< Banzembo 90 >

1 Losambo ya Moyize, moto na Nzambe. Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso, na bikeke nyonso.
προσευχὴ τοῦ Μωυσῆ ἀνθρώπου τοῦ θεοῦ κύριε καταφυγὴ ἐγενήθης ἡμῖν ἐν γενεᾷ καὶ γενεᾷ
2 Liboso ete bangomba ezala, liboso ete okela mabele mpe mokili, libela na libela, ozali Nzambe.
πρὸ τοῦ ὄρη γενηθῆναι καὶ πλασθῆναι τὴν γῆν καὶ τὴν οἰκουμένην καὶ ἀπὸ τοῦ αἰῶνος ἕως τοῦ αἰῶνος σὺ εἶ
3 Ozongisaka moto na putulu, pamba te oloba: « Bino bato, bozonga na putulu! »
μὴ ἀποστρέψῃς ἄνθρωπον εἰς ταπείνωσιν καὶ εἶπας ἐπιστρέψατε υἱοὶ ἀνθρώπων
4 Na miso na Yo, mibu nkoto moko ezali lokola mokolo ya lobi oyo esili koleka, lokola ngonga moko ya butu.
ὅτι χίλια ἔτη ἐν ὀφθαλμοῖς σου ὡς ἡ ἡμέρα ἡ ἐχθές ἥτις διῆλθεν καὶ φυλακὴ ἐν νυκτί
5 Olekisaka yango lokola pongi ya butu, oyo na tongo, esilaka lokola lititi.
τὰ ἐξουδενώματα αὐτῶν ἔτη ἔσονται τὸ πρωὶ ὡσεὶ χλόη παρέλθοι
6 Na tongo, ebimisaka fololo mpe etelaka noki; kasi na pokwa, enzulukaka mpe ekawuki.
τὸ πρωὶ ἀνθήσαι καὶ παρέλθοι τὸ ἑσπέρας ἀποπέσοι σκληρυνθείη καὶ ξηρανθείη
7 Kanda na Yo elembisaka biso nzoto, mpe kanda makasi na Yo epesaka biso bobangi.
ὅτι ἐξελίπομεν ἐν τῇ ὀργῇ σου καὶ ἐν τῷ θυμῷ σου ἐταράχθημεν
8 Otiaka masumu na biso liboso na Yo mpe obimisaka na polele makambo oyo tobombaka.
ἔθου τὰς ἀνομίας ἡμῶν ἐνώπιόν σου ὁ αἰὼν ἡμῶν εἰς φωτισμὸν τοῦ προσώπου σου
9 Mikolo nyonso ya bomoi na biso elimwaka mpo na kanda na Yo, mpe mibu na biso esilaka lokola kolela.
ὅτι πᾶσαι αἱ ἡμέραι ἡμῶν ἐξέλιπον καὶ ἐν τῇ ὀργῇ σου ἐξελίπομεν τὰ ἔτη ἡμῶν ὡς ἀράχνην ἐμελέτων
10 Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala mibu tuku sambo to mibu tuku mwambe mpo na bato oyo baleki makasi; nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko, pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.
αἱ ἡμέραι τῶν ἐτῶν ἡμῶν ἐν αὐτοῖς ἑβδομήκοντα ἔτη ἐὰν δὲ ἐν δυναστείαις ὀγδοήκοντα ἔτη καὶ τὸ πλεῖον αὐτῶν κόπος καὶ πόνος ὅτι ἐπῆλθεν πραΰτης ἐφ’ ἡμᾶς καὶ παιδευθησόμεθα
11 Nani ayebi makasi ya kanda na Yo? Moto oyo azalaka na botosi mingi epai na Yo asosolaka malamu kanda makasi na Yo.
τίς γινώσκει τὸ κράτος τῆς ὀργῆς σου καὶ ἀπὸ τοῦ φόβου σου τὸν θυμόν σου
12 Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.
ἐξαριθμήσασθαι τὴν δεξιάν σου οὕτως γνώρισον καὶ τοὺς πεπεδημένους τῇ καρδίᾳ ἐν σοφίᾳ
13 Yawe, lembisa moke! Kino tango nini ekowumela? Yokela basali na Yo mawa!
ἐπίστρεψον κύριε ἕως πότε καὶ παρακλήθητι ἐπὶ τοῖς δούλοις σου
14 Tongo nyonso, tondisaka biso na bolingo na Yo mpe tokoganga na esengo, mpe tokosepela mikolo nyonso ya bomoi na biso.
ἐνεπλήσθημεν τὸ πρωὶ τοῦ ἐλέους σου καὶ ἠγαλλιασάμεθα καὶ εὐφράνθημεν ἐν πάσαις ταῖς ἡμέραις ἡμῶν
15 Zongisela biso na mikolo ya esengo, mikolo oyo onyokolaki biso; zongisela biso na mibu ya esengo, mibu oyo tomonaki pasi.
εὐφράνθημεν ἀνθ’ ὧν ἡμερῶν ἐταπείνωσας ἡμᾶς ἐτῶν ὧν εἴδομεν κακά
16 Tika ete biso, basali na Yo, tomona misala na Yo; mpe ete bana na biso bamona kongenga makasi ya nkembo na Yo!
καὶ ἰδὲ ἐπὶ τοὺς δούλους σου καὶ τὰ ἔργα σου καὶ ὁδήγησον τοὺς υἱοὺς αὐτῶν
17 Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso, ezala elongo na biso! Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso! Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso!
καὶ ἔστω ἡ λαμπρότης κυρίου τοῦ θεοῦ ἡμῶν ἐφ’ ἡμᾶς καὶ τὰ ἔργα τῶν χειρῶν ἡμῶν κατεύθυνον ἐφ’ ἡμᾶς

< Banzembo 90 >