< Banzembo 67 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi: nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo. Tika ete Nzambe asalela biso ngolu mpe apambola biso, tika ete angengisela biso elongi na Ye; 2 mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili, mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso. 3 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo! 4 Tika ete bato basepela, tika ete babeta milolo ya esengo, pamba te okambaka bikolo na bosembo, mpe otambolisaka bato awa na mabele. 5 Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo; tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo! 6 Mabele eboti bambuma na yango; tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso. 7 Tika ete Nzambe apambola biso; tika ete mokili mobimba etosa Ye!

< Banzembo 67 >