< Banzembo 99 >

1 Yawe azali kokonza; tika ete bato balenga! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe; tika ete mabele eningana! 2 Yawe azali monene kati na Siona, mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso. 3 Tika ete Kombo na Yo ya monene mpe ya somo esanzolama; ezali bule! 4 Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo. Olendisaka bosembo. Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi. 5 Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye; azali Mosantu. 6 Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye, mpe Samuele kati na bato oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye, bazalaki kobelela Yawe, mpe Ye azalaki koyanola bango. 7 Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata. Babatelaki malako na Ye mpe mibeko oyo apesaki bango. 8 Yawe, Nzambe na biso, oyanolaki bango. Mpo na bango, ozalaki Nzambe oyo alimbisaka atako opesaki bango etumbu mpo na misala na bango ya mabe. 9 Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama na kotala na ngambo ya ngomba na Ye ya bule. Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.

< Banzembo 99 >