< Zakari 3 >

1 Yawe alakisaki ngai Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo azalaki ya kotelema liboso ya Anjelu ya Yawe. Alakisaki ngai lisusu Satana oyo azalaki ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Jozue mpo na kofunda ye.
And he showed me Joshua the high priest standing before the angel of the LORD, and Satan standing at his right hand to resist him.
2 Yawe alobaki na Satana: — Satana, tika ete Yawe apamela yo! Tika ete Yawe oyo apona Yelusalemi apamela yo! Boni, moto oyo azali te lokola koni ya moto oyo balongoli na moto?
And the LORD said unto Satan, The LORD rebuke you, O Satan; even the LORD that has chosen Jerusalem rebuke you: is not this a brand plucked out of the fire?
3 Nzokande, Jozue alataki bilamba ya salite tango atelemaki liboso ya Anjelu.
Now Joshua was clothed with filthy garments, and stood before the angel.
4 Bongo Anjelu alobaki na ba-oyo bazalaki kotelema liboso na ye: — Bolongola ye bilamba wana ya salite! Mpe alobaki na Jozue: — Tala, nalongoli masumu na yo mpe nakolatisa yo bilamba ya talo.
And he answered and spoke unto those that stood before him, saying, Take away the filthy garments from him. And unto him he said, Behold, I have caused your iniquity to pass from you, and I will clothe you with change of raiment.
5 Nalobaki: — Bolatisa ye kitendi ya peto oyo bakangaka na moto. Boye, bakangaki ye kitendi ya peto na moto mpe balatisaki ye bilamba mosusu wana Anjelu ya Yawe atelemaki pene na ye.
And I said, Let them set a fair turban upon his head. So they set a fair turban upon his head, and clothed him with garments. And the angel of the LORD stood by.
6 Anjelu ya Yawe ayebisaki na Jozue maloba oyo:
And the angel of the LORD protested unto Joshua, saying,
7 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Soki otamboli na nzela na Ngai mpe obateli mitindo na Ngai, okokamba ndako na Ngai mpe okobatela lopango na Ngai, mpe nakotia yo na molongo ya ba-oyo batelemaka awa.
Thus says the LORD of hosts; If you will walk in my ways, and if you will keep my charge, then you shall also judge my house, and shall also keep my courts, and I will give you places to walk among these that stand by.
8 Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, yo elongo na bandeko na yo, Banganga-Nzambe oyo basalaka elongo na yo, bozali bilembo oyo etalisaka makambo oyo ekoya. Nakobimisa Mosali na Ngai; bakobenga Ye: Moto ya nzete oyo ebimaka na mobimbi.
Hear now, O Joshua the high priest, you, and your fellows that sit before you: for they are men wondered at: for, behold, I will bring forth my servant the BRANCH.
9 Tala, natie libanga liboso ya Jozue. Libanga yango ezali na miso sambo, nakokoma makomi na likolo na yango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpe nakolongola masumu ya mokili oyo na mokolo moko.
For behold the stone that I have laid before Joshua; upon one stone shall be seven eyes: behold, I will engrave the graving thereof, says the LORD of hosts, and I will remove the iniquity of that land in one day.
10 Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobengisa moninga na ye mpo ete bavanda na se ya nzete ya vino mpe ya figi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
In that day, says the LORD of hosts, shall all of you call every man his neighbour under the vine and under the fig tree.

< Zakari 3 >