< Banzembo 96 >

1 Boyembela Yawe nzembo ya sika! Bino nyonso, bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe! 2 Boyembela Yawe, bopambola Kombo na Ye! Bopanza sango ya lobiko na Ye, mokolo na mokolo! 3 Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso. 4 Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso. 5 Banzambe nyonso ya bikolo ezali bikeko ya pamba, nzokande Yawe akela likolo. 6 Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, nguya mpe nkembo ezali kati na Esika na Ye ya bule. 7 Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe; bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye! 8 Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo! Bomema makabo na bino, bokota na lopango na Ye! 9 Bogumbama liboso ya Yawe oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi! Bino bavandi ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye! 10 Boloba kati na mabota: « Yawe azali Mokonzi! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. » 11 Tika ete likolo esepela, mpe mabele ezala kati na esengo! Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango epesa lokito! 12 Tika ete zamba mobimba elongo na nyonso oyo ezali kati na yango esepela, mpe tika ete banzete nyonso ya zamba eganga na esengo 13 liboso ya Yawe, pamba te azali koya! Solo, azali koya kosambisa mabele; akosambisa mokili na bosembo, mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.

< Banzembo 96 >