< Banzembo 77 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi, kolanda Yedutuni. Nzembo ya Azafi. Nabelelaka Nzambe na koganga; nabelelaka Nzambe mpo ete ayoka ngai!
εἰς τὸ τέλος ὑπὲρ Ιδιθουν τῷ Ασαφ ψαλμός φωνῇ μου πρὸς κύριον ἐκέκραξα φωνῇ μου πρὸς τὸν θεόν καὶ προσέσχεν μοι
2 Tango nazalaka na pasi, nalukaka Nkolo; na butu, nalembaka te kotombola maboko na ngai mpe naboyaka kobondisama.
ἐν ἡμέρᾳ θλίψεώς μου τὸν θεὸν ἐξεζήτησα ταῖς χερσίν μου νυκτὸς ἐναντίον αὐτοῦ καὶ οὐκ ἠπατήθην ἀπηνήνατο παρακληθῆναι ἡ ψυχή μου
3 Nakanisaka Nzambe mpe nalelaka, nakotaka na mozindo ya makanisi mpe nalembaka nzoto.
ἐμνήσθην τοῦ θεοῦ καὶ εὐφράνθην ἠδολέσχησα καὶ ὠλιγοψύχησεν τὸ πνεῦμά μου διάψαλμα
4 Opimelaka miso na ngai pongi, namitungisaka mpe nayebaka lisusu te eloko ya koloba.
προκατελάβοντο φυλακὰς οἱ ὀφθαλμοί μου ἐταράχθην καὶ οὐκ ἐλάλησα
5 Nakanisaka lisusu mikolo ya kala, mibu nyonso oyo eleka;
διελογισάμην ἡμέρας ἀρχαίας καὶ ἔτη αἰώνια ἐμνήσθην καὶ ἐμελέτησα
6 Na butu, nakanisaka lisusu banzembo na ngai; motema na ngai ezongelaka kokanisa, mpe molimo na ngai ekomaka komituna:
νυκτὸς μετὰ τῆς καρδίας μου ἠδολέσχουν καὶ ἔσκαλλεν τὸ πνεῦμά μου
7 « Boni, Nkolo akobwaka biso penza mpo na libela? Akosalela biso lisusu bolamu te?
μὴ εἰς τοὺς αἰῶνας ἀπώσεται κύριος καὶ οὐ προσθήσει τοῦ εὐδοκῆσαι ἔτι
8 Bolingo na Ye esili penza mpo na libela? Bilaka na Ye ekokokisama te mpo na libela?
ἢ εἰς τέλος τὸ ἔλεος αὐτοῦ ἀποκόψει ἀπὸ γενεᾶς εἰς γενεάν
9 Nzambe abosani solo kosala ngolu? Akangi penza motema na Ye mpo na kanda? »
ἢ ἐπιλήσεται τοῦ οἰκτιρῆσαι ὁ θεὸς ἢ συνέξει ἐν τῇ ὀργῇ αὐτοῦ τοὺς οἰκτιρμοὺς αὐτοῦ διάψαλμα
10 Mpe namilobelaka: « Tala likambo oyo ezali kosala ngai pasi: loboko ya mobali ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ebongwani! »
καὶ εἶπα νῦν ἠρξάμην αὕτη ἡ ἀλλοίωσις τῆς δεξιᾶς τοῦ ὑψίστου
11 Nakanisaka misala minene ya Yawe, bikamwa na Yo ya kala.
ἐμνήσθην τῶν ἔργων κυρίου ὅτι μνησθήσομαι ἀπὸ τῆς ἀρχῆς τῶν θαυμασίων σου
12 Nakanisaka nyonso oyo osalaki kino na bikamwa na Yo.
καὶ μελετήσω ἐν πᾶσιν τοῖς ἔργοις σου καὶ ἐν τοῖς ἐπιτηδεύμασίν σου ἀδολεσχήσω
13 Oh Nzambe, banzela na Yo ezali bule; nzambe nini akokani na Yo na monene?
ὁ θεός ἐν τῷ ἁγίῳ ἡ ὁδός σου τίς θεὸς μέγας ὡς ὁ θεὸς ἡμῶν
14 Ozali Nzambe oyo asalaka bikamwa; olakisi nguya na Yo kati na bikolo.
σὺ εἶ ὁ θεὸς ὁ ποιῶν θαυμάσια ἐγνώρισας ἐν τοῖς λαοῖς τὴν δύναμίν σου
15 Na nguya ya loboko na Yo, okangolaki bato na Yo, bakitani ya Jakobi mpe ya Jozefi.
ἐλυτρώσω ἐν τῷ βραχίονί σου τὸν λαόν σου τοὺς υἱοὺς Ιακωβ καὶ Ιωσηφ διάψαλμα
16 Oh Nzambe, mayi emonaki Yo! Mayi emonaki Yo mpe ekomaki kolenga; ezala mozindo ya mayi eninganaki.
εἴδοσάν σε ὕδατα ὁ θεός εἴδοσάν σε ὕδατα καὶ ἐφοβήθησαν καὶ ἐταράχθησαν ἄβυσσοι πλῆθος ἤχους ὑδάτων
17 Mapata esopaki mayi ebele, likolo eyokisaki lokito ya kake, mpe makonga na Yo ezalaki koleka-leka na bangambo nyonso.
φωνὴν ἔδωκαν αἱ νεφέλαι καὶ γὰρ τὰ βέλη σου διαπορεύονται
18 Na lokito ya kake na Yo, mikalikali engengisaki mokili, mabele eninganaki mpe elengaki.
φωνὴ τῆς βροντῆς σου ἐν τῷ τροχῷ ἔφαναν αἱ ἀστραπαί σου τῇ οἰκουμένῃ ἐσαλεύθη καὶ ἔντρομος ἐγενήθη ἡ γῆ
19 Opasolaki nzela kati na ebale monene, balabala na Yo kati na mayi monene, mpe moto moko te amonaki bilembo ya matambe na Yo.
ἐν τῇ θαλάσσῃ ἡ ὁδός σου καὶ αἱ τρίβοι σου ἐν ὕδασι πολλοῖς καὶ τὰ ἴχνη σου οὐ γνωσθήσονται
20 Otambolisaki bato na Yo lokola etonga, na loboko ya Moyize mpe ya Aron.
ὡδήγησας ὡς πρόβατα τὸν λαόν σου ἐν χειρὶ Μωυσῆ καὶ Ααρων

< Banzembo 77 >