< Banzembo 64 >

1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe, yoka mongongo na ngai kati kolela na ngai, batela ngai mosika ya monguna oyo azali kopesa ngai somo. 2 Bomba ngai mosika ya mikano ya bato mabe, mosika ya makita ya bato ya misala mabe. 3 Bapelisaka lolemo na bango ndenge bapelisaka mopanga, babimisaka maloba ya bololo lokola makonga 4 mpo na kobwakela, na kobombama, moto oyo azangi pamela; babangaka te kobwakela ye yango na mbalakata. 5 Balendisanaka mpo na mabongisi mabe, bayokanaka kotia mitambo; balobaka: « Nani akomona yango? » 6 Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe, balobaka: « Toselingwi na mabongisi na biso! » Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi. 7 Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na Ye na mbalakata; ekozwa mpe ekozokisa bango. 8 Maloba na bango moko ekobalukela bango mpe ekomema bango na libebi; mpe moto nyonso oyo akomona bango akoningisa moto. 9 Bato nyonso bakokoma kobanga, kopanza sango ya misala ya Nzambe mpe kososola makambo oyo asalaka. 10 Moto ya sembo akosepela mpe akomibomba kati na Yawe; bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakomikumisa mpo na yango.

< Banzembo 64 >