< حبقوق 3 >

دعای حبقوق نبی بر شجونوت. ۱ 1
Libondeli ya Mosakoli Abakuki, na tina na lolenge ya banzembo ya mawa.
ای خداوند چون خبر تو را شنیدم ترسان گردیدم. ای خداوند عمل خویش را در میان سالها زنده کن! در میان سالها آن را معروف ساز ودر حین غضب رحمت را بیاد آور. ۲ 2
Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.
خدا از تیمان آمد و قدوس از جبل فاران، سلاه. جلال اوآسمانها را پوشانید و زمین از تسبیح او مملوگردید. ۳ 3
Nzambe abimelaki na engumba Temani, Mosantu abimelaki na ngomba Parani. Nkembo na Ye ezipaki likolo, mpe lokumu na Ye etondisaki mabele.
پرتو او مثل نور بود و از دست وی شعاع ساطع گردید. و ستر قوت او در آنجا بود. ۴ 4
Azalaki kongenga lokola moyi, mpe pole makasi ezalaki kobimela na loboko na Ye, epai wapi nguya na Ye ebombamaka.
پیش روی وی وبا می‌رفت و آتش تب نزد پایهای اومی بود. ۵ 5
Bokono oyo ebomaka ezalaki kotambola liboso na Ye, mpe pasi makasi ezalaki kolanda matambe na Ye na sima.
او بایستاد و زمین را پیمود. او نظر افکندو امت‌ها را پراکنده ساخت و کوههای ازلی جستند و تلهای ابدی خم شدند. طریق های اوجاودانی است. ۶ 6
Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.
خیمه های کوشان را در بلادیدم. و چادرهای زمین مدیان لرزان شد. ۷ 7
Namonaki bandako ya kapo ya Kushani kati na pasi, mpe bandako ya mokili ya Madiani kati na mitungisi.
‌ای خداوند آیا بر نهرها غضب تو افروخته شد یا خشم تو بر نهرها و غیظ تو بر دریا واردآمد، که بر اسبان خود و ارابه های فتح مندی خویش سوار شدی؟ ۸ 8
Oh Yawe, otombokelaki nde bibale? Osopelaki nde miluka kanda na Yo? Osilikelaki nde ebale monene tango ozalaki kotambola likolo ya bampunda, likolo ya bashar na Yo ya lokumu?
کمان تو تمام برهنه شد، موافق قسمهایی که در کلام خود برای اسباط خورده‌ای، سلاه. زمین را به نهرها منشق ساختی. ۹ 9
Obimisaki tolotolo na Yo na ebombelo na yango, maloba ya bandayi oyo olapaki ezalaki makonga na Yo. Ozindisaki mokili kati na bibale.
کوهها تو را دیدند و لرزان گشتند و سیلاب هاجاری شد. لجه آواز خود را داد و دستهای خویش را به بالا برافراشت. ۱۰ 10
Soki bangomba emoni Yo, elengaka; mayi etiolaka makasi, ebale monene etombokaka mpe bambonge na yango emataka kino na likolo.
آفتاب و ماه در برجهای خود ایستادند. ازنور تیرهایت و از پرتو نیزه براق تو برفتند. ۱۱ 11
Tango makonga ya mike etambolaka lokola mikalikali mpe makonga ebetaka lokola bakake, moyi mpe sanza etelemaka kuna na likolo.
باغضب در جهان خرامیدی، و با خشم امت‌ها راپایمال نمودی. ۱۲ 12
Na kanda, otambolaka na mabele; mpe na kanda makasi na Yo, onyataka bikolo.
برای نجات قوم خویش وخلاصی مسیح خود بیرون آمدی. سر را ازخاندان شریران زدی و اساس آن را تا به گردن عریان نمودی، سلاه. ۱۳ 13
Obimaka mpo na kokangola bato na Yo mpe mpo na kobikisa mopakolami na Yo. Obomaki mokambi ya mokili ya bato mabe, osambwisaki ye kobanda na moto kino na makolo.
سر سرداران ایشان را به عصای خودشان مجروح ساختی، حینی که مثل گردباد آمدند تامرا پراکنده سازند. خوشی ایشان در این بود که مسکینان را در خفیه ببلعند. ۱۴ 14
Otobolaki ye moto na nzela ya likonga na ye moko, tango basoda na ye bazalaki koya na elulu lokola mopepe mpo na kopanza biso. Bazalaki kosepela na elikya ete bakoboma biso na nkuku.
با اسبان خود بردریا و بر انبوه آبهای بسیار خرامیدی. ۱۵ 15
Otambolaka na ebale elongo na bampunda na Yo; boye oningisaka mayi minene.
چون شنیدم احشایم بلرزید و از آواز آن لبهایم بجنبید، و پوسیدگی به استخوانهایم داخل شده، در جای خود لرزیدم، که در روز تنگی استراحت یابم هنگامی که آن که قوم را ذلیل خواهدساخت، بر ایشان حمله آورد. ۱۶ 16
Tango nayokaki sango oyo, motema na ngai ekomaki kobeta makasi, bibebu na ngai ekomaki kolenga, mikuwa na ngai ekomaki kopola mpe makolo na ngai ekomaki kolenga. Kasi nakokanga motema na ngai mpo na kozela mokolo ya pasi oyo ekokomela ekolo oyo ebundisaki biso.
اگرچه انجیر شکوفه نیاورد و میوه در موهایافت نشود و حاصل زیتون ضایع گردد ومزرعه‌ها آذوقه ندهد، و گله‌ها از آغل منقطع شودو رمه‌ها در طویله‌ها نباشد، ۱۷ 17
Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te, nzete ya vino eboti mbuma te, nzete ya olive eboti mbuma te, bilanga ebimisi bilei te, bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango, mpe bangombe ezali te kati na lopango.
لیکن من درخداوند شادمان خواهم شد و در خدای نجات خویش وجد خواهم نمود. ۱۸ 18
Kasi ngai nakosepela kati na Yawe mpe nakotondisama na esengo mingi kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.
یهوه خداوندقوت من است و پایهایم را مثل پایهای آهومی گرداند و مرا بر مکان های بلندم خرامان خواهد ساخت. برای سالار مغنیان بر ذوات اوتار. ۱۹ 19
Nkolo Yawe azali makasi na ngai: akomisaka makolo na ngai lokola makolo ya mboloko, apesaka ngai makasi ya komata kino na likolo ya bangomba.

< حبقوق 3 >