< خروج 7 >

و خداوند به موسی گفت: «ببین تو را برفرعون خدا ساخته‌ام، و برادرت، هارون، نبی تو خواهد بود. ۱ 1
Yawe alobaki na Moyize: « Tala, nakomisi yo nzambe liboso ya Faraon, mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akozala mosakoli na yo.
هرآنچه به تو امر نمایم تو آن را بگو، و برادرت هارون، آن را به فرعون بازگوید، تا بنی‌اسرائیل را از زمین خود رهایی دهد. ۲ 2
Okoloba makambo nyonso oyo natindi yo; mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akoyebisa yango epai ya Faraon mpo ete Faraon abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye.
و من دل فرعون را سخت می‌کنم، و آیات وعلامات خود را در زمین مصر بسیار می‌سازم. ۳ 3
Kasi Ngai, nakokomisa motema ya Faraon makasi lokola libanga, nakosala bilembo mpe bikamwa ebele na Ejipito.
وفرعون به شما گوش نخواهد گرفت، و دست خودرا بر مصر خواهم‌انداخت، تا جنود خود، یعنی قوم خویش بنی‌اسرائیل را از زمین مصر به داوریهای عظیم بیرون آورم. ۴ 4
Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele.
و مصریان خواهند دانست که من یهوه هستم، چون دست خود را بر مصر دراز کرده، بنی‌اسرائیل را از میان ایشان بیرون آوردم.» ۵ 5
Bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakosembola loboko na Ngai kati na mokili na bango mpe nakobimisa bana ya Isalaele wuta na Ejipito. »
و موسی و هارون چنانکه خداوند بدیشان امر فرموده بود کردند، و هم چنین عمل نمودند. ۶ 6
Moyize mpe Aron basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango.
و موسی هشتاد ساله بود وهارون هشتاد و سه ساله، وقتی که به فرعون سخن‌گفتند. ۷ 7
Tango basololaki na Faraon, Moyize azalaki na mibu ya mbotama tuku mwambe; mpe Aron, tuku mwambe na misato.
پس خداوند موسی و هارون را خطاب کرده، گفت: ۸ 8
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
«چون فرعون شما را خطاب کرده، گوید معجزه‌ای برای خود ظاهر کنید، آنگاه به هارون بگو عصای خود را بگیر، و آن را پیش روی فرعون بینداز، تا اژدها شود.» ۹ 9
« Tango Faraon akoloba na bino: ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron: ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. »
آنگاه موسی و هارون نزد فرعون رفتند، و آنچه خداوندفرموده بود کردند. و هارون عصای خود را پیش روی فرعون و پیش روی ملازمانش انداخت، واژدها شد. ۱۰ 10
Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango. Aron abwakaki lingenda na ye liboso ya Faraon mpe bakalaka na ye, mpe yango ebongwanaki nyoka.
و فرعون نیز حکیمان و جادوگران را طلبید و ساحران مصر هم به افسونهای خودچنین کردند، ۱۱ 11
Faraon abengisaki bato ya bwanya mpe bato ya soloka. Bongo bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka.
هر یک عصای خود را انداختند و اژدها شد، ولی عصای هارون عصاهای ایشان را بلعید. ۱۲ 12
Moko na moko kati na bango abwakaki lingenda na ye na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Kasi lingenda ya Aron emelaki mangenda na bango.
و دل فرعون سخت شد و ایشان رانشنید، چنانکه خداوند گفته بود. ۱۳ 13
Atako bongo, motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi; mpe aboyaki koyokela bango, ndenge kaka Yawe alobaki.
و خداوند موسی را گفت: «دل فرعون سخت شده، و از رها کردن قوم ابا کرده است. ۱۴ 14
Yawe alobaki na Moyize: « Motema ya Faraon ezali kaka makasi, aboyi kaka kotika bato na Ngai kokende.
بامدادان نزد فرعون برو، اینک به سوی آب بیرون می‌آید، و برای ملاقات وی به کنار نهربایست، و عصا را که به مار مبدل گشت، بدست خود بگیر. ۱۵ 15
Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka.
و او را بگو: یهوه خدای عبرانیان مرا نزد تو فرستاده، گفت: قوم مرا رها کن تا مرا درصحرا عبادت نمایند و اینک تا بحال نشنیده‌ای، ۱۶ 16
Bongo okoloba na ye: ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo: ‘Tala makambo oyo Yawe alobi: Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te.
پس خداوند چنین می‌گوید، از این خواهی دانست که من یهوه هستم، همانا من به عصایی که در دست دارم آب نهر را می‌زنم و به خون مبدل خواهد شد. ۱۷ 17
Tala makambo oyo Yawe alobi: Tala ndenge nini okoyeba ete Ngai nazali Yawe: Nakobeta na mayi ya Nili lingenda oyo nazali na yango na maboko, mpe mayi yango ekobongwana makila.
و ماهیانی که در نهرند خواهندمرد، و نهر گندیده شود و مصریان نوشیدن آب نهر را مکروه خواهند داشت.» ۱۸ 18
Mbisi ya Nili ekokufa mpe mayi ya Nili ekokoma solo ya kopola, bongo bato ya Ejipito bakokoka lisusu komela yango te.’ › »
و خداوند به موسی گفت: «به هارون بگوعصای خود را بگیر و دست خود را بر آبهای مصر دراز کن، بر نهرهای ایشان، و جویهای ایشان، و دریاچه های ایشان، و همه حوضهای آب ایشان، تا خون شود، و در تمامی زمین مصردر ظروف چوبی و ظروف سنگی، خون خواهدبود.» ۱۹ 19
Yawe alobaki na Moyize: « Yebisa Aron: ‹ Kamata lingenda na yo mpe sembola yango na ngambo ya mayi nyonso ya Ejipito: etima mpe miluka, maziba mpe mabulu nyonso ya mayi ekobongwana makila. › Makila ekozala na bisika nyonso ya Ejipito kino na bimelelo ya mayi oyo esalema na nzete to na mabanga. »
و موسی و هارون چنانکه خداوند امرفرموده بود، کردند. و عصا را بلند کرده، آب نهر رابه حضور فرعون و به حضور ملازمانش زد، وتمامی آب نهر به خون مبدل شد. ۲۰ 20
Moyize mpe Aron basalaki ndenge kaka Yawe atindaki bango. Aron atombolaki nzete na ye mpe abetaki lingenda oyo azalaki na yango, na mayi ya Nili na miso ya Faraon mpe ya basali na ye; mpe mayi nyonso ebongwanaki makila.
و ماهیانی که در نهر بودند، مردند. و نهر بگندید، و مصریان از آب نهر نتوانستند نوشید، و در تمامی زمین مصرخون بود. ۲۱ 21
Mbisi ya Nili ekufaki mpe mayi elumbaki solo ya kopola na ndenge ete bato ya Ejipito bakokaki lisusu te komela yango. Makila ezalaki na bisika nyonso ya Ejipito.
و جادوگران مصر به افسونهای خویش هم چنین کردند، و دل فرعون سخت شد، که بدیشان گوش نگرفت، چنانکه خداوند گفته بود. ۲۲ 22
Kasi bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka. Motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi mpe aboyaki koyokela Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki.
و فرعون برگشته، به خانه خود رفت و براین نیز دل خود را متوجه نساخت. ۲۳ 23
Atako bongo, Faraon abalukaki, akotaki na ndako na ye mpe azwaki likambo yango na motema te.
و همه مصریان گرداگرد نهر برای آب خوردن حفره می‌زدند زیرا که از آب نهر نتوانستند نوشید. ۲۴ 24
Bato nyonso ya Ejipito batimolaki mabulu pene ya Nili mpo na kozwa mayi ya komela, pamba te bakokaki lisusu te komela mayi ya ebale.
وبعد از آنکه خداوند نهر را زده بود، هفت روزسپری شد. ۲۵ 25
Mikolo sambo elekaki sima na Yawe kobebisa mayi ya Nili.

< خروج 7 >