< Barome 10 >

1 Bandeko, posa ya motema na ngai mpe libondeli na ngai epai ya Nzambe ezali ete bana ya Isalaele babika.
Brothers, my heart’s desire and my prayer to God is for Israel, that they may be saved.
2 Pamba te nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzokande, bolingo yango evandisami na boyebi te.
For I testify about them that they have a zeal for God, but not according to knowledge.
3 Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.
For being ignorant of God’s righteousness, and seeking to establish their own righteousness, they didn’t subject themselves to the righteousness of God.
4 Klisto nde asukisa Mobeko mpo ete moto nyonso oyo akondima akoma moto ya sembo.
For Christ is the fulfillment of the law for righteousness to everyone who believes.
5 Tala ndenge nini Moyize akomaki na tina na bosembo oyo ewutaka na Mobeko: « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. »
For Moses writes about the righteousness of the law, “The one who does them will live by them.”
6 Kasi tala ndenge nini bosembo oyo ewutaka na kondima elobaka: « Komilobela te kati na motema na yo: ‹ Nani akomata kuna na Likolo? › Ezali lokola kokitisa Klisto wuta na Likolo
But the righteousness which is of faith says this, “Don’t say in your heart, ‘Who will ascend into heaven?’ (that is, to bring Christ down);
7 to mpe: ‹ Nani akokita kati na libulu monene mpe ya molili makasi? › Ezali lokola kotombola Klisto kati na bakufi. » (Abyssos g12)
or, ‘Who will descend into the abyss?’ (that is, to bring Christ up from the dead.)” (Abyssos g12)
8 Boye, elobaka penza nini? « Liloba ezali pene na yo, ezali kati na monoko na yo mpe kati na motema na yo. » Liloba yango nde ezali Liloba ya kondima, mpe yango nde tozali kotatola.
But what does it say? “The word is near you, in your mouth and in your heart;” that is, the word of faith which we preach:
9 Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika;
that if you will confess with your mouth that Jesus is Lord and believe in your heart that God raised him from the dead, you will be saved.
10 pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.
For with the heart one believes resulting in righteousness; and with the mouth confession is made resulting in salvation.
11 Makomi eloba: « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. »
For the Scripture says, “Whoever believes in him will not be disappointed.”
12 Boye, bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe Mogreki, pamba te bango nyonso bazali na Nkolo moko oyo apambolaka makasi bato nyonso oyo babelelaka Ye.
For there is no distinction between Jew and Greek; for the same Lord is Lord of all, and is rich to all who call on him.
13 Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.
For, “Whoever will call on the name of the Lord will be saved.”
14 Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te?
How then will they call on him in whom they have not believed? How will they believe in him whom they have not heard? How will they hear without a preacher?
15 Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te? Kolanda ndenge ekomama: « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu! »
And how will they preach unless they are sent? As it is written: “How beautiful are the feet of those who preach the Good News of peace, who bring glad tidings of good things!”
16 Kasi bato nyonso te ya Isalaele nde bandimaki Sango Malamu. Pamba te Ezayi alobaki: « Nkolo, nani andimaki mateya na biso? »
But they didn’t all listen to the glad news. For Isaiah says, “Lord, who has believed our report?”
17 Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.
So faith comes by hearing, and hearing by the word of God.
18 Natuna nanu: Boni, bayokaki te? Iyo, bayokaki! Pamba te ekomama: « Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba, maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »
But I say, didn’t they hear? Yes, most certainly, “Their sound went out into all the earth, their words to the ends of the world.”
19 Natuna lisusu: Bato ya Isalaele basosolaki te? Moyize azalaki moto ya liboso ya koloba: « Nakosala ete boyokela oyo ezali ata ekolo te zuwa, nakosala ete boyoka kanda mpo na ekolo oyo ezanga ata mayele. »
But I ask, didn’t Israel know? First Moses says, “I will provoke you to jealousy with that which is no nation. I will make you angry with a nation void of understanding.”
20 Mpe Ezayi akomaki kino na koloba: « Namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te, namimonisaki epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai te. »
Isaiah is very bold and says, “I was found by those who didn’t seek me. I was revealed to those who didn’t ask for me.”
21 Kasi alobaki boye mpo na Isalaele: « Natandaki maboko na Ngai mokolo mobimba epai ya bato oyo bazanga botosi mpe bato ya mito makasi. »
But about Israel he says, “All day long I stretched out my hands to a disobedient and contrary people.”

< Barome 10 >