< Banzembo 94 >

1 Yawe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, mimonisa kati na nkembo na Yo! 2 Mosambisi ya mokili, telema mpo na kozongisela bato ya lolendo mabe na mabe na bango! 3 Yawe, kino tango nini bato mabe, kino tango nini bato mabe bakosepela? 4 Bazali komilakisa, bazali kobimisa mafinga; bato nyonso ya misala mabe bazali komikumisa! 5 Yawe, bazali konyokola bato na Yo mpe bazali koyokisa libula na Yo pasi; 6 bazali koboma mwasi oyo akufisa mobali, mopaya mpe bana bitike; 7 bazali koloba: « Yawe amonaka eloko moko te, Nzambe ya Jakobi asosolaka eloko moko te! » 8 Bino bato ya kilikili, bososola! Bazoba, bokokoma mayele tango nini? 9 Boni, Ye oyo asala litoyi akoki koyoka te? Ye oyo asala liso akoki komona te? 10 Ye oyo apesaka bikolo etumbu akoki kopesa etumbu te? Ye oyo apesaka bato boyebi. 11 Yawe ayebi makanisi ya bato; ayebi ete ezali na tina te. 12 Yawe, esengo na moto oyo ozali kozongisa na nzela, moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo 13 mpo na kopesa ye bopemi na tango ya pasi, kino libulu etimolama mpo na moto mabe! 14 Pamba te Yawe asundolaka bato na Ye te, abwakaka libula na Ye te. 15 Bakosambisa lisusu kolanda bosembo, mpe bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakotosa bosembo yango. 16 Nani akotelema mpo na ngai mpo na kotelemela bato mabe? Nani akokotela ngai liboso ya bato ya misala mabe? 17 Ah, soki Yawe asungaki ngai te, mbele nakendeki noki na mokili ya kufa! 18 Soki nalobi: « Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, » bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi. 19 Soki natungisami na makanisi ebele, kobondisama na Yo epesaka ngai esengo. 20 Boni, bokonzi ya mabe oyo ememelaka bato pasi na nzela ya mibeko na yango; boni, ezali lisanga moko elongo na Yo? 21 Bato mabe basanganaka mpo na kobundisa bomoi ya moto ya sembo mpe kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya kufa. 22 Kasi Yawe azali, mpo na ngai, ndako batonga makasi; Nzambe na ngai azali libanga epai wapi nazwaka ebombamelo. 23 Akozongisela bango mabe na bango mpe akobebisa bango mpo na kanza na bango. Solo, Yawe, Nzambe na ngai, akoboma bango.

< Banzembo 94 >