< Barome 16 >

1 Natindeli bino Foebe, ndeko na biso ya mwasi, oyo azali mosali ya Lingomba ya Sankresi.
I commend to you Phoebe, our sister, who is a servant of the assembly that is at Cenchreae,
2 Nazali kosenga na bino ete boyamba ye kati na Nkolo na lolenge oyo ebongi na basantu mpe bosunga ye na makambo nyonso oyo akosenga bino, pamba te asungaki bato ebele penza, ngai mpe lokola.
that you receive her in the Lord in a way worthy of the saints, and that you assist her in whatever matter she may need from you, for she herself also has been a helper of many, and of my own self.
3 Bopesa mbote na Prisika mpe Akilasi, baninga na ngai ya mosala kati na Yesu-Klisto.
Greet Prisca and Aquila, my fellow workers in Christ Jesus,
4 Bandimaki ata kokufa mpo na ngai. Ngai moko kaka te nde nazali kotonda bango, kasi mpe Mangomba nyonso ya mikili ya Bapagano.
who risked their own necks for my life, to whom not only I give thanks, but also all the assemblies of the Gentiles.
5 Bopesa mpe mbote na Lingomba oyo esanganaka na ndako na bango. Bopesa mbote na Epayineti, molingami na ngai, oyo azalaki moto ya liboso ya kondimela Klisto kati na mokili ya Azia.
Greet the assembly that is in their house. Greet Epaenetus, my beloved, who is the first fruits of Achaia to Christ.
6 Bopesa mbote na Mari oyo asalaki mosala makasi mpo na bino.
Greet Mary, who labored much for us.
7 Bopesa mbote na Andronikusi mpe na Junia, bandeko na ngai mpe baninga na ngai ya boloko. Bazalaki bato ya lokumu kati na bantoma mpe bandimelaki Klisto liboso ete ngai nandimela.
Greet Andronicus and Junia, my relatives and my fellow prisoners, who are notable among the apostles, who were also in Christ before me.
8 Bopesa mbote na Ampiliatusi, molingami na ngai kati na Nkolo.
Greet Amplias, my beloved in the Lord.
9 Bopesa mbote na Iribano, moninga na biso ya mosala kati na Klisto, mpe Sitakisi, molingami na ngai.
Greet Urbanus, our fellow worker in Christ, and Stachys, my beloved.
10 Bopesa mbote na Apelesi oyo alakisaki penza ete azalaka ya Klisto. Bopesa mbote mpe na bavandi ya ndako ya Arisitobile.
Greet Apelles, the approved in Christ. Greet those who are of the household of Aristobulus.
11 Bopesa mbote na Erodioni, ndeko na ngai. Bopesa mbote na bavandi ya ndako ya Narisise, oyo bazali kati na Nkolo.
Greet Herodion, my kinsman. Greet them of the household of Narcissus, who are in the Lord.
12 Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo. Bopesa mbote na Periside, mwasi molingami na ngai, oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo.
Greet Tryphaena and Tryphosa, who labor in the Lord. Greet Persis, the beloved, who labored much in the Lord.
13 Bopesa mbote na Rifisi, moponami kati na Nkolo. Bopesa mpe mbote na mama na ye, oyo azali mpe mama na ngai.
Greet Rufus, the chosen in the Lord, and his mother and mine.
14 Bopesa mbote na Asenkrite, na Flegoni, na Erimesi, na Patrobasi, na Erimasi, mpe na bandeko nyonso oyo bazali na bango elongo.
Greet Asyncritus, Phlegon, Hermes, Patrobas, Hermas, and the brothers who are with them.
15 Bopesa mbote na Filologe, na Jili, na Nere mpe na Olipasi, ndeko na ye ya mwasi, elongo na basantu nyonso oyo bazali na bango elongo.
Greet Philologus and Julia, Nereus and his sister, and Olympas, and all the saints who are with them.
16 Bopesanaka mbote bino na bino, na beze ya bule. Mangomba nyonso ya Klisto etindeli bino mbote.
Greet one another with a holy kiss. The assemblies of Christ greet you.
17 Bandeko, nabondeli bino: bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango.
Now I beg you, brothers, look out for those who are causing the divisions and occasions of stumbling, contrary to the doctrine which you learned, and turn away from them.
18 Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Klisto, Nkolo na biso, te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali.
For those who are such don’t serve our Lord Jesus Christ, but their own belly; and by their smooth and flattering speech they deceive the hearts of the innocent.
19 Pamba te bato nyonso bayebi botosi na bino, mpe motema na ngai etondaka mingi na esengo mpo na bino. Kasi nalingi ete bozala bato ya bwanya mpo na kosala bolamu, mpe bato oyo bazangi mbeba mpo na oyo etali mabe.
For your obedience has become known to all. I rejoice therefore over you. But I desire to have you wise in that which is good, but innocent in that which is evil.
20 Etikali moke, Nzambe ya kimia akonyata-nyata Satana na se ya matambe na bino. Tika ete ngolu ya Yesu, Nkolo na biso, ezala na bino!
And the God of peace will quickly crush Satan under your feet. The grace of our Lord Jesus Christ be with you.
21 Timote, moninga na ngai ya mosala, elongo na Lusiusi, Jazoni mpe Sosipatere, oyo bazali bandeko na ngai, batindeli bino mbote.
Timothy, my fellow worker, greets you, as do Lucius, Jason, and Sosipater, my relatives.
22 Ngai Teritiusi oyo nakomi mokanda oyo, napesi bino mbote kati na Nkolo.
I, Tertius, who write the letter, greet you in the Lord.
23 Gayusi, oyo ayambaki ngai mpe Lingomba mobimba kati na ndako na ye, apesi bino mpe mbote. Erasite, mobateli bomengo ya engumba, elongo na Karitisi, ndeko na biso, batindeli bino mbote. [
Gaius, my host and host of the whole assembly, greets you. Erastus, the treasurer of the city, greets you, as does Quartus, the brother.
24 Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala na bino nyonso! Amen.]
The grace of our Lord Jesus Christ be with you all! Amen.
25 Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu-Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe, oyo ebombama wuta kala, (aiōnios g166)
Now to him who is able to establish you according to my Good News and the preaching of Jesus Christ, according to the revelation of the mystery which has been kept secret through long ages, (aiōnios g166)
26 kasi sik’oyo emonisami mpe elakisami epai ya Bapagano na nzela ya makomi ya basakoli kolanda ndenge Nzambe ya seko na seko atindaki mpo ete bikolo nyonso ekoka kondimela Ye mpe kotosa Ye, (aiōnios g166)
but now is revealed, and by the Scriptures of the prophets, according to the commandment of the eternal God, is made known for obedience of faith to all the nations; (aiōnios g166)
27 na Nzambe moko kaka ya bwanya, tika ete nkembo epesamela libela na libela na nzela ya Yesu-Klisto! Amen! (aiōn g165)
to the only wise God, through Jesus Christ, to whom be the glory forever! Amen. (aiōn g165)

< Barome 16 >