< پیدایش 11 >

و تمام جهان را یک زبان و یک لغت بود. ۱ 1
Na tango wana, bato ya mokili mobimba bazalaki koloba monoko moko mpe bazalaki na elobeli moko.
و واقع شد که چون از مشرق کوچ می‌کردند، همواری‌ای در زمین شنعار یافتند و درآنجا سکنی گرفتند. ۲ 2
Tango bato bazalaki kotambola mpo na kokende na ngambo ya weste, bamonaki etando moko ya monene na mokili ya Shineari mpe bavandaki kuna.
و به یکدیگر گفتند: «بیایید، خشتها بسازیم و آنها را خوب بپزیم.» و ایشان راآجر به‌جای سنگ بود، و قیر به‌جای گچ. ۳ 3
Balobanaki bango na bango: « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. » Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela.
وگفتند: «بیایید شهری برای خود بنا نهیم، و برجی را که سرش به آسمان برسد، تا نامی برای خویشتن پیدا کنیم، مبادا بر روی تمام زمین پراکنده شویم.» ۴ 4
Balobaki: « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »
و خداوند نزول نمود تا شهر وبرجی را که بنی آدم بنا می‌کردند، ملاحظه نماید. ۵ 5
Kasi Yawe akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molayi oyo bato babandaki kotonga.
و خداوند گفت: «همانا قوم یکی است و جمیع ایشان را یک زبان و این کار را شروع کرده‌اند، والان هیچ کاری که قصد آن بکنند، از ایشان ممتنع نخواهد شد. ۶ 6
Yawe alobaki: « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala!
اکنون نازل شویم و زبان ایشان رادر آنجا مشوش سازیم تا سخن یکدیگر رانفهمند.» ۷ 7
Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. »
پس خداوند ایشان را از آنجا بر روی تمام زمین پراکنده ساخت و از بنای شهر بازماندند. ۸ 8
Wuta na Babeli, Yawe apanzaki bango na mokili mobimba mpe batikaki kotonga engumba.
از آن سبب آنجا را بابل نامیدند، زیرا که در آنجا خداوند لغت تمامی اهل جهان رامشوش ساخت. و خداوند ایشان را از آنجا برروی تمام زمین پراکنده نمود. ۹ 9
Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba.
این است پیدایش سام. چون سام صد ساله بود، ارفکشاد را دو سال بعد از طوفان آورد. ۱۰ 10
Tala libota ya Semi: Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi.
وسام بعد از آوردن ارفکشاد، پانصد سال زندگانی کرد و پسران و دختران آورد. ۱۱ 11
Sima na mbotama ya Aripakishadi, Semi awumelaki na bomoi mibu nkama mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
و ارفکشاد سی وپنج سال بزیست و شالح را آورد. ۱۲ 12
Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. »
و ارفکشادبعد از آوردن شالح، چهار صد و سه سال زندگانی کرد و پسران و دختران آورد. ۱۳ 13
Sima na mbotama ya Shela, Aripakishadi awumelaki na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
و شالح سی سال بزیست، و عابر را آورد. ۱۴ 14
Tango Shela akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Eberi.
و شالح بعد از آوردن عابر، چهارصد و سه سال زندگانی کرد و پسران ودختران آورد. ۱۵ 15
Mpe sima na mbotama ya Eberi, Shela awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
و عابر سی و چهار سال بزیست و فالج را آورد. ۱۶ 16
Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi.
و عابر بعد از آوردن فالج، چهار صد و سی سال زندگانی کرد و پسران ودختران آورد. ۱۷ 17
Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
و فالج سی سال بزیست، و رعورا آورد. ۱۸ 18
Tango Pelegi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Rewu.
و فالج بعد از آوردن رعو، دویست ونه سال زندگانی کرد و پسران و دختران آورد. ۱۹ 19
Mpe sima na mbotama ya Rewu, Pelegi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
ورعو سی و دو سال بزیست، و سروج را آورد. ۲۰ 20
Tango Rewu akokisaki mibu tuku misato na mibale ya mbotama, abotaki Serugi.
ورعو بعد از آوردن سروج، دویست و هفت سال زندگانی کرد و پسران و دختران آورد. ۲۱ 21
Sima na mbotama ya Serugi, Rewu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
وسروج سی سال بزیست، و ناحور را آورد. ۲۲ 22
Tango Serugi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Naori.
وسروج بعد از آوردن ناحور، دویست سال بزیست و پسران و دختران آورد. ۲۳ 23
Sima na mbotama ya Naori, Serugi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
و ناحور بیست و نه سال بزیست، و تارح را آورد. ۲۴ 24
Tango Naori akokisaki mibu tuku mibale na libwa ya mbotama, abotaki Tera.
و ناحور بعد ازآوردن تارح، صد و نوزده سال زندگانی کرد وپسران و دختران آورد. ۲۵ 25
Mpe sima na mbotama ya Tera, Naori awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na zomi na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
و تارح هفتاد سال بزیست، و ابرام و ناحور و هاران را آورد. ۲۶ 26
Tango Tera akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Abrami, Naori mpe Arani.
و این است پیدایش تارح که تارح، ابرام وناحور و هاران را آورد، و هاران، لوط را آورد. ۲۷ 27
Tala libota ya Tera: Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti.
وهاران پیش پدر خود، تارح در زادبوم خویش دراور کلدانیان بمرد. ۲۸ 28
Wana tata na ye, Tera, azalaki nanu na bomoi, Arani akufaki kati na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mokili epai wapi abotamaki.
و ابرام و ناحور زنان برای خود گرفتند. زن ابرام را سارای نام بود. و زن ناحور را ملکه نام بود، دختر هاران، پدر ملکه وپدر یسکه. ۲۹ 29
Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu: kombo na ye ezalaki « Yisika. »
اما سارای نازاد مانده، ولدی نیاورد. ۳۰ 30
Sarayi azalaki ekomba: azalaki na mwana te.
پس تارح پسر خود ابرام، و نواده خودلوط، پسر هاران، و عروس خود سارای، زوجه پسرش ابرام را برداشته، با ایشان از اور کلدانیان بیرون شدند تا به ارض کنعان بروند، و به حران رسیده، در آنجا توقف نمودند. ۳۱ 31
Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.
و مدت زندگانی تارح، دویست و پنج سال بود، و تارح درحران مرد. ۳۲ 32
Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani.

< پیدایش 11 >