< Banzembo 70 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa misala ya Nzambe. Nzambe, yaka noki mpo na kangola ngai! Yawe, yaka noki mpo na kosunga ngai! 2 Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe bayokisama soni! 3 Tika ete bato oyo balobaka na ngai: « Ah! Ah! » bazonga mpo na soni! 4 Tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso: « Nzambe azali monene! » 5 Mpo ete nazali mobola mpe moto akelela, Nzambe, yaka noki mpo na kosunga ngai. Yawe, ozali Lisungi mpe Mokangoli na ngai, kowumela te!

< Banzembo 70 >