< Banzembo 84 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya bana ya Kore. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati. Yawe, Mokonzi ya mampinga, tala ndenge bisika oyo ovandaka ezali kopesa posa!
εἰς τὸ τέλος ὑπὲρ τῶν ληνῶν τοῖς υἱοῖς Κορε ψαλμός ὡς ἀγαπητὰ τὰ σκηνώματά σου κύριε τῶν δυνάμεων
2 Nzoto na ngai mobimba ebukani pene nakufa mpo na posa makasi ya lopango ya Yawe! Motema mpe nzoto na ngai ezali koganga epai ya Nzambe na bomoi.
ἐπιποθεῖ καὶ ἐκλείπει ἡ ψυχή μου εἰς τὰς αὐλὰς τοῦ κυρίου ἡ καρδία μου καὶ ἡ σάρξ μου ἠγαλλιάσαντο ἐπὶ θεὸν ζῶντα
3 Ndeke ya moke ezwaka esika ya kovanda, mpe mbilambila esalaka zala epai wapi etiaka bana na yango, pene ya bitumbelo na Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai.
καὶ γὰρ στρουθίον εὗρεν ἑαυτῷ οἰκίαν καὶ τρυγὼν νοσσιὰν ἑαυτῇ οὗ θήσει τὰ νοσσία αὐτῆς τὰ θυσιαστήριά σου κύριε τῶν δυνάμεων ὁ βασιλεύς μου καὶ ὁ θεός μου
4 Esengo na bavandi ya Ndako na Yo! Bakokumisa Yo tango nyonso!
μακάριοι οἱ κατοικοῦντες ἐν τῷ οἴκῳ σου εἰς τοὺς αἰῶνας τῶν αἰώνων αἰνέσουσίν σε διάψαλμα
5 Esengo na bato oyo bazwaka makasi kati na Yo; bakendaka na esengo na Tempelo na Yo!
μακάριος ἀνήρ οὗ ἐστιν ἡ ἀντίλημψις αὐτοῦ παρὰ σοῦ κύριε ἀναβάσεις ἐν τῇ καρδίᾳ αὐτοῦ διέθετο
6 Tango bakatisaka Lubwaku ya Baka, bakomisaka yango esika oyo etonda na bitima ya mayi, mpe mvula etondisaka yango na mapamboli.
ἐν τῇ κοιλάδι τοῦ κλαυθμῶνος εἰς τόπον ὃν ἔθετο καὶ γὰρ εὐλογίας δώσει ὁ νομοθετῶν
7 Makasi na bango ebakisamaka tango nyonso kino bakomaka na Siona, liboso ya Nzambe.
πορεύσονται ἐκ δυνάμεως εἰς δύναμιν ὀφθήσεται ὁ θεὸς τῶν θεῶν ἐν Σιων
8 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, yoka losambo na ngai! Nzambe ya Jakobi, yoka ngai!
κύριε ὁ θεὸς τῶν δυνάμεων εἰσάκουσον τῆς προσευχῆς μου ἐνώτισαι ὁ θεὸς Ιακωβ διάψαλμα
9 Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala! Tala elongi ya mopakolami na Yo!
ὑπερασπιστὰ ἡμῶν ἰδέ ὁ θεός καὶ ἐπίβλεψον ἐπὶ τὸ πρόσωπον τοῦ χριστοῦ σου
10 Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.
ὅτι κρείσσων ἡμέρα μία ἐν ταῖς αὐλαῖς σου ὑπὲρ χιλιάδας ἐξελεξάμην παραρριπτεῖσθαι ἐν τῷ οἴκῳ τοῦ θεοῦ μᾶλλον ἢ οἰκεῖν ἐν σκηνώμασιν ἁμαρτωλῶν
11 Pamba te, mpo na biso, Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba; Yawe apesaka ngolu mpe nkembo, aboyaka kopesa eloko moko te epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.
ὅτι ἔλεον καὶ ἀλήθειαν ἀγαπᾷ κύριος ὁ θεός χάριν καὶ δόξαν δώσει κύριος οὐ στερήσει τὰ ἀγαθὰ τοὺς πορευομένους ἐν ἀκακίᾳ
12 Yawe, Mokonzi ya mampinga, esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yo!
κύριε τῶν δυνάμεων μακάριος ἄνθρωπος ὁ ἐλπίζων ἐπὶ σέ

< Banzembo 84 >