< Barome 12 >

1 Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.
Therefore I urge you, brothers, by the mercies of God, to present your bodies a living sacrifice, holy, acceptable to God, which is your spiritual service.
2 Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka. (aiōn g165)
Don’t be conformed to this world, but be transformed by the renewing of your mind, so that you may prove what is the good, well-pleasing, and perfect will of God. (aiōn g165)
3 Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso: bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.
For I say through the grace that was given me, to everyone who is among you, not to think of yourself more highly than you ought to think; but to think reasonably, as God has apportioned to each person a measure of faith.
4 Pamba te ndenge kaka moko na moko kati na biso azali na biteni ebele kati na nzoto na ye, mpe eteni moko na moko ezalaka na mosala na yango,
For even as we have many members in one body, and all the members don’t have the same function,
5 ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu.
so we, who are many, are one body in Christ, and individually members of one another,
6 Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozalaka na makabo ekesana. Boye tika ete moto oyo azali na likabo ya kosakola asalelaka yango kolanda kondima,
having gifts differing according to the grace that was given to us: if prophecy, let’s prophesy according to the proportion of our faith;
7 tika ete moto oyo azali na likabo ya kosala mosala songolo kati na Lingomba amipesaka na mosala yango, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa malakisi apesaka yango,
or service, let’s give ourselves to service; or he who teaches, to his teaching;
8 tika ete moto oyo azali na likabo ya kolendisa alendisaka, tika ete moto oyo azali na likabo ya kopesa apesaka na motema moko, tika ete moto oyo azali na likabo ya kokamba akambaka na molende, mpe tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato bakelela asungaka na esengo!
or he who exhorts, to his exhorting; he who gives, let him do it with generosity; he who rules, with diligence; he who shows mercy, with cheerfulness.
9 Tika ete bolingo ezalaka na lokuta te! Boyinaka makambo mabe, bokangamaka makasi na makambo malamu.
Let love be without hypocrisy. Abhor that which is evil. Cling to that which is good.
10 Mpo na oyo etali bondeko, bolinganaka makasi kati na bino; mpo na oyo etali lokumu, bozalaka bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu;
In love of the brothers be tenderly affectionate to one another; in honor prefer one another,
11 mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu;
not lagging in diligence, fervent in spirit, serving the Lord,
12 mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende;
rejoicing in hope, enduring in troubles, continuing steadfastly in prayer,
13 mpo na oyo etali bosenga ya babulami, bosunganaka mpe boyambanaka malamu kati na bandako na bino.
contributing to the needs of the saints, and given to hospitality.
14 Bopambolaka bato oyo banyokolaka bino; iyo, bopambolaka, kasi bolakelaka mabe te!
Bless those who persecute you; bless, and don’t curse.
15 Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.
Rejoice with those who rejoice. Weep with those who weep.
16 Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.
Be of the same mind one toward another. Don’t set your mind on high things, but associate with the humble. Don’t be wise in your own conceits.
17 Bozongisaka mabe na mabe te. Bolukaka kosala makambo ya malamu na miso ya bato nyonso.
Repay no one evil for evil. Respect what is honorable in the sight of all men.
18 Lokola ekoki kosalema, mpe lokola bino nde bosengeli kopesa nzela, bozalaka na kimia na bato nyonso.
If it is possible, as much as it is up to you, be at peace with all men.
19 Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama: « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.
Don’t seek revenge yourselves, beloved, but give place to God’s wrath. For it is written, “Vengeance belongs to me; I will repay, says the Lord.”
20 Nzokande, « Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei; soki azali na posa ya komela mayi, pesa ye mayi. Pamba te, soki osali bongo, okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye. »
Therefore “If your enemy is hungry, feed him. If he is thirsty, give him a drink; for in doing so, you will heap coals of fire on his head.”
21 Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.
Don’t be overcome by evil, but overcome evil with good.

< Barome 12 >