< Salmenes 43 >

1 Gi mig rett, Gud, og før min sak mot folk uten barmhjertighet, frels mig fra falske og urettferdige menn!
Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te; kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe ya bato mabe.
2 For du er den Gud som er mitt vern. Hvorfor har du forkastet mig? Hvorfor skal jeg gå i sørgeklær under fiendens trykk?
Nzambe, Yo nde ozali ndako na ngai, oyo batonga makasi; mpo na nini osundoli ngai? Mpo na nini nasengeli kotambola na pasi boye, na se ya minyoko ya monguna?
3 Send ditt lys og din sannhet, la dem lede mig, la dem føre mig til ditt hellige berg og til dine boliger,
Tinda mwinda mpe solo na Yo mpo ete ekamba mpe emema ngai na ngomba na Yo ya bule epai wapi ovandaka;
4 så jeg kan komme til Guds alter, til min fryds og gledes Gud, og prise dig på citar, Gud, min Gud!
bongo nakokende na etumbelo epai ya Nzambe, esengo mpe bomengo na ngai. Oh Yawe, Nzambe na ngai, nakosanzola Yo na lindanda.
5 Hvorfor er du nedbøiet, min sjel, og hvorfor bruser du i mig? Bi efter Gud! For jeg skal ennu prise ham, mitt åsyns frelse og min Gud.
Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye? Mpo na nini ozali komitungisa kati na ngai? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakosanzola Ye lisusu, Mobikisi mpe Nzambe na ngai.

< Salmenes 43 >