< KwabaseGalathiya 5 >

1 Ngakho manini liqine enkululekweni uKristu asikhulula ngayo, lingabuyi libotshelwe futhi ejogweni lobugqili.
Ezali mpo ete tozala bansomi nde Klisto akangolaki biso. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.
2 Khangelani, mina Pawuli ngithi kini, uba lisokwa, uKristu kayikulisiza ngalutho.
Ngai Polo, nazali koloba na bino ete soki bokatisi ngenga, Klisto akozala lisusu na tina te epai na bino.
3 Ngiyafakaza-ke futhi kumuntu wonke osokwayo, ukuthi ulomlandu wokwenza umlayo wonke.
Nazali koyebisa lisusu na moto nyonso oyo akatisi ye moko ngenga ete asengeli kotosa makambo nyonso oyo Mobeko etindaka.
4 Likhutshiwe kuKristu, lina elilungisiswa ngomlayo; liwile emuseni.
Bino oyo bolukaka kokoma sembo na nzela ya kotosa mibeko, bozali ya kokabwana na Klisto, bozali lisusu na se ya ngolu ya Nzambe te.
5 Ngoba thina ngoMoya silindele ngokholo ithemba lokulunga.
Kasi biso, na lisungi ya Molimo, tozali kozela na elikya kokoma sembo na nzela ya kondima.
6 Ngoba kuKristu Jesu ukusoka kumbe ukungasoki kakusizi lutho, kodwa ukholo olusebenza ngothando.
Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali: kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo; ezali te: kokatama ngenga to kokatama ngenga te.
7 Beligijima kuhle; ngubani olivimbele ukuthi lingalaleli iqiniso?
Bozalaki kopota mbangu malamu! Bongo nani apengwisi bino mpo ete botika kotosa bosolo?
8 Lokhukuhuga kakuveli kolibizayo.
Likanisi ya boye ewuti te epai ya Ye oyo abengaki bino.
9 Imvubelo eyingcosana ibilisa inhlama yonke.
Mwa levire moke evimbisaka potopoto nyonso ya mapa.
10 Mina ngilethemba ngani eNkosini, ukuthi kaliyikunakana okwehlukeneyo; kodwa lowo olihluphayo uzathwala isigwebo, loba engubani.
Ngai nandimisami mpo na bino kati na Nkolo ete bokotikala kozala na makanisi mosusu te; mpe ete moto oyo azali kotia mobulu kati na makanisi na bino akozwa etumbu, ezala ata nani.
11 Kodwa mina, bazalwane, uba ngisatshumayela ukusoka, ngisazingelelwani? Ngakho isikhubekiso sesiphambano sisusiwe.
Bandeko na ngai, soki nazalaki nanu koteya tina ya kokatisa ngenga, mpo na nini nanyokolama lisusu? Soki ezali bongo, mateya ya ekulusu elingaki lisusu kobetisa bato mabaku te.
12 Sengathi abalihluphayo bangazithena labo.
Boye tika ete bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino bamilongola ata banzoto ya mibali!
13 Ngoba lina labizelwa enkululekweni, bazalwane; kuphela lingenzi inkululeko ibe lithuba enyameni, kodwa ngothando sebenzelanani.
Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.
14 Ngoba umlayo wonke ugcwaliseka elizwini linye, kulokhu ukuthi: Wothanda umakhelwane wakho njengalokhu uzithanda wena.
Pamba te Mobeko nyonso ekokisami kati na liloba kaka moko: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
15 Kodwa uba lilumana lidlana, qaphelani ukuthi lingaqedwa omunye ngomunye.
Soki bozali kotukana mpe kozokisana, bosala keba ete bobomana te bino na bino.
16 Kodwa ngithi: Hambani ngoMoya, lingagcwalisi lakanye inkanuko zenyama.
Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino: Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino.
17 Ngoba inyama ikhanuka okuphambene loMoya, loMoya okuphambene lenyama; njalo lezizinto ziphambene, ukuze lingenzi izinto elizifunayo.
Pamba te baposa ya bomoto ebundisaka baposa ya Molimo, mpe baposa ya Molimo ebundisaka baposa ya bomoto. Nyonso mibale ebundisanaka mpo ete bolonga te kosala makambo oyo bolingi kosala.
18 Kodwa uba likhokhelwa nguMoya, kalikho ngaphansi komlayo.
Kasi soki Molimo atambolisi bino, bokozala na se ya bokonzi ya Mobeko te.
19 Imisebenzi yenyama-ke isobala, eyile: Ukufeba, ukuphinga, ukungcola, amanyala,
Tala misala ya bomoto: kindumba, misala ya bosoto, pite,
20 ukukhonza izithombe, ukuthakatha, ubutha, inkani, umona, ulaka, ukubanga, ukuxabana, ukubhazuka,
kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana,
21 umhawu, ukubulala, ukudakwa, ukuminza, lezinye izinto ezinjalo; engilitshela ngakho ngaphambili, njengoba ngatsho futhi ngaphambili, ukuthi abenza izinto ezinje kabayikulidla ilifa lombuso kaNkulunkulu.
likunya, milangwa, lokoso ya kolia, mpe makambo mosusu ya lolenge oyo. Nazali komiyebisela bino, ndenge nasalaki liboso: bato oyo basalaka makambo ya lolenge oyo bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
22 Kodwa isithelo sikaMoya luthando, intokozo, ukuthula, ukubekezela, ububele, ukulunga, ukholo,
Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima,
23 ubumnene, ukuzithiba; kokunje kakulamlayo.
boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.
24 Kodwa abakaKristu babethele inyama kanye lokuhugeka lezinkanuko.
Bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto babaka na ekulusu bomoto na bango elongo na baposa mpe bilulela na yango.
25 Uba siphila ngoMoya, njalo asihambe ngoMoya.
Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.
26 Kasingazikhukhumezi, siqalane, sifelane umona.
Tozala bato ya lolendo te, totumbolana te mpe toyokelana zuwa te.

< KwabaseGalathiya 5 >