< Banzembo 93 >

1 Yawe azali kokonza, alati lokumu monene; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te. 2 Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala; seko na seko, ozali. 3 Yawe, bibale egangaka! Bibale etombolaka lokito na yango; bibale etombolaka makelele na yango. 4 Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene. 5 Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo; bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.

< Banzembo 93 >