< Zakari 14 >

1 Tala, mokolo ya Yawe ezali koya; ezali mokolo oyo bakokabola bomengo ya bitumba kati na yo, Yelusalemi.
Look, a day of Jehovah comes, when your spoil will be divided in your midst.
2 Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.
For I will gather all nations against Jerusalem to battle; and the city will be taken, the houses rifled, and the women ravished. Half of the city will go out into captivity, and the rest of the people will not be cut off from the city.
3 Bongo Yawe akobima mpe akobundisa bikolo wana, ndenge asalaka na tango ya bitumba.
Then Jehovah will go out and fight against those nations, as when he fought in the day of battle.
4 Na mokolo wana, makolo na Ye ekotelema likolo ya ngomba ya banzete ya olive oyo ezali na ngambo ya este ya Yelusalemi; mpe ngomba ya olive ekokabwana na biteni mibale: eteni moko na ngambo ya este mpe eteni mosusu na ngambo ya weste. Lubwaku moko ya monene ekosalema: eteni moko ya ngomba ekokende na ngambo ya nor, mpe eteni mosusu, na ngambo ya sude.
His feet will stand in that day on the Mount of Olives, which is before Jerusalem on the east; and the Mount of Olives will be split in two, from east to west, making a very great valley. Half of the mountain will move toward the north, and half of it toward the south.
5 Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso.
Then you shall flee by the valley of my mountains; for the valley of the mountains shall reach to Azel; yes, you shall flee, just like you fled from before the earthquake in the days of Uzziah king of Judah. Then Jehovah my God will come, and all the holy ones with him.
6 Na mokolo wana, ezala pole to malili to mpe mvula, eloko moko te ekozala.
It will happen in that day, that there will not be light, cold, or frost.
7 Ekozala mokolo ya ndenge mosusu, mokolo ezanga moyi mpe butu, mokolo oyo Ye moko kaka Yawe ayebi; pole ekobima soki pokwa ekoki.
It will be a unique day which is known to Jehovah; not day, and not night; but it will come to pass, that at evening time there will be light.
8 Na mokolo wana, mayi oyo etiolaka ekobimela na Yelusalemi. Ndambo moko ekokende na ebale monene ya este mpe ndambo mosusu, na ebale monene ya weste, na eleko ya malili mpe ya molunge.
It will happen in that day, that living waters will go out from Jerusalem; half of them toward the eastern sea, and half of them toward the western sea; in summer and in winter will it be.
9 Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.
Jehovah will be King over all the earth. In that day Jehovah will be one, and his name one.
10 Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi.
All the land will be made like the Arabah, from Geba to Rimmon in the Negev. Jerusalem will be lifted up, and will dwell in her place, from Benjamin's gate to the place of the first gate, to the Corner Gate, and from the Tower of Hananel to the king's winepresses.
11 Bato bakozongela kovanda na Yelusalemi; Yelusalemi ekobebisama lisusu te mpe ekokoma na kimia.
Men will dwell in it, and there will be no more curse; but Jerusalem will dwell safely.
12 Tala etumbu oyo Yawe akopesa na bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi: Misuni ya banzoto na bango ekobanda kopola wana bazali nanu na bomoi; miso na bango ekokufa na bilongi na bango mpe balolemo na bango ekokufa kati na minoko na bango.
This will be the plague with which Jehovah will strike all the peoples who have warred against Jerusalem: their flesh will consume away while they stand on their feet, and their eyes will consume away in their sockets, and their tongue will consume away in their mouth.
13 Na mokolo wana, Yawe akosala ete mobulu ekota kati na bango, bakobetana makofi mpe bakobomana bango na bango.
It will happen in that day, that a great panic from Jehovah will be among them; and they will lay hold everyone on the hand of his neighbor, and his hand will rise up against the hand of his neighbor.
14 Bato ya Yuda mpe bakobunda kati na Yelusalemi, bakokongola bomengo ya bikolo nyonso ya zingazinga: wolo, palata mpe bilamba mingi koleka.
Judah also will fight at Jerusalem; and the wealth of all the surrounding nations will be gathered together: gold, and silver, and clothing, in great abundance.
15 Etumbu ya ndenge moko kaka ekokweya likolo ya bampunda, ya bamile, ya bashamo, ya ba-ane mpe ya banyama nyonso oyo ekozala na molako.
So will be the plague of the horse, of the mule, of the camel, and of the donkey, and of all the animals that will be in those camps, as that plague.
16 Boye, batikali kati na bikolo nyonso oyo ebundisaki Yelusalemi bakomata mibu nyonso na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mpe mpo na kosala feti ya Bandako ya kapo.
It will happen that everyone who is left of all the nations that came against Jerusalem will go up from year to year to worship the King, Jehovah of hosts, and to keep the feast of booths.
17 Soki bato ya etuka moko ya mabele bakei te na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mvula ekonoka te na mokili na bango.
It will be, that whoever of all the families of the earth doesn't go up to Jerusalem to worship the King, Jehovah of hosts, on them there will be no rain.
18 Soki bato ya Ejipito baboyi kokende kosala feti na Yelusalemi, mvula ekonoka te na mokili na bango. Boye, Yawe akopesa bango etumbu oyo abongisa mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo.
If the family of Egypt doesn't go up and enter in, on them will be the plague with which Jehovah will strike the nations that do not go up to keep the feast of booths.
19 Ekozala etumbu ya Ejipito mpe ya bikolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo.
This will be the punishment of Egypt, and the punishment of all the nations that do not go up to keep the feast of booths.
20 Na mokolo wana, bakotia makomi na bangonga mike-mike ya bampunda: « Ebulisami mpo na Yawe! » Banzungu ya Tempelo ya Yawe ekozala mpe bule ndenge bakopo ezalaka bule liboso ya etumbelo.
In that day there will be on the bells of the horses, "HOLY TO JEHOVAH;" and the pots in Jehovah's house will be like the bowls before the altar.
21 Banzungu nyonso kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda ekobulisama mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga; mpe bato nyonso oyo bakoya kopesa makabo bakozwa ndambo ya banzungu mpe bakolambela yango. Na mokolo wana, ata moto moko te ya mombongo akotikala kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Yes, every pot in Jerusalem and in Judah will be holy to Jehovah of hosts; and all those who sacrifice will come and take of them, and cook in them. In that day there will no longer be a Canaanite in the house of Jehovah of hosts.

< Zakari 14 >