< 3 Mosebok 10 >

1 Men Arons sønner Nadab og Abihu tok hver sitt ildkar og la ild i dem og la røkelse på ilden og bar fremmed ild inn for Herrens åsyn, som han ikke hadde befalt dem.
Bana mibali ya Aron, Nadabi mpe Abiyu, bazwaki moko na moko mbabola na ye; batiaki yango makala ya moto mpe batiaki ansa na likolo ya makala yango. Lokola bakokisaki te kolanda oyo basengelaki kosala, bamemaki moto ya mopaya liboso ya Yawe.
2 Da gikk det ild ut fra Herrens åsyn og fortærte dem, og de døde for Herrens åsyn.
Boye moto ebimaki longwa liboso ya Yawe mpe etumbaki bango nyonso; bakufaki na mbala moko.
3 Da sa Moses til Aron: Dette var det Herren talte om da han sa: På dem som står mig nær, vil jeg åpenbare min hellighet, og for alt folkets åsyn vil jeg forherlige mig. Og Aron tidde.
Moyize alobaki na Aron: « Tomoni kokokisama ya maloba oyo Yawe asakolaki tango alobaki: ‹ Bato nyonso oyo bakobelema liboso na Ngai basengeli kotosa bosantu na Ngai, mpe Ngai nakomonisa nkembo na Ngai na miso ya bato nyonso. › » Aron alobaki ata liloba moko te.
4 Men Moses kalte på Misael og Elsafan, sønner av Arons farbror Ussiel, og sa til dem: Tred frem og bær eders brødre bort fra helligdommen og utenfor leiren!
Moyize abengisaki Mishaeli mpe Elitsafani, bana mibali ya Uzieli, noko ya Aron. Alobaki na bango: « Boya kolongola bibembe ya bandeko na bino liboso ya Esika ya bule mpe bomema yango na libanda ya molako. »
5 Og de trådte frem og bar dem i deres kjortler utenfor leiren, som Moses hadde sagt.
Basalaki ndenge kaka Moyize alobaki na bango: bapusanaki mpe bamemaki bibembe elongo na banzambala na bango na libanda ya molako.
6 Da sa Moses til Aron og hans sønner Eleasar og Itamar: I skal ikke rake eders hoder og ikke sønderrive eders klær, forat I ikke skal dø, og forat han ikke skal vredes på hele menigheten; men eders brødre, hele Israels hus, skal gråte over denne brand som Herren har optendt.
Sima na yango, Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron: « Bopanza te suki ya mito na bino, bopasola te bilamba na bino lokola nde bozali na matanga, noki te bokokufa mpe bokobenda kanda ya Yawe likolo ya lisanga mobimba. Ezali bandeko na bino nyonso ya Isalaele nde bakolela bato oyo Yawe atumbi na moto.
7 Og I skal ikke gå bort fra inngangen til sammenkomstens telt, forat I ikke skal dø; for Herrens salvings-olje er på eder. Og de gjorde som Moses sa.
Kasi bino, bosengeli te kolongwa liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, noki te bokokufa; pamba te bapakola bino mafuta mpo na kosala mosala ya Yawe. » Aron mpe bana na ye batosaki makambo oyo Moyize alobaki na bango.
8 Og Herren talte til Aron og sa:
Yawe alobaki na Aron:
9 Vin eller sterk drikk skal hverken du eller dine sønner drikke når I går inn i sammenkomstens telt, forat I ikke skal dø - det skal være en evig lov for eder, fra slekt til slekt -
« Tango bokobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, yo mpe bana na yo ya mibali, bosengeli te komela masanga oyo elangwisaka, noki te bokokufa. Yango ezali mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe milongo nyonso oyo ekoya sima na bino,
10 så I kan gjøre forskjell mellem hellig og vanhellig, mellem urent og rent,
mpo ete boyeba kokesenisa eloko ya bule mpe eloko oyo ezangi bule, eloko ya peto mpe eloko ya mbindo;
11 og lære Israels barn alle de lover som Herren har kunngjort dem ved Moses.
lisusu mpo ete boyeba koteya bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo Yawe apesaki bino na nzela ya Moyize. »
12 Så sa Moses til Aron og hans sønner Eleasar og Itamar, som ennu var i live: Ta det matoffer som er tilovers av Herrens ildoffer, og et det usyret ved siden av alteret; for det er høihellig.
Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron: « Kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bokobanda kozwa likabo oyo ekotikala, oyo ekozika te na moto, mpe bokobanda kolia yango pembeni ya etumbelo; bokotia yango ezanga levire, pamba te ezali eteni ya bule koleka.
13 I skal ete det på et hellig sted, for det er din og dine sønners fastsatte del av Herrens ildoffer; således er det mig befalt.
Bokolia yango na Esika ya bule, pamba te yango nde epesameli yo mpe bana mibali na yo kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, ndenge kaka atindaki ngai.
14 Og svinge-brystet og løfte-låret skal I ete på et rent sted, du og dine sønner og dine døtre med dig; for det er gitt dig og dine barn som eders fastsatte del av Israels barns takkoffer.
Kati na bambeka ya boyokani oyo bana ya Isalaele bakobanda kobonza, yo mpe bana na yo, bokobanda kolia, na Esika ya bule, lokola eteni oyo epesameli bino, tolo oyo ekobonzama lokola likabo ya kotombola mpe mopende ya banyama oyo ekobonzama epai ya Yawe.
15 Løfte-låret og svinge-brystet skal de bære frem sammen med ildofferfettstykkene og svinge dem for Herrens åsyn; og det skal være din og dine barns fastsatte del til evig tid, således som Herren har befalt.
Bana ya Isalaele bakobonza elongo na biteni ya mafuta bazikisa na moto: tolo mpe mopende ya banyama oyo batombolaka liboso ya Yawe. Ekokoma ya yo mpe ya bana mibali na yo mpo na libela, ndenge kaka Yawe atindaki ngai. »
16 Da nu Moses spurte efter syndoffer-bukken, viste det sig at den var opbrent; da blev han vred på Eleasar og Itamar, Arons sønner som ennu var i live, og han sa:
Bongo, tango Moyize atunaki ntaba ya mobali oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu, ayokaki ete basilaki kotumba yango na moto. Boye asilikelaki Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron, mpe atunaki bango:
17 Hvorfor har I ikke ett syndofferet på det hellige sted? Det er jo høihellig, og han har gitt eder det forat I skal bortta menighetens syndeskyld og gjøre soning for dem for Herrens åsyn.
— Mpo na nini boliaki te mosuni ya mbeka mpo na masumu na Esika ya bule, pamba te ezali eteni ya bule? Yawe apesaki bino yango mpo ete bokangola lisanga ya Isalaele na masumu na bango mpe bosala liboso ya Yawe mosala ya bolimbisi masumu na bango.
18 Blodet blev jo ikke båret inn i helligdommen; derfor skulde I ha ett kjøttet på det hellige sted, således som jeg har befalt.
Lokola makila ya mbeka yango ekotaki te kati na Esika ya bule, bosengelaki kolia mosuni na yango na Esika ya bule kolanda ndenge nalobaki na tina na yango.
19 Da sa Aron til Moses: De har jo idag ofret sitt syndoffer og sitt brennoffer for Herrens åsyn, og enda er slik en ulykke hendt mig. Om jeg nu hadde ett syndoffer idag, skulde da det ha vært godt i Herrens øine?
Aron azongiselaki Moyize: — Na mokolo oyo bana na ngai babonzelaki Yawe mbeka na bango mpo na masumu mpe mbeka na bango ya kotumba, oyebi malamu makambo oyo ekweyelaki ngai. Soki, na mokolo lokola oyo wana, ngai naliaki mosuni ya mbeka mpo na masumu, Yawe akokaki na Ye kondima ete ngai nasala likambo ya bongo?
20 Da Moses hørte dette, syntes han det var rett.
Moyize ayokaki eyano oyo mpe amonaki ete ezali malamu.

< 3 Mosebok 10 >