< خروج 28 >

«و تو برادر خود، هارون و پسرانش را با وی از میان بنی‌اسرائیل نزد خودبیاور تا برای من کهانت بکند، یعنی هارون وناداب و ابیهو و العازار و ایتامار، پسران هارون. ۱ 1
Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali: Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
ورختهای مقدس برای برادرت، هارون، بجهت عزت و زینت بساز. ۲ 2
Okotonga mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bilamba ya bule lokola elembo ya nkembo mpe ya lokumu.
و تو به جمیع دانادلانی که ایشان را به روح حکمت پر ساخته‌ام، بگو که رختهای هارون را بسازند برای تقدیس کردن او تابرای من کهانت کند. ۳ 3
Bongo yo, okoloba na bato nyonso ya mayele oyo, kati na bango, natondisi molimo ya bwanya mpo ete batonga bilamba ya Aron mpo na kobulisa ye na mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
و رختهایی که می‌سازنداین است: سینه بند و ایفود و ردا و پیراهن مطرز وعمامه و کمربند. این رختهای مقدس را برای برادرت هارون و پسرانش بسازند تا بجهت من کهانت کند. ۴ 4
Tala bilamba oyo bakotonga: elamba ya tolo, efode, kazaka mpe nzambala oyo batia bililingi likolo na yango, kitendi ya kokanga na moto mpe mokaba. Bakotonga bilamba ya bule mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, mpe mpo na bana na ye ya mibali oyo bakosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.
و ایشان طلا و لاجورد و ارغوان وقرمز و کتان نازک را بگیرند، ۵ 5
Bakosalela wolo, langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko.
«و ایفود را از طلا و لاجورد و ارغوان و قرمزو کتان نازک تابیده شده، از صنعت نساج ماهربسازند. ۶ 6
Bakotonga na wolo efode ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.
و دو کتفش را بر دو کناره‌اش بپیوندند تاپیوسته شود. ۷ 7
Ekozala na bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango; bankamba ekoleka likolo ya mapeka.
و زنار ایفود که برآن است، ازهمان صنعت و از همان پارچه باشد، یعنی از طلاو لاجورد و ارغوان و قرمز و کتان نازک تابیده شده. ۸ 8
Mokaba ya efode ekosalema ndenge moko na efode: ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
و دو سنگ جزع بگیر و نامهای بنی‌اسرائیل را بر آنها نقش کن. ۹ 9
Okozwa mabanga mibale ya onikisi mpe okokoma na likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele
شش نام ایشان را بر یک سنگ و شش نام باقی ایشان را بر سنگ دیگر موافق تولد ایشان. ۱۰ 10
kolanda ndenge babotama: bakombo motoba na libanga ya liboso mpe bakombo motoba oyo etikali, na libanga ya mibale.
از صنعت نقاش سنگ مثل نقش خاتم نامهای بنی‌اسرائیل را بر هردو سنگ نقش نما و آنها را در طوقهای طلا نصب کن. ۱۱ 11
Okokoma bakombo ya bana mibali ya Isalaele na mabanga nyonso mibale ndenge bato basalaka bililingi na kashe na libanga; mpe okozingela yango na wolo.
و آن دو سنگ را بر کتفهای ایفود بگذار تاسنگهای یادگاری برای بنی‌اسرائیل باشد، وهارون نامهای ایشان را بر دو کتف خود، بحضور خداوند برای یادگاری بردارد. ۱۲ 12
Okotia mabanga yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele. Aron akomema likolo ya mapeka na ye lokola ekaniseli liboso ya Yawe bakombo na bango.
و دو طوق ازطلا بساز. ۱۳ 13
Okotia bikangelo ya wolo
و دو زنجیر از طلای خالص بسازمثل طناب بهم پیچیده شده، و آن دو زنجیر بهم پیچیده شده را در طوقها بگذار. ۱۴ 14
mpe okosala basheneti mibale ya wolo basangisa na eloko mosusu te; okosala yango lokola suki ya maboko mpe okokangisa basheneti yango pembeni-pembeni ya mabanga.
«و سینه بند عدالت را از صنعت نساج ماهر، موافق کار ایفود بساز و آن را از طلا و لاجورد وارغوان و قرمز و کتان نازک تابیده شده بساز. ۱۵ 15
Okosala elamba ya tolo mpo na koyeba mokano ya Nzambe; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. Okotonga yango lokola efode: ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango.
ومربع و دولا باشد، طولش یک وجب و عرضش یک وجب. ۱۶ 16
Soki bagumbi yango na biteni mibale, molayi mpe mokuse esengeli kozala ndenge moko: basantimetele pene tuku mibale na mitano.
و آن را به ترصیع سنگها، یعنی به چهار رسته از سنگها مرصع کن که رسته اول عقیق احمر و یاقوت اصفر و زمرد باشد، ۱۷ 17
Okotia na likolo na yango milongo minei ya mabanga ya talo. Na molongo ya liboso, okotia libanga ya saridwane, ya topaze mpe ya emerode;
و رسته دوم بهرمان و یاقوت کبود و عقیق سفید، ۱۸ 18
na molongo ya mibale, okotia libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama;
ورسته سوم عین الهر و یشم و جمشت، ۱۹ 19
na molongo ya misato, okotia libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite;
و رسته چهارم زبرجد و جزع و یشب. و آنها دررسته های خود با طلا نشانده شود. ۲۰ 20
mpe na molongo ya minei, okotia libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Okokanga mabanga yango na bikangelo ya wolo.
و سنگهاموافق نامهای بنی‌اسرائیل مطابق اسامی ایشان، دوازده باشد، مثل نقش خاتم، و هر یک برای دوازده سبط موافق اسمش باشد. ۲۱ 21
Mabanga yango ekozala zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakokoma kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale; bakokoma yango ndenge basalaka bililingi na kashe.
و بر سینه بند، زنجیرهای بهم پیچیده شده، مثل طناب از طلای خالص بساز. ۲۲ 22
Okosala basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo; okosala yango ndenge bakangaka suki ya maboko.
و بر سینه بند، دو حلقه از طلابساز و آن دو حلقه را بر دو طرف سینه بند بگذار. ۲۳ 23
Okosala bapete mibale ya wolo mpo na elamba ya tolo mpe okokangisa yango na basonge mibale ya elamba yango.
و آن دو زنجیر طلا را بر آن دو حلقه‌ای که برسر سینه بند است بگذار. ۲۴ 24
Okolekisa basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo ezali na basonge ya elamba ya tolo,
و دو سر دیگر آن دوزنجیر را در آن دو طوق ببند و بر دو کتف ایفودبطرف پیش بگذار. ۲۵ 25
mpe okokangisa basonge mibale mosusu ya basheneti yango, na bikangelo nyonso mibale; mpe okokangisa yango na bankamba ya efode; bankamba yango ekoleka na liboso.
و دو حلقه زرین بساز و آنهارا بر دو سر سینه بند، به کنار آن که بطرف اندرون ایفود است، بگذار. ۲۶ 26
Okosala bapete mibale ya wolo oyo okotia na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode.
و دو حلقه دیگر زرین بسازو آنها را بر دو کتف ایفود از پایین بجانب پیش، دربرابر پیوستگی آن، بر زبر زنار ایفود بگذار. ۲۷ 27
Okosala bapete mosusu mibale ya wolo oyo okotia na bankamba mibale ya efode, na se, na liboso mpe na pembeni ya mokaba ya efode.
وسینه بند را به حلقه هایش بر حلقه های ایفود به نوار لاجورد ببندند تا بالای زنار ایفود باشد و تاسینه بند از ایفود جدا نشود. ۲۸ 28
Okokangisa na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango.
و هارون نامهای بنی‌اسرائیل را بر سینه بند عدالت بر دل خود، وقتی که به قدس داخل شود، به حضور خداوندبجهت یادگاری دائم بردارد. ۲۹ 29
Boye tango Aron akokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule, akomema na motema na ye, na elamba ya tolo ya kokata makambo, bakombo ya bana mibali ya Isalaele lokola ekaniseli liboso ya Yawe mpo na libela.
و اوریم و تمیم را در سینه بند عدالت بگذار تا بر دل هارون باشد، وقتی که به حضور خداوند بیاید، و عدالت بنی‌اسرائیل را بر دل خود بحضور خداوند دائم متحمل شود. ۳۰ 30
Okotia lisusu Urimi mpe Tumimi kati na elamba ya tolo ya kokata makambo mpe yango ekozala likolo ya motema ya Aron tango akotelema liboso ya Yawe. Boye Aron akomema makambo ya bana ya Isalaele liboso ya Yawe mpo na libela.
«و ردای ایفود را تمام از لاجورد بساز. ۳۱ 31
Okosala mobimba ya nzambala oyo ekozala na se ya efode na langi ya ble.
و شکافی برای سر، در وسطش باشد. و حاشیه گرداگرد شکافش از کار نساج مثل گریبان زره، تادریده نشود. ۳۲ 32
Nzambala esengeli kozala na lidusu na kati-kati mpo na kokotisa moto; bakotonga pembeni-pembeni ya lidusu yango poso ya makasi mpo ete epasuka te.
و در دامنش، انارها بساز ازلاجورد و ارغوان و قرمز، گرداگرد دامنش، وزنگوله های زرین در میان آنها به هر طرف. ۳۳ 33
Na se mpe zingazinga ya nzambala, okotia bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi; mpe okotia bangonga ya mike-mike kati na bambuma ya grenade.
زنگوله زرین و اناری و زنگوله زرین و اناری گرداگرد دامن ردا. ۳۴ 34
Ekolandana boye: ngonga moko ya moke ya wolo, mbuma moko ya grenade, mpe bongo na bongo, zingazinga ya basonge nyonso ya nzambala.
و در بر هارون باشد، هنگامی که خدمت می‌کند، تا آواز آنها شنیده شود، هنگامی که در قدس بحضور خداوند داخل می‌شود و هنگامی که بیرون می‌آید تا نمیرد. ۳۵ 35
Aron asengeli kolata yango tango azali kosala mosala. Makelele ya bangonga ya mike-mike ekoyokana tango akotelema liboso ya Yawe na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe tango akobima; wana ekolakisa ete akufi te.
وتنکه از طلای خالص بساز و بر آن مثل نقش خاتم قدوسیت برای یهوه نقش کن. ۳۶ 36
Okosala na wolo ya peto medaye mpe okokoma na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe: abulisama mpo na Yawe.
و آن را به نوارلاجوردی ببند تا بر عمامه باشد، بر پیشانی عمامه خواهد بود. ۳۷ 37
Okokangisa yango na singa ya ble, mpe ekozala na likolo ya kitendi ya kokanga na moto, na mbunzu.
و بر پیشانی هارون باشد تا هارون گناه موقوفاتی که بنی‌اسرائیل وقف می‌نمایند، درهمه هدایای مقدس ایشان متحمل شود. و آن دائم بر پیشانی او باشد تا بحضور خداوند مقبول شوند. ۳۸ 38
Linzanza yango ekozala na mbunzu ya Aron mpo ete akoka komema bambeba oyo bana ya Isalaele bakosala na tina na biloko ya bule oyo bakobonza mpe bakobulisa. Linzanza yango ekozala tango nyonso na mbunzu ya Aron mpo ete Ngai Yawe, nandima makabo yango.
و پیراهن کتان نازک را بباف و عمامه‌ای از کتان نازک بساز و کمربندی از صنعت طرازبساز. ۳۹ 39
Okotongela Aron nzambala ya lino mpe kitendi ya lino mpo na moto; okosalela ye mpe mokaba oyo bato oyo batongaka bililingi na bilamba bakoyeba kotia bililingi.
و برای پسران هارون پیراهنها بساز و بجهت ایشان کمربندها بساز و برای ایشان عمامه‌ها بساز بجهت عزت و زینت. ۴۰ 40
Okosala lisusu mpo na bana ya Aron banzambala, mikaba mpe bikoti, lokola elembo ya lokumu mpe ya nkembo.
و برادرخود هارون و پسرانش را همراه او به آنها آراسته کن، و ایشان را مسح کن و ایشان را تخصیص وتقدیس نما تا برای من کهانت کنند. ۴۱ 41
Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai.
و زیرجامه های کتان برای ستر عورت ایشان بساز که ازکمر تا ران برسد، ۴۲ 42
Okosalela bango bakaputula ya lino mpo na kozipa bolumbu na bango: bakaputula yango ekobanda na loketo kino na mipende.
و بر هارون و پسرانش باشد، هنگامی که به خیمه اجتماع داخل شوند یا نزدمذبح آیند تا در قدس خدمت نمایند، مبادامتحمل گناه شوند و بمیرند. این برای وی و بعد ازاو برای ذریتش فریضه ابدی است. ۴۳ 43
Aron mpe bana na ye ya mibali bakolata yango tango nyonso bakobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo mpo na kosala mosala kati na Esika ya bule, mpo ete bazala na ngambo te mpe bakufa te. Ezali mobeko ya libela mpo na Aron mpe bakitani na ye.

< خروج 28 >