na mokolo wana, bato ya libota ya Benjame basangisaki basoda nkoto tuku mibale na motoba oyo bayebi kobunda na mopanga, wuta na bamboka na bango nyonso ya mike, longola kaka engumba Gibea oyo esangisaki mibali ya bitumba nkama sambo.
و از تمام این گروه هفتصد نفر چپ دست برگزیده شدند که هر یکی از آنها مویی را به سنگ فلاخن می‌زدند وخطا نمی کردند. ۱۶ 16
Kati na basoda wana, ezalaki na mibali nkama sambo ya makasi oyo basalelaka loboko ya mwasi. Moto moko na moko kati na bango, soki abwaki libanga na nzela ya ebambelo mabanga, ekoki soki moke te kozanga kotuta suki moko.
و از مردان اسرائیل سوای بنیامینیان چهارصد هزار مرد شمشیرزن سان دیده شد که جمیع اینها مردان جنگی بودند. ۱۷ 17
Mibali ya Isalaele, longola kaka bato ya libota ya Benjame, bazalaki nkoto nkama minei, ba-oyo bayebi kosalela mopanga; mpe bango nyonso bazalaki bato ya bitumba.
و بنی‌اسرائیل برخاسته، به بیت ئیل رفتند واز خدا مشورت خواسته، گفتند: «کیست که اولااز ما برای جنگ نمودن با بنی بنیامین برآید؟» خداوند گفت: «یهودا اول برآید.» ۱۸ 18
Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe: — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame? Yawe azongisaki: — Yuda akokende liboso.
و بنی‌اسرائیل بامدادان برخاسته، در برابرجبعه اردو زدند. ۱۹ 19
Na tongo oyo elandaki, bana ya Isalaele bakendeki mpe batongaki molako na bango pembeni ya Gibea.
و مردان اسرائیل بیرون رفتندتا با بنیامینیان جنگ نمایند، و مردان اسرائیل برابر ایشان در جبعه صف آرایی کردند. ۲۰ 20
Mibali ya Isalaele babimaki mpo na kobundisa bato ya libota ya Benjame mpe bamibongisaki mpo na kobundisa bango na Gibea.
وبنی بنیامین از جبعه بیرون آمده، در آن روز بیست و دو هزار نفر از اسرائیل را بر زمین هلاک کردند. ۲۱ 21
Bato ya libota ya Benjame babimaki na Gibea mpe babomaki, mokolo wana, mibali ya Isalaele nkoto tuku mibale na mibale.
و قوم، یعنی مردان اسرائیل خود را قوی‌دل ساخته، بار دیگر صف آرایی نمودند، در مکانی که روز اول صف آرایی کرده بودند. ۲۲ 22
Kasi mibali ya Isalaele bamilendisaki, bango na bango, mpe babongamaki na esika oyo bazalaki na mokolo ya liboso.
وبنی‌اسرائیل برآمده، به حضور خداوند تا شام گریه کردند، و از خداوند مشورت خواسته، گفتند: «آیا بار دیگر نزدیک بشوم تا با برادران خود بنی بنیامین جنگ نمایم؟» خداوند گفت: «به مقابله ایشان برآیید.» ۲۳ 23
Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe: — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame? Yawe azongiselaki bango: — Bokende kobundisa bango.
و بنی‌اسرائیل در روز دوم به مقابله بنی بنیامین پیش آمدند. ۲۴ 24
Na mokolo ya mibale, bana ya Isalaele babundisaki bato ya libota ya Benjame.
و بنیامینیان در روزدوم به مقابله ایشان از جبعه بیرون شده، بار دیگرهجده هزار نفر از بنی‌اسرائیل را بر زمین هلاک ساختند که جمیع اینها شمشیرزن بودند. ۲۵ 25
Na tango wana, bana ya libota ya Benjame bakimaki na Gibea mpo na kobundisa bana ya Isalaele, babomaki lisusu mibali ya Isalaele nkoto zomi na mwambe; bango nyonso bazalaki bato oyo bayebi kobunda na mopanga.
آنگاه تمامی بنی‌اسرائیل، یعنی تمامی قوم برآمده، به بیت ئیل رفتند و گریه کرده، در آنجا به حضور خداوند توقف نمودند، و آن روز را تا شام روزه داشته، قربانی های سوختنی و ذبایح سلامتی به حضور خداوند گذرانیدند. ۲۶ 26
Bana ya Isalaele bakendeki, bango nyonso, na Beteli, mpe kuna, bavandaki mpe balelaki liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bana ya Isalaele bakilaki bilei kino na pokwa mpe babonzaki, epai na Yawe, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani.
و بنی‌اسرائیل از خداوند مشورت خواستند. وتابوت عهد خدا آن روزها در آنجا بود. ۲۷ 27
Bana ya Isalaele batunaki Yawe. (Na mikolo wana, Sanduku ya Boyokani ya Nzambe ezalaki kuna.
وفینحاس بن العازار بن هارون در آن روزها پیش آن ایستاده بود، و گفتند: «آیا بار دیگر بیرون روم و بابرادران خود بنی بنیامین جنگ کنم یا دست بردارم؟» خداوند گفت: «برآی زیرا که فردا او رابه‌دست تو تسلیم خواهم نمود.» ۲۸ 28
Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki: — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te? Yawe azongisaki: — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.
پس اسرائیل در هر طرف جبعه کمین ساختند. ۲۹ 29
Bongo mibali ya Isalaele babombamaki mpe bazingelaki Gibea.
و بنی‌اسرائیل در روز سوم به مقابله بنی بنیامین برآمدند، و مثل سابق در برابر جبعه صف آرایی نمودند. ۳۰ 30
Bana ya Isalaele bakendeki na mokolo ya misato kobundisa libota ya Benjame mpe bamibongisaki malamu mpo na kobundisa Gibea lokola na mbala ya liboso.
و بنی بنیامین به مقابله قوم بیرون آمده، از شهر کشیده شدند و به زدن و کشتن قوم در راهها که یکی از آنها به سوی بیت ئیل ودیگری به سوی جبعه می‌رود مثل سابق شروع کردند، و به قدر سی نفر از اسرائیل در صحراکشته شدند. ۳۱ 31
Bana ya Benjame babimelaki bango mpe babendaki bango mosika ya engumba. Babandaki koboma bana ya Isalaele ndenge basalaki liboso; babomaki bato pene tuku misato kati na zamba, na nzela ya Beteli mpe ya Gibea.
و بنی بنیامین گفتند که «ایشان مثل سابق پیش ما منهزم شدند.» اما بنی‌اسرائیل گفتند: «بگریزیم تا ایشان را از شهر به راههابکشیم.» ۳۲ 32
Libota ya Benjame bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso. Nzokande bana ya Isalaele bazwaki mokano ya kokima mpe ya komema bango mosika ya engumba, mosika ya Gibea.
و تمامی مردان اسرائیل از مکان خودبرخاسته، در بعل تامار صف آرایی نمودند، وکمین کنندگان اسرائیل از مکان خود یعنی از معره جبعه به در جستند. ۳۳ 33
Na bongo, bana ya Isalaele batelemaki na bisika na bango mpe bakendeki kosangana mpo na bitumba, na Bala-Tamari. Bana ya Isalaele, oyo babombamaki, babimaki na bisika na bango mpe balandaki bango na etando ya polele, na Gibea.
و ده هزار مرد برگزیده ازتمام اسرائیل در برابر جبعه آمدند و جنگ سخت شد، و ایشان نمی دانستند که بلا بر ایشان رسیده است. ۳۴ 34
Mibali makasi ya Isalaele, nkoto zomi, babimaki na Gibea; mpe bitumba ezalaki makasi. Kasi bana ya libota ya Benjame basosolaki te mabe nini ekokomela bango.
و خداوند بنیامین را به حضور اسرائیل مغلوب ساخت و بنی‌اسرائیل در آن روز بیست وپنجهزار و یکصد نفر را از بنیامین هلاک ساختندکه جمیع ایشان شمشیرزن بودند. ۳۵ 35
Yawe abetaki bana ya Benjame liboso ya Isalaele, mpe, na mokolo wana, bana ya Isalaele babomaki mibali nkoto tuku mibale na nkama moko kati na libota ya Benjame, ba-oyo bayebi kobunda na mopanga.
و بنی بنیامین دیدند که شکست یافته اندزیرا که مردان اسرائیل به بنیامینیان جا داده بودند، چونکه اعتماد داشتند بر کمینی که به اطراف جبعه نشانده بودند. ۳۶ 36
Bongo bana ya Benjame bamonaki ete bakweyi penza na bitumba. Nzokande bana ya Isalaele bakosaki kozonga sima mpo ete batiaki elikya na bango epai ya mibali oyo babombamaki pene ya Gibea.
و کمین کنندگان تعجیل نموده، بر جبعه هجوم آوردند و کمین کنندگان خود را پراکنده ساخته، تمام شهر را به دم شمشیرزدند. ۳۷ 37
Mibali yango babimelaki mbala moko Gibea, bapanzanaki mpe babetaki engumba mobimba na mopanga.
و در میان مردان اسرائیل و کمین کنندگان علامتی قرار داده شد که تراکم دود بسیار بلند ازشهر برافرازند. ۳۸ 38
Mibali ya Isalaele mpe bandeko na bango, oyo babombamaki pene ya Gibea, bayokanaki na elembo moko: mibali oyo babombamaki basengeli komatisa wuta na engumba lipata ya milinga na likolo.
پس چون مردان اسرائیل درجنگ رو گردانیدند، بنیامینیان شروع کردند به زدن و کشتن قریب سی نفر از مردان اسرائیل زیراگفتند یقین ایشان مثل جنگ اول از حضور ماشکست یافته‌اند. ۳۹ 39
Tango bana ya Isalaele bamonaki lipata wana ya milinga, bapesaki mokongo na bitumba. Kasi mibali ya Benjame babandaki kobeta mpe koboma bana ya Isalaele pene tuku misato. Bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso.
و چون آن تراکم ستون دوداز شهر بلند شدن گرفت، بنیامینیان از عقب خودنگریستند و اینک تمام شهر به سوی آسمان به دود بالا می‌رود. ۴۰ 40
Kasi tango lipata ya milinga ebandaki komata makasi na likolo, bana ya Benjame babalukaki mpe bamonaki engumba na bango mobimba kopela moto mpe komatisa likonzi monene ya lipata ya milinga.
و بنی‌اسرائیل برگشتند وبنیامینیان پریشان شدند، زیرا دیدند که بلا برایشان رسیده است. ۴۱ 41
Bana ya Isalaele babalolaki elongi na bango mpo na kotala mibali ya Benjame. Bongo mibali ya Benjame babangaki mpo ete bamonaki likama oyo ekomeli bango.
پس از حضور مردان اسرائیل به راه صحرا روگردانیدند. اما جنگ، ایشان را در‌گرفت و آنانی که از شهر بیرون آمدندایشان را در میان، هلاک ساختند. ۴۲ 42
Boye, bapesaki bana ya Isalaele mokongo mpe bakimaki na nzela ya esobe. Kasi bitumba elandaki bango, mpe mibali ya Isalaele, oyo babimaki na engumba Gibea, basilisaki koboma bango nyonso na nzela na bango.
پس بنیامینیان را احاطه کرده، ایشان را تعاقب نمودند، و در منوحه در مقابل جبعه به سوی طلوع آفتاب ایشان را پایمال کردند. ۴۳ 43
Bazingelaki bana ya Benjame, balandaki bango na kozanga kopema mpe banyataki bango na makolo kino liboso ya Gibea, na ngambo oyo moyi ebimelaka.
و هجده هزار نفر ازبنیامین که جمیع ایشان مردان جنگی بودند، افتادند. ۴۴ 44
Kati na bana ya Benjame, mibali nkoto zomi na mwambe bakufaki: bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.
و ایشان برگشته، به سوی صحرا تاصخره رمون بگریختند. و پنج هزار نفر از ایشان را به‌سر راهها هلاک کردند، و ایشان را تا جدعوم تعاقب کرده، دو هزار نفر از ایشان را کشتند. ۴۵ 45
Ndambo kati na bango bakimaki na nzela ya esobe, na ngambo ya libanga monene ya Rimoni. Na nzela, bana ya Isalaele babomaki bato nkoto mitano oyo balokotaki na nzela. Balandaki bango lisusu kino na Gideomi mpe babomaki mibali nkoto mibale.
پس جمیع کسانی که در آن روز از بنیامین افتادند، بیست و پنج هزار مرد شمشیرزن بودندکه جمیع آنها مردان جنگی بودند. ۴۶ 46
Motango nyonso ya bana ya Benjame oyo bakufaki na mokolo wana ezalaki nkoto tuku mibale na mitano: bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba mpe bayebaki kobunda na mopanga.
اما ششصدنفر برگشته، به سوی بیابان به صخره رمون فرارکردند، و در صخره رمون چهار ماه بماندند. ۴۷ 47
Mibali nkama motoba kati na bango balongaki kopesa mokongo mpe kokima na nzela ya esobe kino na libanga monene ya Rimoni. Bawumelaki kuna sanza minei.
ومردان اسرائیل بر بنیامینیان برگشته، ایشان را به دم شمشیر کشتند، یعنی تمام اهل شهر و بهایم وهرچه را که یافتند و همچنین همه شهرهایی را که به آنها رسیدند، به آتش سوزانیدند. ۴۸ 48
Mibali ya Isalaele bazongelaki bato ya libota ya Benjame mpe babomaki na mopanga mibali nyonso elongo na bibwele na bango, kobanda na engumba Gibea kino na bamboka mike. Batumbaki bamboka mike nyonso epai wapi balekaki.

< داوران 20 >