< Banzembo 91 >

1 Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. 2 Nalobaka na tina na Yawe: « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai; natiaka elikya na ngai kati na Ye! » 3 Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo ya mokangi bandeke mpe na bokono oyo ebikisaka te. 4 Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende. 5 Okobanga te somo ya butu, makonga oyo epumbwaka na moyi makasi, 6 bokono oyo etambolaka kati na molili mpe pasi oyo ebebisaka na midi. 7 Ezala bato nkoto moko bakweyi pembeni na yo, mpe bato nkoto zomi, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, ekozwa yo ata moke te. 8 Okotala kaka na miso na yo mpe okomona ndenge nini bato mabe bazali kozwa etumbu lokola lifuti na bango. 9 Soki otatoli: « Yawe azali ebombamelo na ngai, » mpe okomisi Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekimelo na yo, 10 mabe ata moko te ekokweyela yo, pasi ata moko te ekopusana na ndako na yo; 11 pamba te akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye ete babatela yo malamu na banzela na yo nyonso. 12 Bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te; 13 okotambola na likolo ya nkosi mpe ya etupa, okonyata nkosi ya monene mpe dalagona. 14 Lokola akangami na ngai, nakokangola ye; lokola ayebi Kombo na Ngai, nakobatela ye. 15 Soki abeleli ngai, nakoyanola ye; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu. 16 Nakopesa ye bomoi molayi mpe nakolakisa ye lobiko na ngai.

< Banzembo 91 >