< اول تواریخ 4 >

بني يهودا: فارَص و حَصرُون و کَرمي و حور و شوبال. ۱ 1
Libota ya Yuda: Peretsi, Etsironi, Karimi, Wuri mpe Shobali.
و رَآيا ابن شوبال يحَت را آورد و يحَت اَخُوماي و لاهَد را آورد. اينانند قبايل صَرعاتيان. ۲ 2
Reaya, mwana mobali ya Shobali, azalaki tata ya Yaati, mpe Yaati azalaki tata ya Awumayi mpe ya Laadi. Bango nde bazalaki bakoko ya bituka ya bato ya Tsorea.
و اينان پسران پدر عيطام اند: يزرَعيل و يشما و يدباش و اسم خواهر ايشان هَصلَلفُوني بود. ۳ 3
Tala bana mibali ya Etami: Jizireyeli, Yishima mpe Yidibashi. Kombo ya ndeko na bango ya mwasi ezalaki Atseleliponi.
فَنُوئيل پدر جَدُور و عازَر پدر خُوشَه اينها پسران حور نخست زاده اَفراته پدر بيت لحم بودند. ۴ 4
Penueli azalaki tata ya Gedori, mpe Ezeri azalaki tata ya Usha. Bango nde bazalaki bakitani ya Wuri, mwana liboso ya Efrata, tata ya Beteleemi.
و اَشحُور پدر تَقّوع دو زن داشت: حَلا و نَعرَه. ۵ 5
Ashiwuri, tata ya Tekoa, azalaki na basi mibale: Eleya mpe Nara.
و نَعرَه، اَخُزّام و حافَر و تَيماني و اَخَشطاري را براي او زاييد؛ اينان پسران نَعرَه اند. ۶ 6
Nara abotelaki ye bana mibali oyo: Awuzami, Eferi, Temeni mpe Ahashitari.
و پسران حَلا: صَرَت و صُوحَر و اَتنان. ۷ 7
Eleya abotelaki ye bana mibali oyo: Tsereti, Tsoari mpe Etinani.
و قُوس عانوب و صُوبِيبَه و قبايل اَخَرحيل بن هارُم را آورد. ۸ 8
Kotsi azalaki tata ya Anubi mpe Atsobeba, mpe koko ya mabota ya Aareyeli, mwana mobali ya Arumi.
و يعبِيص از برادران خود شريف تر بود و مادرش او را يعبِيص نام نهاد و گفت: « از اين جهت که او را با حُزن زاييدم.» ۹ 9
Yaebetsi azalaki na lokumu mingi koleka bandeko na ye ya mibali. Mama na ye apesaki ye kombo « Yaebetsi » mpo na koloba: « Nabotaki yo na pasi. »
و يبِيص از خداي اسرائيل استدعا نموده گفت: « کاش که مرا برکت مي دادي و حدود مرا وسيع ميگردانيدي و دست تو با من مي بود و مرا از بلا نگاه مي داشتي تا محزون نشوم.» و خدا آنچه را که خواست به او بخشيد. ۱۰ 10
Yaebetsi abelelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele; alobaki: « Oh Yawe! Soki okoki kopambola ngai mpe koyeisa mabele na ngai monene! Tika ete loboko na Yo ezala likolo na ngai! Bomba ngai mosika ya mabe mpo ete namona pasi te. » Mpe Nzambe ayanolaki libondeli na ye.
وکَلوب برادر شُوحَه مَحِير را که پدر اَشتون باشد آورد. ۱۱ 11
Kelubi, ndeko mobali ya Shuwa, azalaki tata ya Meyiri oyo azalaki tata ya Eshitoni.
و اَشتون بيت رافا و فاسيح تَحِنّه پدر عِير ناحاش را آورد. اينان اهل ريقَه مي باشد. ۱۲ 12
Eshitoni azalaki tata ya Beti-Rafa, Paseya mpe Teyina oyo atongaki engumba Naashi. Bango nde bazalaki kovanda na engumba Reka.
و پسران قَناز و عُتنِيئِيل و سَرايا بودند؛ و پسر عُتنيئيل حَتَات. ۱۳ 13
Bana mibali ya Kenazi: Otinieli mpe Seraya. Bana mibali ya Otinieli: Atati mpe Meonotayi.
و مَعُونُوتاي عُفرَه را آورد و سَرايا، يوآب پدرجيحَراشيم را آورد، زيرا که صنعتگر بودند. ۱۴ 14
Meonotayi abotaki Ofira. Seraya abotaki Joabi, tata ya Ge-Arashimi. Bazalaki kobenga ye bongo, pamba te bato na ye bazalaki kosala misala ya maboko, ya kotula bibende na moto.
و پسران کاليب بن يفُنَّه، عيرُو و اِيلَه و ناعَم بودند؛ و پسر اِيلَه قَناز بود. ۱۵ 15
Bana mibali ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune: Iru, Ela mpe Naame. Mwana mobali ya Ela: Kenazi.
و پسران يهلَلئيل، زيف و زيفَه و تِيريا و اَسَرئيل. ۱۶ 16
Mwana mobali ya Yealeyeli: Zifi, Zifa, Tiria mpe Asareli.
و پسران عَزرَه يتَر و مَرَد و عافَر و يالون(و زنِ مَرَد) مريم و شَماي و يشبَح پدر اَشتَمُوع را زاييد. ۱۷ 17
Bana mibali ya Esidrasi: Yeteri, Meredi, Eferi mpe Yaloni. Moko kati na basi ya Meredi abotaki Miriami, Shamayi mpe Yishiba, tata ya Eshitemoa.
و زن يهوديه او يارَد، پدر جَدُور، و جابَر پدر سُوکُو و يقوتيئيل پدر زانوح را زاييد. اما آنان پسران بِتيه دختر فرعون که مَرَد او را به زني گرفته بود مي باشند. ۱۸ 18
Mwasi na ye, moto ya Yuda, abotaki Yeredi, tata ya Gedori; Eberi, tata ya Soko mpe Yekutieli, tata ya Zanoa. Bango nde bazalaki bana mibali ya Bitiya, mwana mwasi ya Faraon, oyo Meredi abalaki.
و پسران زن يهوديه او که خواهر نَحَم بود پدر قَعيلَه جَرمي و اَشتَمُوع مَعکاتي بودند. ۱۹ 19
Bana mibali ya mwasi ya Odia, ndeko mwasi ya Naami: tata ya Keila, moto ya Garima; mpe Eshitemoa, moto ya mboka Maakati.
وپسران شيمون: اَمنون وَرِنَّه و بِنحانان وتيلون و پسران يشعِي زُنزُوحيت. ۲۰ 20
Bana mibali ya Simona: Aminoni, Rina, Beni-Anani mpe Tiloni. Bana mibali ya Yisheyi: Zoeti mpe Beni-Zoeti.
و بني شيلَه بن يهودا، عير پدر ليکَه، و لَعدَه پدر مَريشَه و قبايل خاندان عاملان کتان نازک از خانواده اَشبيع بودند. ۲۱ 21
Bana mibali ya Shela, mwana mobali ya Yuda: Eri, tata ya Leka; Laeda, tata ya Maresha; mpe mabota ya basali bilamba ya lino, na Beti-Asheba.
و يوقيم و اهل کُوزِيبا و يوآش و ساراف که در موآب مِلک داشتند، و يشُوبي لَحمَ؛ و اين وقايع قديم است. ۲۲ 22
Yokimi, bato ya Kozeba, Joasi mpe Sarafi oyo bazalaki bakambi kati na Moabi mpe engumba Yashubi-Leemi. Nyonso oyo ezali makambo ya kala.
و اينان کوزه گر بودند با ساکنان نتاعيم و جَديره که در آنجاها نزد پادشاه به جهت کار او سکونت داشتند. ۲۳ 23
Bazalaki basali mbeki oyo bazalaki kovanda na Netayimi mpe na Gedera; batikalaki kuna mpo na kosalela mokonzi.
پسران شَمعون: نمُوئيل و يامين و ياريب و زارَح و شاؤل. ۲۴ 24
Bana mibali ya Simeoni: Nemueli, Yamini, Yaribi, Zera; Saulo, tata ya Shalumi;
و پسرش شَلّوُم و پسرش مِبسام و پسرش مِشماع. ۲۵ 25
Shalumi, tata ya Mibisami; Mibisami, tata ya Mishima.
و بني مِشماع پسرش حموُئيل و پسرش زَکُّور و پسران شِمعي. ۲۶ 26
Bana mibali ya Mishima: Amueli, Zakuri mpe Shimei.
و شِمعي را شانزده پسر و شش دختر بود ولکن برادرانش را پسران بسيار نبود و همه قبايل ايشان مثل بني يهودا زياد نشدند. ۲۷ 27
Shimei azalaki na bana mibali zomi na motoba mpe bana basi motoba; kasi bandeko na ye ya mibali babotaki bana mingi te, yango wana etuka na bango ezalaki na bato ebele te lokola libota ya Yuda.
و ايشان در بئرشَبَع و مُولادَه و حَصَر شُوآل، ۲۸ 28
Bazalaki kovanda na Beri-Sheba, na Molada, na Atsari-Shuwali,
و در بِلهَه و عاصَم و تولاد، ۲۹ 29
na Bila, na Etsemi, na Toladi,
و در بَتوئيل و حَرمُه و صِقلَغ ۳۰ 30
na Betweli, na Orima, na Tsikilagi,
و دربيت مرکَبوت و حَصرسُوسيم و بيت بِرئِي و شَعَرايم ساکن بودند. اينها شهرهاي ايشان تا زمان سلطنت داود بود. ۳۱ 31
na Beti-Marikaboti, na Atsari-Suzimi, na Beti-Birei mpe na Shaarayimi: nyonso oyo ezalaki bingumba na bango kino na tango ya bokonzi ya Davidi.
و قريه هاي ايشان عيطام عين و رِمُّون و تُوکَن و عاشان، يعني پنج قريه بود، ۳۲ 32
Tala bingumba mitano mike oyo ezalaki zingazinga na yango: Etami, Ayini, Rimoni, Tokeni mpe Ashani;
و جميع قريه هاي ايشان که در پيرامون آن شهرها تابَعل بود. پس مسکنهاي ايشان اين است و نسب نامه هاي خود را داشتند. ۳۳ 33
bakisa bamboka mike mosusu oyo ezingelaki bingumba yango kino na Baalati. Oyo nde ezalaki bisika na bango ya kovanda mpe molongo ya mbotama ya bakoko na bango.
و مَشوبات و يمليک و يوشَه بن اَمصيا، ۳۴ 34
Meshobabi; Yamileki; Yosha, mwana mobali ya Amatsia;
يوئيل و ييهُو ابن يوشِبيا ابن سَرايا ابن عَسِيئيل، ۳۵ 35
Joeli; Jewu, mwana mobali ya Yoshibia, mwana mobali ya Seraya, mwana mobali ya Asieli;
و اَليوعيناي و يعکوبَه و يشوحايا وعَسايا و عِديئيل و يسيميئيل و بنايا، ۳۶ 36
Eliowenayi; Yakoba; Yeshoaya; Asaya; Adieli; Yesimieli; Benaya;
و زيزا ابن شِفعِي ابن اِلّوُن بن يدايا ابن شِمري ابن شَمَعيا، ۳۷ 37
Ziza, mwana mobali ya Shifeyi, mwana mobali ya Aloni, mwana mobali ya Yedaya, mwana mobali ya Shimiri, mwana mobali ya Shemaya.
ايناني که اسم ايشان مذکور شد، در قبايل خود رؤسا بودند و خانه هاي آباي ايشان بسيار زياد شد. ۳۸ 38
Bato oyo batangamaki na bakombo bazalaki bakambi ya bituka na bango. Mabota na bango ekomaki minene
و به مدخل جَدُورتا طرف شرقي وادي رفتند تا براي گله هاي خويش چراگاه بجويند. ۳۹ 39
mpe bakendeki na zingazinga ya Gedori, na ngambo ya este ya lubwaku, mpo na koluka matiti ya koleisa bibwele na bango.
پس برومند نيکو يافتند و آن زمين وسيع و آرام و امين بود، زيرا که آلِ حام در زمان قديم در آنجا ساکن بودند. ۴۰ 40
Bakutaki kuna: matiti kitoko mpo na koleisa bibwele, mokili moko ya monene, ya kimia mpe ezanga mobulu. Bato oyo bazalaki kovanda kuna na tango ya kala, bazalaki bakitani ya Cham.
و ايناني که اسم ايشان مذکور شد، در ايام حِزقيا پادشاه يهودا آمدند و خيمه هاي ايشان و معونيان را که در آنجا يافت شدند، شکست دادند و ايشان را تا به امروز تباه ساخته، در جاي ايشان ساکن شده اند زيرا که مرتع براي گله هاي ايشان در انجا بود. ۴۱ 41
Na tango Ezekiasi azalaki mokonzi ya Yuda, bato oyo bakombo na bango ekomami, bakomaki na mokili yango. Babundisaki bakitani ya Cham mpe babebisaki bandako na bango; mpe lisusu, basilisaki koboma bato ya Mewuni oyo bazalaki kovanda kuna, ndenge yango ezali komonana lelo. Na sima, bavandaki na bisika na bango, mpo ete mokili yango ezalaki na matiti mpo na koleisa bibwele na bango.
و بعضي از ايشان، يعني پانصد نفر از بني شَمعُون به کوه سَعير رفتند؛ و فَلطِيا و نَعرِيا و رَفايا و عُرِّيئيل پسران يشيع رؤساي ايشان بودند. ۴۲ 42
Bato ya Simeoni nkama mitano oyo bakambamaki na Pelatia, na Nearia, na Refaya mpe na Uzieli, bana mibali ya Yisheyi, babotolaki na makasi mokili ya bangomba Seiri,
و بقيه عَمالَقَه را که فرار کرده بودند، شکست داده، تا امروز در آنجا ساکن شده اند. ۴۳ 43
babomaki ndambo ya bato ya Amaleki oyo batikalaki mpe bavandaki kuna kino lelo.

< اول تواریخ 4 >