< دوم پادشاهان 2 >

و چون خداوند اراده نمود که ایلیا را درگردباد به آسمان بالا برد، واقع شد که ایلیا والیشع از جلجال روانه شدند. ۱ 1
Tango Yawe akomaki pene ya konetola Eliya na likolo na nzela ya mopepe makasi, Eliya mpe Elize balongwaki na Giligali.
و ایلیا به الیشع گفت: «در اینجا بمان، زیرا خداوند مرا به بیت ئیل فرستاده است.» الیشع گفت: «به حیات یهوه وحیات خودت قسم که تو را ترک نکنم.» پس به بیت ئیل رفتند. ۲ 2
Eliya alobaki na Elize: — Nabondeli yo, tikala awa; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki: — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te! Boye bakendeki na Beteli.
و پسران انبیایی که در بیت ئیل بودند، نزد الیشع بیرون آمده، وی را گفتند: «آیامی دانی که امروز خداوند آقای تو را از فوق سرتو خواهد برداشت.» او گفت: «من هم می‌دانم؛ خاموش باشید.» ۳ 3
Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Beteli, bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye: — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali? Elize azongisaki: — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye!
و ایلیا به او گفت: «ای الیشع در اینجا بمان زیرا خداوند مرا به اریحا فرستاده است.» او گفت: «به حیات یهوه و به حیات خودت قسم که تو راترک نکنم.» پس به اریحا آمدند. ۴ 4
Eliya alobaki na Elize: — Tikala awa; Yawe atindi ngai na Jeriko. Elize azongisaki: — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te! Boye bakendeki na Jeriko.
و پسران انبیایی که در اریحا بودند، نزد الیشع آمده، وی راگفتند: «آیا می‌دانی که امروز خداوند، آقای تو رااز فوق سر تو برمی دارد؟» او گفت: «من هم می‌دانم؛ خاموش باشید.» ۵ 5
Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Jeriko bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye: — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali? Elize azongisaki: — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye!
و ایلیا وی را گفت: «در اینجا بمان زیراخداوند مرا به اردن فرستاده است.» او گفت: «به حیات یهوه و به حیات خودت قسم که تو را ترک نکنم.» پس هردوی ایشان روانه شدند. ۶ 6
Eliya alobaki na ye: — Elize, tikala awa; Yawe atindi ngai na Yordani. Elize azongisaki: — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te! Boye bango mibale bakobaki nzela na bango.
و پنجاه نفر از پسران انبیا رفته، در مقابل ایشان از دورایستادند و ایشان نزد اردن ایستاده بودند. ۷ 7
Bayekoli tuku mitano ya basakoli bakendeki kotelema mosika ya esika oyo Eliya mpe Elize batelemaki, na ebale Yordani.
پس ایلیا ردای خویش را گرفت و آن را پیچیده، آب را زد که به این طرف و آن طرف شکافته شد وهردوی ایشان بر خشکی عبور نمودند. ۸ 8
Eliya alongolaki kazaka na ye, agumbaki yango mpe abetaki yango na mayi ya ebale. Mayi ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe bango mibale bakatisaki.
و بعد از گذشتن ایشان، ایلیا به الیشع گفت: «آنچه را که می‌خواهی برای تو بکنم، پیش ازآنکه از نزد تو برداشته شوم، بخواه.» الیشع گفت: «نصیب مضاعف روح تو بر من بشود.» ۹ 9
Tango bakatisaki, Eliya alobaki na Elize: — Yebisa ngai nasala nini mpo na yo liboso ete Yawe alongola ngai liboso na yo. Elize azongisaki: — Tika ete nazwa nguya ya molimo na yo mbala mibale.
او گفت: «چیز دشواری خواستی اما اگر حینی که از نزد توبرداشته شوم مرا ببینی، از برایت چنین خواهدشد والا نخواهد شد.» ۱۰ 10
Eliya alobaki: — Osengi ngai eloko ya pasi, kasi soki okomona ngai wana Yawe akolongola ngai liboso na yo, okozwa yango; soki te, okozwa yango te.
و چون ایشان می‌رفتندو گفتگو می‌کردند، اینک ارابه آتشین و اسبان آتشین ایشان را از یکدیگر جدا کرد و ایلیا درگردباد به آسمان صعود نمود. ۱۱ 11
Wana bazalaki kotambola mpe kosolola, mbala moko shar ya moto mpe bampunda ya moto ekabolaki bango mibale; mpe Eliya amataki na likolo na nzela ya mopepe makasi.
و چون الیشع این را بدید فریاد برآورد که «ای پدرم! ای پدرم! ارابه اسرائیل و سوارانش! پس او را دیگر ندیدو جامه خود را گرفته، آن را به دو حصه چاک زد. ۱۲ 12
Tango Elize amonaki bongo, agangaki: « Tata na ngai! Tata na ngai! Yo nde ozali lokola shar ya Isalaele mpe batambolisi na yango! » Bongo Elize amonaki ye lisusu te. Boye akangaki bilamba na ye mpe apasolaki yango na biteni mibale.
و ردای ایلیا را که از او افتاده بود، برداشت و برگشته به کناره اردن ایستاد. ۱۳ 13
Alokotaki kazaka ya Eliya, oyo ekweyaki wuta na mapeka na ye, azongaki mpe atelemaki na ngambo ya ebale Yordani.
پس ردای ایلیارا که از او افتاده بود، گرفت و آب را زده، گفت: «یهوه خدای ایلیا کجاست؟» و چون او نیز آب رازد، به این طرف و آن طرف شکافته شد و الیشع عبور نمود. ۱۴ 14
Azwaki kazaka ya Eliya, abetaki yango na mayi mpe alobaki: « Wapi sik’oyo Yawe, Nzambe ya Eliya? » Tango Elize abetaki kazaka yango na mayi, mayi ya ebale ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi.
و چون پسران انبیا که روبروی او در اریحابودند او را دیدند، گفتند: «روح ایلیا بر الیشع می‌باشد.» و برای ملاقات وی آمده، او را رو به زمین تعظیم نمودند. ۱۵ 15
Bayekoli ya basakoli, oyo bawutaki na Jeriko bamonaki mpe balobaki: « Molimo ya Eliya evandi sik’oyo likolo ya Elize! » Bakendeki kokutana na ye mpe bagumbamaki liboso na ye kino na mabele.
و او را گفتند: «اینک حال با بندگانت پنجاه مرد قوی هستند، تمنا اینکه ایشان بروند و آقای تو را جستجو نمایند، شایدروح خداوند او را برداشته، به یکی از کوهها یا دریکی از دره‌ها انداخته باشد.» او گفت: «مفرستید.» ۱۶ 16
Balobaki: — Tala biso basali na yo, tozali na mibali ya mpiko tuku mitano. Tika ete baluka mokonzi na yo, tango mosusu Molimo na Yawe amemi ye mpe abwaki ye na ngomba to na lubwaku. Elize azongisaki: — Te, botinda bango te!
اما به حدی بر وی ابرام نمودند که خجل شده، گفت: «بفرستید.» پس پنجاه نفر فرستادند و ایشان سه روز جستجو نمودند اما او را نیافتند. ۱۷ 17
Kasi batungisaki Elize makasi kino ayokaki soni mpo na koboya. Boye alobaki: — Botinda bango. Mpe batindaki mibali tuku mitano oyo balukaki Eliya mikolo misato, kasi batikalaki komona ye te.
وچون او در اریحا توقف می‌نمود، ایشان نزد وی برگشتند و او به ایشان گفت: «آیا شما را نگفتم، که نروید.» ۱۸ 18
Tango bazongaki epai ya Elize oyo atikalaki na Jeriko, Elize alobaki na bango: — Napekisaki bino te kokende?
و اهل شهر به الیشع گفتند: «اینک موضع شهر نیکوست چنانکه آقای ما می‌بیند، لیکن آبش ناگوار و زمینش بی‌حاصل است.» ۱۹ 19
Bato ya engumba ya Jeriko bayebisaki Elize: — Oh nkolo! Engumba na biso etongami na esika ya malamu ndenge ozali komona yango, kasi mayi ezali mabe mpe mabele ebotaka te.
او گفت: «نزد من طشت نوی آورده، نمک در آن بگذارید.» پس برایش آوردند. ۲۰ 20
Elize alobaki: — Bomemela ngai sani ya moke ya sika mpe botia mungwa na kati. Bamemelaki ye yango
و او نزد چشمه آب بیرون رفته، نمک را در آن انداخت و گفت: «خداوندچنین می‌گوید: این آب را شفا دادم که بار دیگرمرگ یا بی‌حاصلی از آن پدید نیاید.» ۲۱ 21
mpe akendeki na etima, abwakaki kuna mungwa mpe alobaki: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Napetoli mayi oyo; ekoyeisa lisusu kufa te mpe ekobebisa lisusu mabele te mpo ete ebota mbuma. › »
پس آب تا به امروز برحسب سخنی که الیشع گفته بود، شفا یافت. ۲۲ 22
Boye mayi etikala peto kino na mokolo ya lelo, kolanda liloba oyo Elize abimisaki.
و از آنجا به بیت ئیل برآمد و چون او به راه برمی آمد اطفال کوچک از شهر بیرون آمده، او راسخریه نموده، گفتند: «ای کچل برآی! ای کچل برآی!» ۲۳ 23
Longwa kuna na Jeriko, Elize akendeki na Beteli. Wana azalaki kotambola na nzela, bilenge mibali babimaki wuta na engumba mpe bazalaki kotiola ye; bazalaki koloba: « Moto na libandi, longwa awa! Moto na libandi, longwa awa! »
و او به عقب برگشته، ایشان را دید وایشان را به اسم یهوه لعنت کرد و دو خرس ازجنگل بیرون آمده، چهل و دو پسر از ایشان بدرید. ۲۴ 24
Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango.
و از آنجا به کوه کرمل رفت و از آنجا به سامره مراجعت نمود. ۲۵ 25
Longwa wana Elize akendeki na ngomba Karimeli; mpe longwa kuna, azongaki na Samari.

< دوم پادشاهان 2 >