< Banzembo 92 >

1 Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba. Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo! 2 Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu, 3 na lindanda ya basinga zomi mpe na nzenze! 4 Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai! Nagangaka na esengo liboso ya misala ya maboko na Yo. 5 Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo! 6 Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te. 7 Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela. 8 Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela. 9 Yawe, banguna na Yo, banguna na Yo bakokufa penza; bato nyonso ya misala mabe bakolimwa. 10 Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika. 11 Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai, mpe matoyi na ngai ekomi koyoka banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa mpo na kosala ngai mabe. 12 Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani. 13 Lokola bapikama ngwi kati na Tempelo ya Yawe, bamonaka bolamu kati na lopango ya Nzambe na biso. 14 Ata bakomi mibange, babotaka kaka, bazalaka kaka makasi mpe kitoko, 15 basakolaka: « Yawe azali alima, azali Libanga na biso; kati na Ye, mabe ezali te! »

< Banzembo 92 >