< Banzembo 94 >

1 Yawe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, mimonisa kati na nkembo na Yo!
Jehovah, you God to whom vengeance belongs, you God to whom vengeance belongs, shine forth.
2 Mosambisi ya mokili, telema mpo na kozongisela bato ya lolendo mabe na mabe na bango!
Rise up, you judge of the earth. Pay back the proud what they deserve.
3 Yawe, kino tango nini bato mabe, kino tango nini bato mabe bakosepela?
Jehovah, how long will the wicked, how long will the wicked triumph?
4 Bazali komilakisa, bazali kobimisa mafinga; bato nyonso ya misala mabe bazali komikumisa!
They pour out arrogant words. All the evildoers boast.
5 Yawe, bazali konyokola bato na Yo mpe bazali koyokisa libula na Yo pasi;
They break your people in pieces, Jehovah, and afflict your heritage.
6 bazali koboma mwasi oyo akufisa mobali, mopaya mpe bana bitike;
They kill the widow and the alien, and murder the fatherless.
7 bazali koloba: « Yawe amonaka eloko moko te, Nzambe ya Jakobi asosolaka eloko moko te! »
They say, "JAH will not see, neither will Jacob's God consider."
8 Bino bato ya kilikili, bososola! Bazoba, bokokoma mayele tango nini?
Consider, you senseless among the people; you fools, when will you be wise?
9 Boni, Ye oyo asala litoyi akoki koyoka te? Ye oyo asala liso akoki komona te?
He who implanted the ear, won't he hear? He who formed the eye, won't he see?
10 Ye oyo apesaka bikolo etumbu akoki kopesa etumbu te? Ye oyo apesaka bato boyebi.
He who disciplines the nations, won't he punish? He who teaches man knows.
11 Yawe ayebi makanisi ya bato; ayebi ete ezali na tina te.
Jehovah knows the thoughts of man, that they are futile.
12 Yawe, esengo na moto oyo ozali kozongisa na nzela, moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo
Blessed is the man whom you discipline, JAH, and teach out of your Law;
13 mpo na kopesa ye bopemi na tango ya pasi, kino libulu etimolama mpo na moto mabe!
that you may give him rest from the days of adversity, until the pit is dug for the wicked.
14 Pamba te Yawe asundolaka bato na Ye te, abwakaka libula na Ye te.
For Jehovah won't reject his people, neither will he forsake his inheritance.
15 Bakosambisa lisusu kolanda bosembo, mpe bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakotosa bosembo yango.
For judgment will return to righteousness. All the upright in heart shall follow it.
16 Nani akotelema mpo na ngai mpo na kotelemela bato mabe? Nani akokotela ngai liboso ya bato ya misala mabe?
Who will rise up for me against the wicked? Who will stand up for me against the evildoers?
17 Ah, soki Yawe asungaki ngai te, mbele nakendeki noki na mokili ya kufa!
Unless Jehovah had been my help, my soul would have soon lived in silence.
18 Soki nalobi: « Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, » bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi.
When I said, "My foot is slipping." Your loving kindness, Jehovah, held me up.
19 Soki natungisami na makanisi ebele, kobondisama na Yo epesaka ngai esengo.
In the multitude of my thoughts within me, your comforts delight my soul.
20 Boni, bokonzi ya mabe oyo ememelaka bato pasi na nzela ya mibeko na yango; boni, ezali lisanga moko elongo na Yo?
Shall the throne of wickedness have fellowship with you, which brings about mischief by statute?
21 Bato mabe basanganaka mpo na kobundisa bomoi ya moto ya sembo mpe kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya kufa.
They gather themselves together against the soul of the righteous, and condemn the innocent blood.
22 Kasi Yawe azali, mpo na ngai, ndako batonga makasi; Nzambe na ngai azali libanga epai wapi nazwaka ebombamelo.
But Jehovah has been my high tower, my God, the rock of my refuge.
23 Akozongisela bango mabe na bango mpe akobebisa bango mpo na kanza na bango. Solo, Yawe, Nzambe na ngai, akoboma bango.
He has brought on them their own iniquity, and will cut them off in their own wickedness. Jehovah, our God, will cut them off.

< Banzembo 94 >