< استر 5 >

و در روز سوم، استر لباس ملوکانه پوشیده، به صحن دروازه اندرونی پادشاه، در مقابل خانه پادشاه بایستاد و پادشاه، بر کرسی خسروی خود در قصر سلطنت، روبروی دروازه خانه نشسته بود. ۱ 1
Na mokolo ya misato ya kokila bilei, Ester alataki bilamba na ye ya bokonzi mpe akotaki na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi, liboso ya shambre na ye. Mokonzi azalaki ya kovanda na kiti na ye ya bokonzi kati na shambre oyo ezalaki kotalana na ekuke ya kokotela.
و چون پادشاه، استر ملکه را دید که در صحن ایستاده است، او در نظر وی التفات یافت. و پادشاه چوگان طلا را که در دست داشت، به سوی استر دراز کرد و استر نزدیک آمده، نوک عصا را لمس کرد. ۲ 2
Tango mokonzi amonaki Ester, mwasi na ye, atelemi kati na lopango, asalelaki ye ngolu. Mokonzi asembolaki epai ya Ester lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, oyo ezalaki na loboko na ye. Ester apusanaki mpe asimbaki songe ya lingenda ya bokonzi.
و پادشاه او را گفت: «ای استر ملکه، تو را چه شده است و درخواست تو چیست؟ اگر‌چه نصف مملکت باشد، به تو داده خواهد شد.» ۳ 3
Mokonzi atunaki ye: — Ester, mwasi ya mokonzi, likambo nini? Bosenga na yo ezali nini? Nazali pene ya kopesa yo ata kati-kati ya bokonzi na ngai!
استر جواب داد که «اگر به نظر پادشاه پسندآید، پادشاه با هامان امروز به ضیافتی که برای اومهیا کرده‌ام بیاید.» ۴ 4
Ester azongisaki: — Oh soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi akoka koya lelo, elongo na Amani, na feti monene oyo nabongisi mpo na ye.
آنگاه پادشاه فرمود که «هامان را بشتابانید، تابرحسب کلام استر کرده شود.» پس پادشاه وهامان، به ضیافتی که استر برپا نموده بود آمدند. ۵ 5
Mokonzi alobaki: — Bolukela ngai noki Amani mpo ete tokokisa bosenga ya Ester. Boye, mokonzi mpe Amani bakendeki na feti oyo Ester abongisaki.
و پادشاه در مجلس شراب به استر گفت: «مسئول تو چیست که به تو داده خواهد شد ودرخواست تو کدام؟ اگرچه نصف مملکت باشد، برآورده خواهد شد.» ۶ 6
Tango bazalaki komela vino, mokonzi atunaki lisusu Ester: — Sik’oyo, posa na yo ezali nini? Ekopesamela yo. Mpe bosenga na yo ezali nini? Ekopesamela yo, ata soki ezali kati-kati ya bokonzi na ngai.
استر در جواب گفت: «مسول و درخواست من این است، ۷ 7
Ester azongisaki: — Posa mpe bosenga na ngai ezali boye:
که اگر در نظر پادشاه التفات یافتم و اگر پادشاه مصلحت داند که مسول مرا عطافرماید و درخواست مرا بجا آورد، پادشاه وهامان به ضیافتی که به جهت ایشان مهیا می‌کنم بیایند و فردا امر پادشاه را بجا خواهم آورد.» ۸ 8
Soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi mpe soki mokonzi asepeli kokokisa posa mpe bosenga na ngai, tika ete mokonzi mpe Amani bakoka koya lobi na feti oyo nakobongisa mpo na bango; bongo nde nakopesa eyano na motuna ya mokonzi.
پس در آن روز هامان شادمان و مسرور شده، بیرون رفت. لیکن چون هامان، مردخای را نزددروازه پادشاه دید که به حضور او برنمی خیزد وحرکت نمی کند، آنگاه هامان بر مردخای به شدت غضبناک شد. ۹ 9
Amani abimaki na esengo mpe na nsayi. Kasi tango Amani amonaki Maridoshe na ekuke ya mokonzi mpe asosolaki ete Maridoshe atelemi te mpe azali kolenga te liboso na ye, Amani asilikelaki Maridoshe makasi.
اما هامان خودداری نموده، به خانه خود رفت و فرستاده، دوستان خویش و زن خود زرش را خواند. ۱۰ 10
Kasi atako bongo, Amani akangaki motema mpe azongaki epai na ye; abengisaki balingami na ye mpe Zereshi, mwasi na ye.
و هامان برای ایشان، فراوانی توانگری خود و کثرت پسران خویش را و تمامی عظمتی را که پادشاه به او داده و او را بر سایر روسا و خدام پادشاه برتری داده بود، بیان کرد. ۱۱ 11
Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu.
و هامان گفت: «استر ملکه نیز کسی را سوای من به ضیافتی که برپا کرده بود، همراه پادشاه دعوت نفرمود و فردا نیز او مراهمراه پادشاه دعوت کرده است. ۱۲ 12
Amani abakisaki: — Esuki kaka wana te! Nazali kaka ngai moko, moto oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abengi elongo na mokonzi na feti oyo abongisi. Mpe lobi, abengi ngai lisusu elongo na mokonzi.
لیکن همه این چیزها نزد من هیچ است، مادامی که مردخای یهود را می‌بینم که در دروازه پادشاه نشسته است.» ۱۳ 13
Kasi makambo oyo nyonso ezali kosepelisa ngai te tango nazali komona Moyuda wana Maridoshe kovanda na ekuke ya mokonzi.
آنگاه زوجه‌اش زرش و همه دوستانش اورا گفتند: «داری به بلندی پنجاه ذراع بسازند وبامدادان، به پادشاه عرض کن که مردخای را بر آن مصلوب سازند. پس با پادشاه با شادمانی به ضیافت برو.» و این سخن به نظر هامان پسند آمده، امر کرد تا دار را حاضر کردند. ۱۴ 14
Zereshi, mwasi na ye, mpe baninga na ye nyonso balobaki na ye: — Telemisa nzete ya bametele pene tuku mibale na mitano na bosanda; mpe lobi na tongo, okosenga na mokonzi ete badiembika Maridoshe na nzete yango. Bongo okokende na esengo na feti elongo na mokonzi. Likanisi oyo esepelisaki Amani, mpe atelemisaki nzete.

< استر 5 >