< هوشع 6 >

بیایید نزد خداوند بازگشت نماییم زیرا که او دریده است و ما را شفا خواهد داد؛ اوزده است و ما را شکسته بندی خواهد نمود. ۱ 1
Boya, tozonga epai na Yawe! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.
بعداز دو روز ما را زنده خواهد کرد. در روز سوم ما راخواهد برخیزانید و در حضور او زیست خواهیم نمود. ۲ 2
Sima na mikolo mibale, akopesa biso lisusu bomoi; na mokolo ya misato, akotelemisa biso lisusu mpo ete tozala na bomoi liboso na Ye.
پس خداوند را بشناسیم و به جد و جهدمعرفت او را تعاقب نماییم. طلوع او مثل فجریقین است و بر ما مثل باران و مانند باران آخر که زمین را سیراب می‌کند خواهد آمد. ۳ 3
Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana: akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.
‌ای افرایم با تو چه کنم؟ ای یهودا با تو چه کنم؟ زیرا نیکویی تو مثل ابرهای صبح و مانند شبنم است که بزودی می‌گذرد. ۴ 4
Efrayimi, nasala yo lisusu nini? Yuda, nasala yo lisusu nini? Bolingo na bino mpo na Ngai ezali lokola londende ya tongo, lokola mamwe oyo elimwaka noki.
بنابراین من ایشان را بوسیله انبیا قطع نمودم و به سخنان دهان خود ایشان را کشتم و داوری من مثل نور ساطع می‌شود. ۵ 5
Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai, nazali kokata-kata bino na biteni; na maloba ya monoko na Ngai, nazali koboma bino, mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali.
زیرا که رحمت را پسند کردم و نه قربانی را و معرفت خدا را بیشتر از قربانی های سوختنی. ۶ 6
Pamba te nasepelaka na boboto koleka mbeka, mpe na boyebi ya Nzambe koleka mbeka ya kotumba.
اما ایشان مثل آدم از عهد تجاوزنمودند و درآنجا به من خیانت ورزیدند. ۷ 7
Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.
جلعادشهر گناهکاران و خون آلود است. ۸ 8
Galadi ezali engumba ya bato mabe, etonda na bilembo ya makila.
و چنانکه رهزنان برای مردم در کمین می‌باشند، همچنان جمعیت کاهنان در راه شکیم می‌کشند زیرا که ایشان مرتکب قباحت شده‌اند. ۹ 9
Ndenge babomi babombamaka mpo na koluka kosala bato mabe, ndenge wana mpe Banganga-Nzambe basalaka: babomaka bato na nzela ya Sishemi; ezali likambo ya somo penza!
در خاندان اسرائیل عملی هولناک دیدم: افرایم در آنجامرتکب زنا شده، اسرائیل خویشتن را نجس ساخته است. ۱۰ 10
Kati na libota ya Isalaele, namonaki makambo ya somo makasi: Efrayimi amipesaki na kindumba, mpe Isalaele akomaki mbindo.
و برای تو نیز‌ای یهودا حصادی معین شده است هنگامی که اسیری قوم خود راخواهم برگردانید. ۱۱ 11
Yo mpe lisusu, Yuda, tango ya kobuka mbuma ebongisami mpo na yo, sima na Ngai kozongisa bomengo ya bato na Ngai.

< هوشع 6 >