< یونس 3 >

پس کلام خداوند بار دوم بر یونس نازل شده، گفت: ۱ 1
Yawe alobaki na Yona na mbala ya mibale:
«برخیز و به نینوا شهر بزرگ برو و آن وعظ را که من به تو خواهم گفت به ایشان ندا کن.» ۲ 2
— Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe sakola kuna maloba oyo nakopesa yo.
آنگاه یونس برخاسته، برحسب فرمان خداوند به نینوا رفت و نینوا شهر بزرگ بود که مسافت سه روز داشت. ۳ 3
Yona atosaki Liloba na Yawe; atelemaki mpe akendeki na Ninive. Nzokande Ninive ezalaki engumba moko ya monene na miso ya Nzambe; esengelaki kosala mikolo misato mpo na kosilisa kotambola kati na yango.
و یونس به مسافت یک روز داخل شهر شده، به ندا کردن شروع نمود وگفت بعد از چهل روز نینوا سرنگون خواهد شد. ۴ 4
Yona abandaki mosala na ye, atambolaki mokolo mobimba kati na engumba; azalaki kosakola: — Etikali mikolo tuku minei mpo ete engumba ya Ninive ebebisama nye!
و مردمان نینوا به خدا ایمان آوردند و روزه راندا کرده، از بزرگ تا کوچک پلاس پوشیدند. ۵ 5
Bato ya Ninive bandimelaki Nzambe; bazwaki mokano ya kokila bilei mpe ya kolata basaki, kobanda na oyo aleki na bozwi kino na oyo aleki na bobola.
و چون پادشاه نینوا از این امر اطلاع یافت، ازکرسی خود برخاسته، ردای خود را از برکند وپلاس پوشیده، بر خاکستر نشست. ۶ 6
Tango sango yango ekomaki epai ya mokonzi ya Ninive, atelemaki longwa na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki mpe amivandisaki na putulu.
و پادشاه واکابرش فرمان دادند تا در نینوا ندا در‌دادند وامرفرموده، گفتند که «مردمان و بهایم و گاوان وگوسفندان چیزی نخورند و نچرند و آب ننوشند. ۷ 7
Apesaki mitindo ete bapanza sango oyo na Ninive: « Na mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, Epekisami na bato mpe na bibwele, ezala ngombe, meme to ntaba; epekisami kolia biloko nyonso mpe komela mayi.
و مردمان و بهایم به پلاس پوشیده شوند و نزدخدا بشدت استغاثه نمایند و هرکس از راه بدخود و از ظلمی که در دست او است بازگشت نماید. ۸ 8
Tika ete bato mpe bibwele balata basaki, babelela Nzambe makasi. Tika ete moko na moko atika nzela na ye ya mabe mpe mobulu oyo ekangami ye na maboko.
کیست بداند که شاید خدا برگشته، پشیمان شود و از حدت خشم خود رجوع نمایدتا هلاک نشویم.» ۹ 9
Nani ayebi? Tango mosusu Nzambe akobongola makanisi, akolongola kanda mpe akozongisa motema sima mpo ete tokufa te. »
پس چون خدا اعمال ایشان را دید که از راه زشت خود بازگشت نمودند، آنگاه خدا از بلایی که گفته بود که به ایشان برساند پشیمان گردید وآن را بعمل نیاورد. ۱۰ 10
Tango Nzambe amonaki makambo oyo basalaki mpe ndenge batikaki banzela na bango ya mabe, abongolaki makanisi na Ye mpe atindelaki bango lisusu te etumbu oyo akanaki kopesa bango.

< یونس 3 >