< Emoniseli 10 >

1 Bongo namonaki anjelu mosusu ya nguya makasi kokita wuta na Lola; lipata moko ezipaki ye mpe monama ezingelaki moto na ye. Elongi na ye ezali kongenga lokola moyi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto.
I saw a mighty angel coming down out of the sky, clothed with a cloud. A rainbow was on his head. His face was like the sun, and his feet like pillars of fire.
2 Na loboko na ye, asimbaki buku ya moke oyo ezalaki ya kofungwama. Atiaki lokolo na ye ya mobali na ebale monene, mpe oyo ya mwasi, na mokili;
He had in his hand a little open book. He set his right foot on the sea, and his left on the land.
3 bongo agangaki makasi lokola nkosi. Tango agangaki, bakake sambo ebetaki.
He cried with a loud voice, as a lion roars. When he cried, the seven thunders uttered their voices.
4 Mpe tango kaka bakake sambo etikaki kobeta, namibongisaki mpo na kokoma; kasi mongongo moko elobaki na ngai wuta na Lola: « Batela malamu makambo oyo bakake sambo ewuti koloba, kokoma yango te. »
When the seven thunders sounded, I was about to write; but I heard a voice from the sky saying, “Seal up the things which the seven thunders said, and don’t write them.”
5 Bongo anjelu oyo namonaki atelemi na ebale monene mpe na mokili atombolaki loboko ya mobali na ngambo ya Lola
The angel whom I saw standing on the sea and on the land lifted up his right hand to the sky
6 mpe alapaki ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko, Ye oyo akela Lola mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango: « Kobanda sik’oyo, tango ya kozela ezali lisusu te! (aiōn g165)
and swore by him who lives forever and ever, who created heaven and the things that are in it, the earth and the things that are in it, and the sea and the things that are in it, that there will no longer be delay, (aiōn g165)
7 Kasi na mokolo oyo anjelu ya sambo akobeta kelelo na ye, mabombami ya Nzambe ekokokisama ndenge kaka asakolaki yango na basali na Ye, basakoli. »
but in the days of the voice of the seventh angel, when he is about to sound, then the mystery of God is finished, as he declared to his servants the prophets.
8 Bongo mongongo oyo nayokaki wuta na Lola elobaki na ngai lisusu: « Kende, zwa buku oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anjelu oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili. »
The voice which I heard from heaven, again speaking with me, said, “Go, take the book which is open in the hand of the angel who stands on the sea and on the land.”
9 Boye, nakendeki epai ya anjelu mpe nasengaki na ye ete apesa ngai buku wana ya moke. Alobaki na ngai: « Kamata mpe lia yango. Ekokoma bololo na libumu na yo; kasi na monoko na yo, ekozala sukali lokola mafuta ya nzoyi. »
I went to the angel, telling him to give me the little book. He said to me, “Take it and eat it. It will make your stomach bitter, but in your mouth it will be as sweet as honey.”
10 Nakamataki buku yango na loboko ya anjelu mpe naliaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi; kasi sima na ngai kolia yango, ekomaki bololo kati na libumu na ngai.
I took the little book out of the angel’s hand, and ate it. It was as sweet as honey in my mouth. When I had eaten it, my stomach was made bitter.
11 Bongo balobaki na ngai: « Osengeli lisusu kosakola na tina na bikolo ebele, mabota ebele, nkota ebele mpe bakonzi ebele. »
They told me, “You must prophesy again over many peoples, nations, languages, and kings.”

< Emoniseli 10 >