< Banzembo 96 >

1 Boyembela Yawe nzembo ya sika! Bino nyonso, bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe!
Sing to Jehovah a new song. Sing to Jehovah, all the earth.
2 Boyembela Yawe, bopambola Kombo na Ye! Bopanza sango ya lobiko na Ye, mokolo na mokolo!
Sing to Jehovah. Bless his name. Proclaim his salvation from day to day.
3 Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso.
Declare his glory among the nations, his marvelous works among all the peoples.
4 Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.
For great is Jehovah, and greatly to be praised. He is to be feared above all gods.
5 Banzambe nyonso ya bikolo ezali bikeko ya pamba, nzokande Yawe akela likolo.
For all the gods of the peoples are idols, but Jehovah made the heavens.
6 Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, nguya mpe nkembo ezali kati na Esika na Ye ya bule.
Honor and majesty are before him. Strength and beauty are in his sanctuary.
7 Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe; bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye!
Ascribe to Jehovah, you families of nations, ascribe to Jehovah glory and strength.
8 Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo! Bomema makabo na bino, bokota na lopango na Ye!
Ascribe to Jehovah the glory due to his name. Bring an offering, and come into his courts.
9 Bogumbama liboso ya Yawe oyo bosantu na Ye ezali kongenga makasi! Bino bavandi ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye!
Worship Jehovah in holy array. Tremble before him, all the earth.
10 Boloba kati na mabota: « Yawe azali Mokonzi! Mokili elendisama makasi, ekoningana te. Yawe asambisaka bato na bosembo. »
Say among the nations, "Jehovah reigns." The world is also established. It can't be moved. He will judge the peoples with equity.
11 Tika ete likolo esepela, mpe mabele ezala kati na esengo! Tika ete ebale monene elongo na nyonso oyo ezali kati na yango epesa lokito!
Let the heavens be glad, and let the earth rejoice. Let the sea roar, and its fullness.
12 Tika ete zamba mobimba elongo na nyonso oyo ezali kati na yango esepela, mpe tika ete banzete nyonso ya zamba eganga na esengo
Let the field and all that is in it exult. Then all the trees of the woods shall sing for joy
13 liboso ya Yawe, pamba te azali koya! Solo, azali koya kosambisa mabele; akosambisa mokili na bosembo, mpe bikolo kolanda boyengebene na Ye.
before Jehovah; for he comes, for he comes to judge the earth. He will judge the world with righteousness, the peoples with his truth.

< Banzembo 96 >