< Loyembo ya Salomo 5 >

1 Oh molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema; nayei na elanga na ngai, nayei kobuka mbuma na ngai oyo basalelaka malasi ya mire, nayei kobuka biloko na ngai ya mike-mike ya solo kitoko, nayei kolia mafuta na ngai ya nzoyi, nayei komela vino mpe miliki na ngai. Oh baninga, bolia mpe bomela na bino, bomela mpe bolangwa na bino, balingami na ngai.
I am come into my garden, my sister, my spouse: I have gathered my myrrh with my spice; I have eaten my honeycomb with my honey; I have drunk my wine with my milk: eat, O friends; drink, yea, drink abundantly, O beloved.
2 Nalalaki, kasi makanisi na ngai ezalaki ya kolamuka. Yoka! Mongongo ya molingami na ngai ezali koyokana na ekuke! « Molingami na ngai, mwasi na ngai ya motema, ebenga na ngai, oyo azali kitoko koleka mpo na ngai, fungolela ngai ndako, pamba te moto na ngai etondi na londende, mpe suki na ngai epoli na matanga ya londende ya butu. »
I sleep, but my heart wakes: it is the voice of my beloved that knocks, saying, Open to me, my sister, my love, my dove, my undefiled: for my head is filled with dew, and my locks with the drops of the night.
3 Nasili kolongola nzambala na ngai, nalata yango lisusu? Nasili kosukola makolo na ngai, nabebisa yango lisusu?
I have put off my coat; how shall I put it on? I have washed my feet; how shall I defile them?
4 Mobali na ngai ya motema akotisi loboko na ye na lidusu ya ekuke, bongo motema na ngai ekomi kobeta mpo na ye.
My beloved put in his hand by the hole of the door, and my bowels were moved for him.
5 Natelemaki mpo na kokende kofungolela mobali na ngai ya motema ndako, mpe maboko na ngai ebimisaki solo ya malasi ya mire, misapi na ngai etangisaki yango na bikangelo ya ndako.
I rose up to open to my beloved; and my hands dropped with myrrh, and my fingers with sweet smelling myrrh, upon the handles of the lock.
6 Nafungolelaki mobali na ngai ya motema ndako, kasi akendeki na ye mpe alimwaki. Nakweyaki mayanga wana azalaki koloba; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te; nabengaki ye, kasi ayanolaki ngai te.
I opened to my beloved; but my beloved had withdrawn himself, and was gone: my soul failed when he spoke: I sought him, but I could not find him; I called him, but he gave me no answer.
7 Tango bakengeli ya mir bazalaki koleka-leka kati na engumba, bamonaki ngai, babetaki ngai, bazokisaki ngai mpe balongolaki ngai vwale na moto.
The watchmen that went about the city found me, they stroke me, they wounded me; the keepers of the walls took away my veil from me.
8 Oh bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino, soki bomoni mobali na ngai, bokoloba na ye nini? Boloba na ye ete nabeli maladi ya bolingo.
I charge you, O daughters of Jerusalem, if all of you find my beloved, that all of you tell him, that I am sick of love.
9 Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, mobali na yo aleki mibali mosusu na nini? Nini penza ya malonga oyo mobali na yo azali na yango, oyo eleki mibali mosusu mpo ete oloba na biso boye?
What is your beloved more than another beloved, O you fairest among women? what is your beloved more than another beloved, that you do so charge us?
10 Mobali na ngai azali na poso pembe, azali moto oyo asimba bendele kati na mibali nkoto zomi.
My beloved is white and rosy, the chiefest among ten thousand.
11 Moto na ye ezali lokola wolo ya peto, suki na ye elingama-lingama, mpe azali mwindo lokola yanganga.
His head is as the most fine gold, his locks are bushy, and black as a raven.
12 Miso na ye ezali kitoko lokola bibenga pembeni ya moluka, ezali lokola basukolaka yango na miliki mpe avandaka kati na sani ya bomengo.
His eyes are as the eyes of doves by the rivers of waters, washed with milk, and fitly set.
13 Matama na ye ezali lokola mikala ya banzete ya malasi, lokola ekolo ya bafololo ya solo kitoko; bibebu na ye ezali lokola fololo oyo babengaka lisi oyo ebimisaka mire ya kitoko.
His cheeks are as a bed of spices, as sweet flowers: his lips like lilies, dropping sweet smelling myrrh.
14 Maboko na ye ezali lokola bapete ya wolo oyo batia mabanga ya Krizolite. Nzoto na ye ezali lokola pembe ya nzoko oyo babongisi mpe babakisi mabanga ya safiri.
His hands are as gold rings set with the beryl: his belly is as bright ivory overlaid with sapphires.
15 Makolo na ye ezali lokola makonzi ya mabanga ya marbre oyo evandi likolo ya moboko ya wolo ya peto. Azali lokola bangomba ya Libani, kitoko lokola banzete ya sedele ya Libani.
His legs are as pillars of marble, set upon sockets of fine gold: his countenance is as Lebanon, excellent as the cedars.
16 Elobeli na ye esalaka elengi na motema, mpe nzoto na ye mobimba esalaka ete balula ye. Tala ndenge mobali na ngai ya motema, molingami na ngai, azali, oh bilenge basi ya Yelusalemi!
His mouth is most sweet: yea, he is altogether lovely. This is my beloved, and this is my friend, O daughters of Jerusalem.

< Loyembo ya Salomo 5 >