< یوشع 19 >

و قرعه دومین برای شمعون برآمد، یعنی برای سبط بنی شمعون برحسب قبایل ایشان، و ملک ایشان در میان ملک بنی یهودا بود. ۱ 1
Na mbala ya mibale, zeke ekweyaki epai ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango. Libula na bango ezalaki na kati-kati ya eteni ya mabele ya libota ya Yuda.
و اینها نصیب ایشان شد یعنی بئیر شبع و شبع و مولادا. ۲ 2
Bazwaki lokola libula: Beri-Sheba, Sheba, Molada,
و حصر شوعال و بالح و عاصم. ۳ 3
Atsari-Shuwali, Bala, Atsemi,
و التولد و بتول و حرمه. ۴ 4
Elitoladi, Betuli, Orima,
صقلغ و بیت مرکبوت و حصر سوسه. ۵ 5
Tsikilagi, Beti-Marikaboti, Atsari-Suza,
و بیت لباعوت وشاروحن. سیزده شهر با دهات آنها. ۶ 6
Beti-Lebaoti mpe Sharueni: bingumba nyonso ezalaki zomi na misato elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
و عین ورمون و عاتر و عاشان، چهارده شهر با دهات آنها. ۷ 7
Ayini, Rimoni, Eteri mpe Ashani: bingumba nyonso ezalaki minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike
تمامی دهاتی که در اطراف این شهرها تا بعلت بئیر رامه جنوبی بود. ملک سبط بنی شمعون برحسب قبایل ایشان این بود. ۸ 8
mpe bamboka nyonso ya mike-mike oyo ezalaki zingazinga ya bingumba oyo, kino na Baalati-Beeri, oyo ezali Ramati ya Negevi. Yango nde ezalaki libula ya mabele ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango.
و ملک بنی شمعون از میان قسمت بنی یهودا بود، زیرا قسمت بنی یهودا برای ایشان زیاد بود، پس بنی شمعون ملک خود را از میان ملک ایشان گرفتند. ۹ 9
Bazwaki eteni ya mabele ya libota ya Simeoni kati na eteni ya mabele ya libota ya Yuda, pamba te eteni ya mabele ya libota ya Yuda ezalaki monene koleka. Yango wana, bakitani ya Simeoni bazwaki libula na bango kati na eteni ya mabele ya libota ya Yuda.
و قرعه سوم برای بنی زبولون برحسب قبایل ایشان برآمد، و حد ملک ایشان تا ساریدرسید. ۱۰ 10
Na mbala ya misato, zeke ekweyaki epai ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango: Mondelo ya libula na bango ekendeki kino na Saridi.
و حد ایشان به طرف مغرب تا مرعله رفت و تا دباشه رسید و تا وادی که در مقابل یقنعام است، رسید. ۱۱ 11
Longwa wana, emataki na ngambo ya weste, pene ya Mareala, ekendeki kotutana na Dabesheti, kino na lubwaku oyo ezali pene ya Yokineami.
و از سارید به سمت مشرق به سوی مطلع آفتاب تا سرحد کسلوت تابور پیچید، و نزد دابره بیرون آمده، به یافیع رسید. ۱۲ 12
Longwa na Saridi, ebalukaki na ngambo ya este, epai moyi ebimelaka, na mondelo ya Kisiloti-Tabori, ekendeki na ngambo ya Dabirati mpe emataki na kino na Yafia.
و از آنجا به طرف مشرق تا جت حافر وتا عت قاصین گذشته، نزد رمون بیرون آمد و تانیعه کشیده شد. ۱۳ 13
Ekobaki koleka na ngambo ya este kino na Gati-Eferi mpe Ita-Katsini, ebimelaki na Rimoni mpe ebalukaki na ngambo ya Neya.
و این حد به طرف شمال تاحناتون آن را احاطه کرد، و آخرش نزد وادی یفتحئیل بود. ۱۴ 14
Mondelo yango ezingelaki Anatoni, na ngambo ya nor, mpe esukaki na Lubwaku ya Yifita-Eli.
و قطه و نهلال و شمرون و یداله و بیت لحم، دوازده شهر با دهات آنها. ۱۵ 15
Ekamataki mpe lisusu, Katati, Naalali, Shimironi, Yideala mpe Beteleemi: bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
این ملک بنی زبولون برحسب قبایل ایشان بود، یعنی‌این شهرها با دهات آنها. ۱۶ 16
Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango.
و قرعه چهارم برای یساکار برآمد یعنی برای بنی یساکار برحسب قبایل ایشان. ۱۷ 17
Na mbala ya minei, zeke ekweyaki epai ya libota ya Isakari, kolanda bituka na bango.
و حدایشان تا یزرعیل و کسلوت و شونم بود. ۱۸ 18
Kati na eteni ya mabele na bango, ezalaki na: Jizireyeli, Kesuloti, Sunemi,
وحفارایم و شیئون و اناحره. ۱۹ 19
Afarayimi, Shiyoni, Anakarati,
و ربیت و قشیون وآبص. ۲۰ 20
Rabiti, Kishioni, Abetsi,
و رمه و عین جنیم و عین حده و بیت فصیص. ۲۱ 21
Remeti, Eyini-Ganimi, Eyini-Ada mpe Beti-Patseti.
و این حد به تابور و شحصیمه وبیت شمس رسید، و آخر حد ایشان نزد اردن بود. یعنی شانزده شهر با دهات آنها. ۲۲ 22
Mondelo na yango etutanaki na Tabori, Shakatsima mpe Beti-Shemeshi, bongo esukaki na Yordani. Bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
این ملک سبطبنی یساکار برحسب قبایل ایشان بود، یعنی شهرها با دهات آنها. ۲۳ 23
Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Isakari, kolanda bituka na bango.
و قرعه پنجم برای سبط بنی اشیر برحسب قبایل ایشان بیرون آمد. ۲۴ 24
Na mbala ya mitano, zeke ekweyaki epai ya libota ya Aseri, kolanda bituka na bango.
و حد ایشان حلقه وحلی و باطن و اکشاف. ۲۵ 25
Eteni ya mabele na bango ezalaki: Elikati, Ali, Beteni, Akishafi,
و الملک و عمعاد ومشال و به طرف مغرب به کرمل و شیحور لبنه رسید. ۲۶ 26
Alameleki, Ameadi mpe Misheali. Mondelo na yango etutanaki na Karimeli mpe Shiyori-Libinati na ngambo ya weste;
و به سوی مشرق آفتاب به بیت داجون پیچیده، تا زبولون رسید، و به طرف شمال تاوادی یفتحئیل و بیت عامق و نعیئیل وبه طرف چپ نزد کابول بیرون آمد. ۲۷ 27
ebalukaki na ngambo ya este, na Beti-Dagoni, ekendeki kotutana na Zabuloni mpe Lubwaku ya Yifita-Eli, ekendeki na ngambo ya nor, na Beti-Emeki mpe Neyiyeli mpe elekelaki na Kabuli, na loboko ya mwasi.
و به حبرون ورحوب و حمون و قانه تا صیدون بزرگ. ۲۸ 28
Ekendeki kino na Ebron, Reobi, Amoni mpe Kana kino na Sidoni, engumba monene.
واین حد به سوی رامه به شهر حصاردار صور پیچید واین حد به سوی حوصه برگشت، و انتهایش نزددریا در دیار اکزیب بود. ۲۹ 29
Mondelo yango ebalukaki na ngambo ya Rama mpe ekendeki kino na engumba ya Tiri, oyo batonga makasi, ebalukaki na ngambo ya Osa mpe na ngambo ya Ebale monene mpe esukaki na Ebale monene Mediterane, na etuka ya Akizibi,
و عمه و عفیق ورحوب، و بیست و دو شهر با دهات آنها. ۳۰ 30
ya Uma, ya Afeki, ya Reobi. Bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
ملک سبط بنی اشیر برحسب قبایل ایشان این بود، یعنی‌این شهرها با دهات آنها. ۳۱ 31
Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Aseri, kolanda bituka na bango.
و قرعه ششم برای بنی نفتالی بیرون آمد، یعنی برای بنی نفتالی برحسب قبایل ایشان. ۳۲ 32
Na mbala ya motoba, zeke ekweyaki epai ya libota ya Nefitali, kolanda bituka na bango.
وحد ایشان از حالف از بلوطی که در صعنیم است و ادامی و ناقب و یبنئیل تا لقوم بود و آخرش نزداردن بود ۳۳ 33
Eteni ya mabele na bango ezalaki longwa na Elefi, longwa na terebente oyo ezali na Tsananimi, lekela na Adamu-Nekebi mpe Yabineyeli kino na Lakumi mpe esukaki na Yordani.
و حدش به سمت مغرب به سوی ازنوت تا بور پیچید، و از آنجا تا حقوق بیرون آمد، و به سمت جنوب به زبولون رسید و به سمت مغرب به اشیر رسید، و به سمت مشرق به یهودا نزد اردن. ۳۴ 34
Mondelo na yango ebalukaki na ngambo ya weste na Azinoti-Tabori mpe ekendeki kobimela na Ukoki, etutanaki na Zabuloni, na ngambo ya sude, na Aseri, na ngambo ya weste, mpe Yuda; Yordani, na ngambo ya este.
و شهرهای حصاردار صدیم وصیر و حمه و رقه و کناره. ۳۵ 35
Bingumba batonga makasi ezalaki: Tsidimi, Tseri, Amati, Rakati, Kinereti,
و ادامه و رامه وحاصور. ۳۶ 36
Adama, Rama, Atsori;
و قادش و اذرعی و عین حاصور. ۳۷ 37
Kedeshi, Edreyi, Eyini-Atsori;
ویرون و مجدلئیل و حوریم و بیت عناه و بیت شمس، نوزده شهر با دهات آنها. ۳۸ 38
Yireoni, Migidali-Eli, Oremi, Beti-Anati mpe Beti-Shemeshi. Bingumba nyonso ezalaki zomi na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike.
ملک سبطبنی نفتالی برحسب قبایل ایشان این بود، یعنی شهرها با دهات آنها. ۳۹ 39
Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Nefitali, kolanda bituka na bango.
و قرعه هفتم برای سبط بنی دان برحسب قبایل ایشان بیرون آمد. ۴۰ 40
Na mbala ya sambo, zeke ekweyaki epai ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango.
و حد ملک ایشان صرعه و اشتئول و عیر شمس بود. ۴۱ 41
Libula na bango ya mabele ezalaki: Tsorea, Eshitaoli, Iri-Shemeshi;
و شعلبین وایلون و یتله. ۴۲ 42
Shaalabini, Ayaloni, Yitila;
و ایلون و تمنه و عقرون. ۴۳ 43
Eloni, Timinata, Ekroni,
والتقیه و جبتون و بعله. ۴۴ 44
Eliteke, Gibetoni, Baalati,
و یهود و بنی برق و جت رمون. ۴۵ 45
Yeudi, Bene-Beraki, Gati-Rimoni;
و میاه یرقون و رقون با سر حدی که درمقابل یافا است. ۴۶ 46
mayi ya Yarikoni, Rakoni mpe etuka oyo etalana na Jafa.
و حد بنی دان از طرف ایشان بیرون رفت، زیر که بنی دان برآمده، با لشم جنگ کردند و آن را گرفته، به دم شمشیر زدند. ومتصرف شده، در آن سکونت گرفتند. پس لشم رادان نامیدند، موافق اسم دان که پدر ایشان بود. ۴۷ 47
Kasi bakitani ya Dani balongaki te kobotola eteni ya mabele na bango, boye bakendeki kobundisa Leshemi mpe babotolaki yango. Babomaki bato ya Leshemi na mopanga, babotolaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. Bakomaki kobenga Leshemi « Dani, » kombo ya koko na bango.
این است ملک سبط بنی دان برحسب قبایل ایشان، یعنی‌این شهرها با دهات آنها. ۴۸ 48
Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango.
و چون از تقسیم کردن زمین برحسب حدودش فارغ شدند، بنی‌اسرائیل ملکی را درمیان خود به یوشع بن نون دادند. ۴۹ 49
Tango bana ya Isalaele basilisaki kokabola mokili na biteni na zeke, bapesaki Jozue, mwana mobali ya Nuni, libula moko kati na bango.
برحسب فرمان خداوند شهری که او خواست، یعنی تمنه سارح را در کوهستان افرایم به او دادند، پس شهررا بنا کرده، در آن ساکن شد. ۵۰ 50
Kolanda mitindo na Yawe, bapesaki ye engumba oyo asengaki; ezali Timinati-Sera, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bongo Jozue atongaki engumba yango mpe akomaki kovanda kuna.
این است ملکهایی که العازار کاهن با یوشع بن نون و روسای آبای اسباط بنی‌اسرائیل درشیلوه به حضور خداوند نزد در خیمه اجتماع به قرعه تقسیم کردند. پس از تقسیم نمودن زمین فارغ شدند. ۵۱ 51
Yango nde ezalaki libula ya mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka, kolanda mabota ya bana ya Isalaele, bakabolaki na zeke liboso ya Yawe, na Silo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye nde basilisaki kokabola mokili.

< یوشع 19 >