< Zakari 13 >

1 Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi. 2 Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo. 3 Boye, soki moto moko akobi kosakola, tika ete tata mpe mama oyo babota ye baloba na ye: ‹ Osengeli kokufa mpo ete olobi makambo ya lokuta na Kombo na Yawe! › Wana akozala kosakola, baboti na ye bakotobola ye na mopanga. 4 Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale. 5 Akoloba: ‹ Nazali na ngai mosakoli te; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai! › 6 Soki batuni ye: ‹ Bongo bapota oyo ezali na tolo na yo ewuti wapi? › Akozongisa: ‹ Nazokaki yango kati na ndako ya balingami na ngai. › 7 Oh mopanga, telema! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike. 8 Na mokili mobimba, » elobi Yawe, « bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato bakobebisama mpe bakokufa; mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato nde bakotikala na mokili. 9 Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango: ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba: ‹ Yawe azali Nzambe na biso! › »

< Zakari 13 >