< Banzembo 63 >

1 Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda. Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai; nazali koluka Yo, molimo na ngai ezali na posa na Yo, bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi, kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi. 2 Natalaki Yo kati na Esika ya bule mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo. 3 Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi, bibebu na ngai ekosanzola Yo. 4 Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo. 5 Nakotonda lokola moto oyo asili kolia misuni kitoko mpe mafuta; bibebu na ngai ekoganga na esengo mpe monoko na ngai ekokumisa Yo. 6 Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai, nasambelaka Yo na butu; 7 pamba te ozali lisungi mpo na ngai, mpe nagangaka na esengo wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo. 8 Nakangami na Yo; loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi. 9 Bato oyo balukaka koboma ngai bakozinda na mabele 10 Bakoboma bango na mopanga mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba. 11 Kasi mokonzi akosepela kati na Nzambe; moto nyonso oyo alapaka ndayi na Kombo ya Nzambe akomikumisa mpo na yango, pamba te minoko ya bakosi ekokangama.

< Banzembo 63 >