< اول پادشاهان 6 >

و واقع شد در سال چهارصد و هشتاد ازخروج بنی‌اسرائیل از زمین مصر در ماه زیوکه ماه دوم از سال چهارم سلطنت سلیمان براسرائیل بود که بنای خانه خداوند را شروع کرد. ۱ 1
Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe sima na mibu nkama minei na mwambe, wuta Isalaele abimaki na Ejipito, mobu oyo ekokanaki na mobu ya minei ya bokonzi na ye kati na Isalaele, na sanza ya zivi.
و خانه خداوند که سلیمان پادشاه بنا نمودطولش شصت ذراع و عرضش بیست و بلندیش سی ذراع بود. ۲ 2
Tempelo oyo Salomo atongaki mpo na Yawe ezalaki na bametele pene tuku misato na molayi, bametele pene zomi na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
و رواق پیش هیکل خانه موافق عرض خانه، طولش بیست ذراع و عرضش روبروی خانه ده ذراع بود. ۳ 3
Liboso ya Tempelo, na liboso ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo, ezalaki na ndako moko ya moke ya kokotela oyo ezalaki na bametele pene zomi na mokuse; molayi na yango ezalaki ndenge moko na mokuse ya Tempelo; mpe ekota na kati na bametele pene mitano.
و برای خانه پنجره های مشبک ساخت. ۴ 4
Atiaki na bamir ya Tempelo maninisa oyo batia biyungulu.
و بر دیوار خانه به هر طرفش طبقه‌ها بنا کرد، یعنی به هر طرف دیوارهای خانه هم بر هیکل و هم بر محراب و به هر طرفش غرفه‌ها ساخت. ۵ 5
Atongaki pembeni ya bamir ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo mpe pembeni ya Esika-Oyo-Eleki-Bule biteni ya mike, ngambo na ngambo, na lolenge ya etaje.
و طبقه تحتانی عرضش پنج ذراع و طبقه وسطی عرضش شش ذراع و طبقه سومی عرضش هفت ذراع بود زیراکه به هر طرف خانه از خارج پشته‌ها گذاشت تاتیرها در دیوار خانه متمکن نشود. ۶ 6
Etaje oyo ya se ya biteni yango ya mike ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse; etaje ya kati-kati, bametele pene misato na mokuse; mpe etaje oyo ya misato, bametele misato na basantimetele tuku mitano na mokuse. Boye bamir ya libanda ya Tempelo etikalaki lisusu minene te na likolo mpo ete motondo ebebisa bamir ya Tempelo te.
و چون خانه بنا می‌شد از سنگهایی که در معدن مهیا شده بود، بنا شد به طوری که در وقت بنا نمودن خانه نه چکش و نه تبر و نه هیچ آلات آهنی مسموع شد. ۷ 7
Mpo na kotonga Tempelo, basalelaki kaka mabanga oyo ebongisamaki malamu wuta na esika oyo bapasolaki yango; boye, esalaki ete makelele ya marto, ya epasola to ya esalelo mosusu ya ebende etikalaki koyokana te wana bazalaki kotonga yango.
و در غرفه های وسطی در جانب راست خانه بود و به طبقه وسطی و از طبقه وسطی تا طبقه سومی از پله های پیچاپیچ بالا می‌رفتند. ۸ 8
Ekotelo ya etaje ya se ezalaki na ngambo ya sude ya Tempelo; bongo, bazalaki kotambola na binyatelo mpo na komata na etaje ya kati-kati mpe na etaje ya misato.
و خانه را بنا کرده، آن را به اتمام رسانید و خانه را با تیرهاو تخته های چوب سرو آزاد پوشانید. ۹ 9
Tango Salomo asilisaki misala ya kotonga Tempelo, azipaki yango na plafon oyo esimbamaki na mabaya minene ya banzete ya sedele.
و برتمامی خانه طبقه‌ها را بنا نمود که بلندی هر یک از آنها پنج ذراع بود و با تیرهای سرو آزاد در خانه متمکن شد. ۱۰ 10
Atongaki ba-etaje kolanda mir ya Tempelo: etaje moko na moko ezalaki na bosanda ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe ekanganaki na Tempelo na nzela ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
و کلام خداوند بر سلیمان نازل شده، گفت: ۱۱ 11
Yawe alobaki na Salomo:
«این خانه‌ای که تو بنا می‌کنی اگر در فرایض من سلوک نموده، احکام مرا به‌جا آوری و جمیع اوامر مرا نگاه داشته، در آنها رفتار نمایی، آنگاه سخنان خود را که با پدرت، داود، گفته‌ام با تواستوار خواهم گردانید. ۱۲ 12
— Na likambo oyo etali Tempelo oyo ozali kotonga, soki olandi bikateli na Ngai, soki okokisi malako na Ngai, soki otosi mpe olandi mibeko na Ngai nyonso, nakokokisa na nzela na yo elaka oyo napesaki na Davidi, tata na yo.
و در میان بنی‌اسرائیل ساکن شده، قوم خود اسرائیل را ترک نخواهم نمود.» ۱۳ 13
Mpe nakoya kovanda kati na bato ya Isalaele mpe nakosundola te bato na Ngai, Isalaele.
پس سلیمان خانه را بنا نموده، آن را به اتمام رسانید. ۱۴ 14
Salomo atongaki Tempelo mpe asilisaki misala na yango ya kotonga.
و اندرون دیوارهای خانه را به تخته های سرو آزاد بنا کرد، یعنی از زمین خانه تادیوار متصل به سقف را از اندرون با چوب پوشانید و زمین خانه را به تخته های صنوبر فرش کرد. ۱۵ 15
Alatisaki bamir ya kati ya Tempelo na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, mpe atiaki mabaya ya sipele na mabele ya Tempelo.
و از پشت خانه بیست ذراع با تخته های سرو آزاد از زمین تا سر دیوارها بنا کرد و آنها رادر اندرون به جهت محراب، یعنی به جهت قدس‌الاقداس بنا نمود. ۱۶ 16
Atongaki na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, etando ya bametele pene zomi kati na Tempelo; abongisaki yango mpo ete ezala Esika-Oyo-Eleki-Bule.
و خانه، یعنی هیکل پیش روی محراب چهل ذراع بود. ۱۷ 17
Eteni oyo elekaki monene kati na Tempelo, liboso ete okoma na Esika-Oyo-Eleki-Bule, ezalaki na bametele pene tuku mibale.
و دراندرون خانه چوب سرو آزاد منبت به شکل کدوها و بسته های گل بود چنانکه همه‌اش سروآزاد بود و هیچ سنگ پیدا نشد. ۱۸ 18
Batobolaki bililingi na mabaya ya sedele oyo balatisaki na bamir ya kati ya Tempelo, mpo na kotia bilembo oyo ezalaki na lolenge ya bakolokente mpe ya bafololo efungwama; balatisaki kati nyonso ya Tempelo na mabaya ya banzete ya sedele, mpe ata libanga moko te ezalaki komonana.
و در اندرون خانه، محراب را ساخت تا تابوت عهد خداوند رادر آن بگذارد. ۱۹ 19
Salomo abongisaki Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo na kotia Sanduku ya Boyokani ya Yawe.
و اما داخل محراب طولش بیست ذراع و عرضش بیست ذراع و بلندیش بیست ذراع بود و آن را به زر خالص پوشانید ومذبح را با چوب سرو آزاد پوشانید. ۲۰ 20
Molayi ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki na bametele pene zomi, mokuse na yango, bametele pene zomi; bongo bosanda na yango, bametele pene zomi. Salomo abambaki kati na yango wolo ya peto; abambaki lisusu wolo na etumbelo oyo basala na mabaya ya banzete ya sedele.
پس سلیمان داخل خانه را به زر خالص پوشانید وپیش روی محراب زنجیرهای طلا کشید و آن رابه طلا پوشانید. ۲۱ 21
Salomo abambaki wolo ya peto na kati nyonso ya Tempelo; atiaki basheni ya wolo liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
و تمامی خانه را به طلاپوشانید تا همگی خانه تمام شد و تمامی مذبح راکه پیش روی محراب بود، به طلا پوشانید. ۲۲ 22
Boye, abambaki wolo na kati nyonso ya Tempelo mpe na etumbelo oyo ezalaki liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
و در محراب دو کروبی از چوب زیتون ساخت که قد هر یک از آنها ده ذراع بود. ۲۳ 23
Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, asalaki na nzete ya olive bililingi mibale ya basheribe: sheribe moko na moko ezalaki na bametele pene mitano na molayi.
و بال یک کروبی پنج ذراع و بال کروبی دیگر پنج ذراع بود و از سر یک بال تا به‌سر بال دیگر ده ذراع بود. ۲۴ 24
Lipapu moko ya sheribe ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano; kosangisa mapapu nyonso mibale epesaki bametele mitano, kobanda na songe moko kino na songe mosusu.
و کروبی دوم ده ذراع بود که هر دو کروبی رایک اندازه و یک شکل بود. ۲۵ 25
Molayi ya sheribe ya mibale ezalaki mpe na bametele pene mitano. Bililingi ya basheribe nyonso mibale ezalaki lolenge moko mpe molayi moko.
بلندی کروبی اول ده ذراع بود و همچنین کروبی دیگر. ۲۶ 26
Bosanda ya bililingi nyonso mibale ya basheribe ezalaki ndenge moko: bametele pene mitano.
و کروبیان را در اندرون خانه گذاشت و بالهای کروبیان پهن شد به طوری که بال یک کروبی به دیوار می‌رسیدو بال کروبی دیگر به دیوار دیگر می‌رسید و درمیان خانه بالهای آنها با یکدیگر برمی خورد. ۲۷ 27
Salomo atiaki bililingi ya basheribe yango na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule kati na Tempelo. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama: lipapu moko ya sheribe ya liboso etutaki mir, mpe lipapu mosusu ya sheribe ya mibale etutaki mir mosusu; mpe mapapu na bango mibale mosusu etutanaki na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
وکروبیان را به طلا پوشانید. ۲۸ 28
Salomo abambaki basheribe yango wolo.
و بر تمامی دیوارهای خانه، به هر طرف نقشهای تراشیده شده کروبیان و درختان خرما وبسته های گل در اندرون و بیرون کند. ۲۹ 29
Atobolaki na bamir oyo ezingelaki Tempelo, ezala na kati to na libanda, bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.
وزمین خانه را از اندرون و بیرون به طلاپوشانید. ۳۰ 30
Abambaki lisusu wolo na se ya Tempelo, ezala na kati to na libanda ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.
و به جهت در محراب دو لنگه از چوب زیتون، و آستانه و باهوهای آن را به اندازه پنج یک دیوار ساخت. ۳۱ 31
Salomo asalaki na mabaya ya banzete ya olive, na ekotelo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, ekuke moko ya bizipelo mibale: monene ya kadre ya mabaya ya ekuke ezwaki ndambo moko kati na bandambo mitano ya mokuse ya mir.
پس آن دو لنگه از چوب زیتون بود و بر آنها نقشهای کروبیان و درختان خرما و بسته های گل کند و به طلا پوشانید. وکروبیان و درختان خرما را به طلا پوشانید. ۳۲ 32
Atobolaki bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama na bizipelo nyonso mibale oyo basalaki na mabaya ya banzete ya olive; abambaki wolo oyo balekisa na moto na bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.
و همچنین به جهت در هیکل باهوهای چوب زیتون به اندازه چهار یک دیوار ساخت. ۳۳ 33
Asalaki mpe ndenge moko mpo na ekotelo ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene: kadre na mabaya ya banzete ya olive, bizipelo mibale na mabaya ya banzete ya sipele. Monene na yango ezwaki ndambo moko kati na bandambo minei ya mokuse ya mir.
و دو لنگه این در از چوب صنوبر بود و دو تخته لنگه اول تا می‌شد و دو تخته لنگه دوم تا می‌شد. ۳۴ 34
Asalaki lisusu na mabaya ya sipele bizipelo mibale; ezipelo ya liboso ezalaki na biteni ya mabaya mibale oyo ebalukaka, mpe ezipelo ya mibale ezalaki na barido mibale oyo ebalukaka.
و بر آنها کروبیان و درختان خرما و بسته های گل کند و آنها را به طلایی که موافق نقشها ساخته بود، پوشانید. ۳۵ 35
Atobolaki likolo na yango bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama; mpe abambaki yango wolo na kolanda bandelo ya bililingi yango.
و صحن اندرون را از سه صف سنگهای تراشیده، و یک صف تیرهای سرو آزادبنا نمود. ۳۶ 36
Salomo azingelaki lopango ya kati na mir oyo batonga na milongo misato ya mabanga bakata mpe bamatisa moko likolo ya mosusu, mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
و بنیاد خانه خداوند در ماه زیو از سال چهارم سلطنت نهاده شد. ۳۷ 37
Moboko ya Tempelo ya Yawe etiamaki na mobu ya minei, na sanza ya Zivi.
و در سال یازدهم درماه بول که ماه هشتم باشد، خانه با تمامی متعلقاتش بر وفق تمامی قانون هایش تمام شد. پس آن را در هفت سال بنا نمود. ۳۸ 38
Basilisaki kotonga Tempelo ya Yawe elongo na biteni na yango nyonso na sanza ya Buli oyo ezali sanza ya mwambe, na mobu ya zomi na moko. Salomo asalaki mibu sambo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe.

< اول پادشاهان 6 >