< 1 Krønikebok 16 >

1 Så førte de Guds ark inn og satte den midt i det telt som David hadde reist for den, og de bar frem brennoffer og takkoffer for Guds åsyn.
Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango, mpe babonzaki liboso ya Nzambe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.
2 Og da David var ferdig med å ofre brennofferet og takkofferne, velsignet han folket i Herrens navn.
Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe.
3 Og han utdelte til hver enkelt i Israel, både mann og kvinne, et brød og et stykke kjøtt og en rosinkake.
Bongo apesaki na moto nyonso ya Isalaele: lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati mpe gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka.
4 Og han satte nogen av levittene til å gjøre tjeneste foran Herrens ark og til å prise og takke og love Herren, Israels Gud:
Davidi atiaki ndambo ya Balevi mpo na kosala mosala liboso ya Sanduku ya Yawe, mpo na kokanisa, mpo na kosanzola mpe mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele:
5 Asaf var den øverste, næst efter ham kom Sakarja og så Je'iel og Semiramot og Jehiel og Mattitja og Eliab og Benaja og Obed-Edom og Je'iel med harper og citarer; Asaf skulde slå på cymblene
Azafi azalaki mokambi; Zakari azalaki molandi na ye; mpe Yeyeli, Shemiramoti, Yeyeli, Matitia, Eliabi, Benaya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli bazalaki kobeta nzenze mpe lindanda; mpe Azafi azalaki kobeta manzanza.
6 og prestene Benaja og Jahasiel stadig blåse i trompetene foran Guds pakts-ark.
Banganga-Nzambe Benaya mpe Yaazieli bazalaki kobeta tango nyonso bakelelo liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.
7 Den dag satte David første gang Asaf og hans brødre til å synge Herrens pris:
Ezalaki mokolo wana nde Davidi aponaki na mbala ya liboso Azafi mpe bandeko na ye, mpo ete bakumisa Yawe:
8 Pris Herren, påkall hans navn, kunngjør blandt folkene hans store gjerninger!
Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye, bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo!
9 Syng for ham, lovsyng ham, grund på alle hans undergjerninger!
Boyemba mpo na lokumu na Ye, bosanzola Ye na mindule! Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso!
10 Ros eder av hans hellige navn! Deres hjerte glede sig som søker Herren!
Bosepela na Kombo na Ye ya bule! Tika ete mitema ya bato oyo balukaka Yawe etonda na esengo!
11 Spør efter Herren og hans makt, søk hans åsyn all tid!
Bomipesa na Yawe mpe bosenga makasi na Ye! Bolukaka tango nyonso elongi na Ye!
12 Kom i hu hans undergjerninger som han har gjort, hans under og hans munns dommer,
Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki, bitumbu oyo apesaki,
13 I, hans tjener Israels avkom, Jakobs barn, hans utvalgte!
bino bakitani ya Isalaele, mosali na Ye; bino bana mibali ya Jakobi, baponami na Ye!
14 Han er Herren vår Gud; hans dommer er over all jorden.
Yawe azali Nzambe na biso, mikano na Ye ekambaka mokili mobimba.
15 Kom evindelig hans pakt i hu, det ord han fastsatte for tusen slekter,
Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye, bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko,
16 den pakt han gjorde med Abraham, og hans ed til Isak!
boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami, mpe ndayi oyo alapaki epai ya Izaki.
17 Han stadfestet den som en rett for Jakob, som en evig pakt for Israel,
Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobi lokola mobeko, epai ya Isalaele lokola boyokani ya libela na libela
18 idet han sa: Dig vil jeg gi Kana'ans land til arvelodd,
tango alobaki: « Nakopesa yo mokili ya Kanana lokola libula oyo epesameli yo. »
19 da I var en liten flokk, få og fremmede der.
Bozalaki kaka motango moke ya bato mpe bapaya kati na yango;
20 Og de vandret fra folk til folk og fra et rike til et annet folk.
bozalaki koyengayenga longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu, longwa na mokili moko kino na mokili mosusu;
21 Han tillot ikke nogen å gjøre vold imot dem, og han straffet konger for deres skyld:
kasi Yawe atikaki moto moko te konyokola bango, apamelaki bakonzi na tina na bango:
22 Rør ikke ved mine salvede, og gjør ikke mine profeter noget ondt!
« Bosimba bapakolami na Ngai te, bosala mabe te epai na basakoli na Ngai. »
23 Syng for Herren, all jorden! Forkynn fra dag til dag hans frelse!
Bino bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe! Bosakolaka lobiko na Ye mokolo na mokolo!
24 Fortell blandt hedningene hans ære, blandt alle folkene hans undergjerninger!
Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso!
25 For stor er Herren og høilovet, og forferdelig er han over alle guder.
Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.
26 For alle folkenes guder er intet; men Herren har gjort himmelen.
Pamba te banzambe nyonso ya bikolo ezali kaka bikeko ya pamba, nzokande Yawe nde akela likolo.
27 Høihet og herlighet er for hans åsyn, styrke og glede er på hans sted.
Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, makasi mpe esengo ezali na esika oyo avandaka.
28 Gi Herren, I folkeslekter, gi Herren ære og makt!
Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe, bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye!
29 Gi Herren hans navns ære, bær frem gaver og kom for hans åsyn, tilbed Herren i hellig prydelse!
Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo! Bomema makabo mpe boya liboso na Ye, bogumbamela Yawe mpo na kongenga ya bosantu na Ye!
30 Bev for hans åsyn, all jorden! Jorderike står fast, det rokkes ikke.
Bino, bato ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye! Solo, mokili elendisama makasi, ekoningana te.
31 Himmelen glede sig, og jorden fryde Sig, og de skal si iblandt hedningene: Herren er blitt konge.
Tika ete likolo esepela mpe mabele ezala kati na esengo! Tika ete baloba kati na bikolo: « Yawe azali mokonzi! »
32 Havet bruse og alt som fyller det! Marken fryde sig og alt som er på den!
Tika ete ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango etia makelele; tika ete zamba mpe nyonso oyo ezali kati na yango esepela!
33 Da jubler trærne i skogen for Herrens åsyn; for han kommer for å dømme jorden.
Boye, banzete ya zamba ekoyemba, ekoyemba na esengo liboso ya Yawe, pamba te Yawe azali koya kosambisa mabele.
34 Lov Herren! For han er god, hans miskunnhet varer evindelig.
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko.
35 Og si: Frels oss, du vår frelses Gud, og samle oss og utfri oss fra hedningene til å love ditt hellige navn, rose oss av å kunne prise dig!
Boganga: « Oh Nzambe Mobikisi na biso, bikisa biso, sangisa biso mpe kangola biso wuta na maboko ya bokonzi ya bikolo mosusu, mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo! »
36 Lovet være Herren, Israels Gud, fra evighet og til evighet! Og alt folket sa amen og lovet Herren.
Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko! Bato nyonso balobaki: « Amen! » Mpe bakumisaki Yawe!
37 Så lot han Asaf og hans brødre bli der foran Herrens pakts-ark for stadig å gjøre tjeneste foran arken, hver dag det som skulde gjøres på den dag,
Davidi apesaki mokumba, epai ya Azafi mpe bandeko na ye, ya kosala mosala liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe kolanda bikateli ya mokolo na mokolo.
38 og Obed-Edom og deres brødre, åtte og seksti, Obed-Edom, sønn av Jeditun, og Hosa som dørvoktere.
Apesaki lisusu mokumba epai ya Obedi-Edomi, mwana mobali ya Yedutuni, mpe bandeko na bango, tuku motoba na mwambe, ya kosala mosala ya kokengela bikuke elongo na Osa.
39 Men presten Sadok og hans brødre prestene lot han bli foran Herrens tabernakel på haugen i Gibeon.
Davidi atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki mpe Banganga-Nzambe mosusu, liboso ya Mongombo ya Yawe na esambelo ya likolo ya ngomba, oyo ezalaki na Gabaoni,
40 forat de stadig skulde ofre Herren brennoffer på brennofferalteret morgen og aften og gjøre alt det som skrevet står i den lov som Herren hadde gitt Israel,
mpo na kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba epai na Yawe, na etumbelo na yango, na tongo mpe na pokwa, kolanda bikateli oyo ekomama na mobeko oyo Yawe apesaki na Isalaele.
41 og sammen med dem Heman og Jedutun og de andre utvalgte, som var nevnt ved navn, forat de skulde love Herren, fordi hans miskunnhet varer evindelig,
Emani mpe Yedutuni bazalaki elongo na bango, mpe bamosusu oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokumisa Yawe na maloba oyo: « Mpo ete bolingo na Ye ekowumela seko. »
42 og hos dem - Heman og Jedutun - var der trompeter og cymbler til bruk for dem som skulde spille, og likeledes andre instrumenter til sangen ved gudstjenesten. Og Jedutuns sønner var dørvoktere.
Emani mpe Yedutuni baponamaki mpo na kobeta bakelelo, manzanza mpe bibetelo mosusu ya mindule mpo na kobongisa banzembo na tina na lokumu ya Nzambe. Bana mibali ya Yedutuni bazalaki bakengeli bikuke.
43 Derefter drog alt folket hver til sitt, og David vendte hjem for å velsigne sitt hus.
Bato nyonso bazongaki, moto na moto epai na ye, mpe Davidi azongaki na ndako na ye mpo na kopambola libota na ye.

< 1 Krønikebok 16 >